Nzembo 62:1-12

  • Lobiko ya solo eutaka epai ya Nzambe

    • “Nazali kozela Nzambe na kimya” (1, 5)

    • ‘Bófungolela Nzambe mitema na bino’ (8)

    • Bato bazali lokola mwa mopɛpɛ (9)

    • Bótya motema te na bomɛngo (10)

Epai ya mokambi ya nzembo; ya Yedutune.* Mondule ya Davidi. 62  Ɛɛ, nazali* kozela Nzambe na kimya. Lobiko na ngai ekouta epai na ye.+  2  Ɛɛ, ye azali libanga na ngai mpe lobiko na ngai, esika makasi na ngai ya kobombana;*+Nakokwea mpenza te.+  3  Tii ntango nini bokokoba kobundisa moto mpo bóboma ye?+ Bino nyonso bozali kobangisa lokola efelo oyo etɛngami, efelo ya mabanga oyo elingi kokwea.*  4  Bazali koyokana mpo na kolongola ye na esika na ye ya lokumu;Basepelaka na lokuta. Na monɔkɔ na bango bazali kopambola, kasi na motema na bango bazali kolakela mabe.+ (Sela)  5  Ɛɛ, nazali kozela* na kimya nyonso Nzambe asala,+Mpo elikya na ngai eutaka epai na ye.+  6  Ɛɛ, ye azali libanga na ngai mpe lobiko na ngai, esika makasi na ngai ya kobombana;Nakokwea ata moke te.+  7  Lobiko na ngai mpe nkembo na ngai eutaka epai ya Nzambe. Libanga na ngai ya makasi, esika na ngai ya kokima, ezali Nzambe.+  8  Ee bino bato, bótyela ye motema ntango nyonso. Bófungolela ye mitema na bino.*+ Nzambe azali esika na biso ya kokima.+ (Sela)  9  Bana ya bato bazali lokola mwa mopɛpɛ,Bana ya bato bazali lokola ndɔtɔ mpamba.+ Soki batye bango nyonso elongo na emekeli-kilo, bakoleka ata mopɛpɛ te na kilo.+ 10  Bótya motema te na kobɔtɔla mpo na kokóma bazwi,Mpe bótya te elikya ya lokuta na moyibi mpo na kokóma na bomɛngo. Soki bomɛngo na bino ebakisami, bótyela yango motema te.+ 11  Nzambe alobi mbala moko, mpe na mbala ya mibale nayoki likambo oyo: Makasi ezali ya Nzambe.+ 12  Lisusu, bolingo ya sembo ezali ya yo, Ee Yehova,+Mpo ozongiselaka moto na moto na kolanda misala na ye.+

Maloba na nse

^ To, “molimo na ngai ezali.”
^ To, “esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná.”
^ To mbala mosusu, “Bino nyonso bozali kosala bongo, lokola nde azali efelo oyo etɛngami, efelo ya mabanga oyo elingi kokwea.”
^ To, “Ee molimo na ngai, zelá.”
^ To, “Bósopela ye mitema na bino.”