Nzembo 70:1-5

  • Kosɛnga lisalisi ya nokinoki

    • “Salá noki okɔta likambo na ngai” (5)

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya Davidi, mpo ezala likambo ya kokanisa.* 70  Ee Nzambe, bikisá ngai,Ee Yehova, yaká noki kosalisa ngai.+  2  Baoyo bazali koluka koboma ngai*Báyoka nsɔni mpe básambwa. Baoyo bazali kosepela na mpasi na ngaiBázonga nsima na nsɔni.  3  Baoyo bazali koloba: “Aha! Aha!” Bázonga nsima na nsɔni.  4  Kasi baoyo bazali koluka yoBásepela mpe bázala na esengo mpo na yo.+ Baoyo balingaka misala na yo ya kobikisa báloba ntango nyonso ete: “Nzambe akumisama!”  5  Kasi ngai nazali moto oyo azangi lisalisi mpe mobola;+Ee Nzambe, salá noki okɔta likambo na ngai.+ Yo ozali mosungi na ngai mpe mobikisi na ngai;+Ee Yehova, koumela te.+

Maloba na nse

To, “mpo ezongisa na makanisi.”
To, “koluka molimo na ngai.”