Nzembo 138:1-8
Ya Davidi.
138 Nakosanzola yo na motema na ngai mobimba.+
Liboso ya banzambe mosusu,Nakoyemba mpo na kosanzola yo.*
2 Nakogumbama, natali na ngámbo ya tempelo* na yo mosantu,+Mpe nakosanzola nkombo na yo+Mpo na bolingo na yo ya sembo mpe bosembo na yo.
Mpo okumisi liloba na yo mpe nkombo na yo koleka eloko mosusu nyonso.*
3 Na mokolo oyo nabengaki yo,+ oyanolaki ngai;Opesaki ngai mpiko* mpe makasi.+
4 Bakonzi nyonso ya mabele bakosanzola yo, Ee Yehova,+Mpo bakoyoka bilaka nyonso oyo opesaki.
5 Bakoyemba mpo na banzela ya Yehova,Mpo nkembo ya Yehova ezali monene.+
6 Atako Yehova atombwami, atyelaka moto ya komikitisa likebi,+Kasi moto ya lolendo, ayebaka ye kaka na mosika.+
7 Ata soki natamboli na kati ya likama, okobatela ngai na bomoi.+
Mpo na nkanda ya banguna na ngai, okosembola lobɔkɔ na yo;Lobɔkɔ na yo ya mobali ekobikisa ngai.
8 Yehova akosala makambo nyonso mpo na bolamu na ngai.
Ee Yehova, bolingo na yo ya sembo ezali seko na seko;+Kosundola misala ya mabɔkɔ na yo te.+

