Nzembo 110:1-7

  • Mokonzi mpe nganga-nzambe lokola Melekisedeke

    • ‘Yangelá na katikati ya banguna na yo’ (2)

    • Bilenge bamipesaka na bolingo na bango moko lokola matangá ya mamwɛ (3)

Mondule ya Davidi. 110  Yehova alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali+Tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo.”+  2  Yehova akotya lingenda na ye ya makasi uta na Siona, na maloba oyo: “Kende na katikati ya banguna na yo mpe konzá bango.”+  3  Bato na yo bakomipesa na bolingo na bango moko na mokolo oyo okokamba limpinga ya basoda na yo na etumba.* Na nkembo mingi ya bosantu,Ozali na etuluku na yo ya bilenge lokola matangá ya mamwɛ* ya kotana ya ntɔngɔ.  4  Yehova alapi ndai mpe akobongola makanisi na ye te:* “Ozali nganga-nzambe libela na libela+Lokola Melekisedeke!”+  5  Yehova akozala na lobɔkɔ na yo ya mobali;+Akobukabuka bakonzi na mokolo ya nkanda na ye.+  6  Akopesa etumbu na kati ya bikólo;+Akotondisa mokili na bibembe.+ Akobukabuka nkumu* ya mokili monene.*  7  Akomɛla* mai ya mokɛli na nzela. Yango wana akotombola motó na ye likoló.

Maloba na nse

To, “na mokolo oyo okoyanganisa limpinga ya basoda na yo.”
Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.
To, “akoyoka mawa te.”
Lil., “motó.”
To, “ya mabele mobimba.”
Ezali komonisa “Nkolo na ngai” oyo ezali na v. 1.