Nzembo 48:1-14

  • Siona, “engumba ya Mokonzi Monene”

    • Esengo ya mabele mobimba (2)

    • Bótala malamumalamu engumba mpe bandako milai na yango (11-13)

Loyembo. Mondule ya bana ya Kora.+ 48  Yehova azali monene mpe abongi kosanzolamaNa engumba ya Nzambe na biso, na ngomba na ye mosantu.  2  Ngomba Siona ezali mosika mpenza kuna na nɔrdi,Ezali kitoko mpe etombwaná, mpe ezali esengo ya mabele mobimba,+Engumba ya Mokonzi Monene.+  3  Na bandako milai na yango ya makasi,Nzambe amonisi ete azali esika makasi ya kobombana.*+  4  Mpo talá! bakonzi bayangani;*Bazali kokende liboso elongo.  5  Ntango bamonaki engumba, bakamwaki. Babulunganaki mpe bakimaki na nsɔmɔ.  6  Kuna, kolɛnga ekangaki bango,Mpasi lokola ya mwasi oyo azali kobota.  7  Na mopɛpɛ ya ɛsti obebisaki bamasuwa ya Tarasisi.  8  Makambo oyo toyokaki, yango nde biso moko tomoniNa engumba ya Yehova ya mampinga, na engumba ya Nzambe na biso. Nzambe akotɛlɛmisa yango makasi mpo na libela.+ (Sela)  9  Ee Nzambe, tokanisaka na mozindo bolingo na yo ya sembo,+Na kati ya tempelo na yo. 10  Ee Nzambe, lokola nkombo na yo, lisanzoli na yoEkómi tii na bansuka ya mabele.+ Lobɔkɔ na yo ya mobali etondi na bosembo.+ 11  Ngomba Siona+ esepela,Bingumba ya Yuda ezala* na esengo mpo na bikateli na yo ya lisambisi.+ 12  Bótambola zingazinga ya Siona; bótambola zingazinga na yango;Bótánga bandako na yango ya milai.+ 13  Bótya mitema na bino na bifelo na yango ya makasi.+ Bótala malamumalamu bandako milai na yango ya makasi,Mpo bóyebisa yango na mabota oyo ekoya nsima. 14  Mpo Nzambe oyo, azali Nzambe na biso+ libela na libela. Akokamba biso mpo na libela.*+

Maloba na nse

To, “esika ya kobombana oyo etombwaná.”
To, “bakutani ndenge bayokanaki.”
Lil., “Bana basi ya Yuda bázala.”
To mbala mosusu, “tii tokokufa.”