Nzembo 50:1-23

  • Nzambe asambisaka moto ya sembo ná moto mabe

    • Kondimana elongo na Nzambe na nzela ya mbeka (5)

    • “Nzambe ye moko azali Mosambisi” (6)

    • Banyama nyonso ezali ya Nzambe (10, 11)

    • Nzambe abimisi polele makambo ya bato mabe (16-21)

Mondule ya Asafe.+ 50  Nzambe ya banzambe, Yehova,*+ alobi;Abengisi bafandi nyonso ya mabeleBanda epai moi ebimaka tii epai yango elalaka.*  2  Uta na Siona, kitoko ya kokoka,+ Nzambe azali kongɛnga.  3  Nzambe na biso akoya mpe akokoka kofanda nyɛɛ te.+ Mɔtɔ oyo ezikisaka ezali liboso na ye,+Mpe mopɛpɛ moko makasi ezali kobɛta zingazinga na ye.+  4  Azali kobengisa likoló mpe mabele,+Mpo na kosambisa bato na ye:+  5  “Bóyanganisa epai na ngai bato na ngai ya sembo,Baoyo bazali kosala kondimana na ngai na nzela ya mbeka.”+  6  Likoló ezali koyebisa bosembo na ye,Mpo Nzambe ye moko azali Mosambisi.+ (Sela)  7  “Yoká, Ee ekólo na ngai, mpe nakoloba;Yisraele, nakolakisa mabe na yo.+ Nazali Nzambe, Nzambe na yo.+  8  Nazali kopamela yo te mpo na bambeka na yo,Ezali mpe te mpo na makabo na yo ya kotumba mobimba oyo ezali liboso na ngai ntango nyonso.+  9  Nazali na mposa te ya kozwa ngɔmbɛ-mobali na ndako na yo,To bantaba* na mapango na yo.+ 10  Mpo nyama nyonso oyo ezali na zamba ezali ya ngai,+Ata banyama likoló ya bangomba nkóto. 11  Nayebi ndɛkɛ nyonso ya bangomba;+Ebele ya banyama ya esobe ezali ya ngai. 12  Soki nazalaki na nzala, nalingaki koyebisa yo yango te,Mpo mabele oyo ebotaka mpe biloko na yango nyonso ezali ya ngai.+ 13  Nakolya nde mosuni ya bangɔmbɛ-mibaliMpe nakomɛla nde makila ya bantaba?+ 14  Pesá Nzambe matɔndi, yango nde mbeka na yo,+Mpe kokisá bilako na yo epai ya Oyo-Aleki-Likoló;+ 15  Bengá ngai na ntango ya mpasi.+ Nakobikisa yo, mpe yo okopesa ngai nkembo.”+ 16  Kasi Nzambe akoloba na moto mabe ete: “Lotomo nini ozali na yango mpo otánga malako na ngai,+To olobela kondimana na ngai?+ 17  Mpo yo oyinaka disiplini,*Mpe ozali kaka kopesa maloba na ngai mokɔngɔ.*+ 18  Ntango omoni moyibi, ondimi ye,*+Mpe ozali kaka kosala boninga na bato ya ekobo. 19  Ozali kosalela monɔkɔ na yo mpo na kopalanganisa mabe,Mpe ozali kokangisa lolemo na yo na bokosi.+ 20  Ozali kofanda mpe koloba mabe mpo na ndeko na yo;+Ozali kobimisa mabunga ya* mwana mobali ya mama na yo. 21  Ntango osalaki makambo wana, nafandaki nyɛɛ.Okanisaki ete nakozala lokola yo. Kasi sikoyo nakopamela yo,Mpe nakobimisa makambo oyo nazali na yango mpo na yo.+ 22  Nabondeli bino, bókanisa likambo oyo, bino baoyo bobosani Nzambe,+Noki te napasola bino bitenibiteni mpe moto oyo akobikisa bino azala te. 23  Moto oyo azali kopesa matɔndi mpo ezala mbeka na ye, azali kopesa ngai nkembo,+Mpe moto oyo azali kokoba kosala oyo ezali malamu,Nakomonisa ye lobiko ya Nzambe.”+

Maloba na nse

To, “Nzambe, Nzambe, Yehova.”
To, “Banda na ɛsti tii wɛsti.”
Lil., “bantaba-mibali.”
Lil., “kobwaka maloba na ngai nsima na yo.”
To, “mateya.”
To mbala mosusu, “okei na ngámbo na ye.”
To, “kotyola.”