Nzembo 106:1-48
106 Bósanzola Yah!*
Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu;+Bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.+
2 Nani akoki kolobela misala nyonso ya nguya ya Yehova,To kosakola misala na ye nyonso oyo ebongi kosanzolama?+
3 Esengo na baoyo bazali kosala makambo na bosembo,Baoyo basalaka ntango nyonso makambo na boyengebene.+
4 Ee Yehova, kanisá ngai, ntango ozali komonisela bato na yo boboto.*+
Batelá ngai na misala na yo ya kobikisa,
5 Mpo nasepela na bolamu oyo omoniselaka bato oyo oponá,+Mpo nasepela elongo na ekólo na yo,Mpo nasanzola yo na komikumisa nyonso elongo na libula na yo.
6 Tosali masumu kaka ndenge bankɔkɔ na biso basalaki;+Tosali libunga; tosali mabe.+
7 Bankɔkɔ na biso na Ezipito basepelaki te na* misala na yo ya kokamwa.
Bakangaki ntina te ya bonene ya bolingo na yo ya sembo,Kasi batombokaki na mbu, pene na Mbu Motane.+
8 Kasi Nzambe abikisaki bango mpo nkombo na ye ekumisama,+Mpo na koyebisa nguya na ye.+
9 Apamelaki Mbu Motane, mpe ekaukaki;Atambwisaki bango na mai mozindo lokola na mokili ekauká;*+
10 Abikisaki bango na lobɔkɔ ya monguna+Mpe asikolaki bango na lobɔkɔ ya monguna.+
11 Mai ezipaki banguna na bango;Moko te kati na bango abikaki.*+
12 Bongo bandimelaki elaka na ye;+Babandaki kosanzola ye na loyembo.+
13 Kasi babosanaki nokinoki misala na ye;+Bazelaki litambwisi na ye te.
14 Bakómaki na bamposa ya lokoso na esobe;+Bamekaki Nzambe na mokili ekauká.+
15 Apesaki bango oyo basɛngaki,Kasi asalaki ete bábɛla maladi ya makasi oyo elɛmbisaki bango mpe ebomaki bango.+
16 Na kaa bayokelaki Moize zuwaAta Arona,+ mosantu ya Yehova.+
17 Mabele efungwamaki mpe emɛlaki DataneMpe ezipaki baoyo basanganaki na Abirame.+
18 Mɔtɔ epelaki na kati ya etuluku na bango;Lolemo ya mɔtɔ ezikisaki bato mabe.+
19 Basalaki mwana-ngɔmbɛ na HorebeMpe bagumbamelaki ekeko ya ebende;*+
20 Babandaki kosambela elilingi ya ngɔmbɛ oyo elyaka matitiNa esika ya kopesa ngai nkembo oyo ebongi na ngai.+
21 Babosanaki Nzambe,+ Mobikisi na bango,Moto oyo asalaki makambo ya minene na Ezipito,+
22 Misala ya kokamwa na mokili ya Kame,+Makambo ya nsɔmɔ na Mbu Motane.+
23 Etikalaki moke apesa etinda ya kosilisa bango nyɛɛ,Kasi Moize, moto oyo ye aponá, abondelaki ye*Mpo na kopekisa nkanda na ye mpe aboma bango te.+
24 Bongo batyolaki mokili ya kitoko;+Bandimelaki elaka na ye te.+
25 Bazalaki kaka koimaima na bahema na bango;+Bayokaki mongongo ya Yehova te.+
26 Bongo atombolaki lobɔkɔ na ye mpo na kolapela bango ndaiEte akokweisa bango na esobe;+
27 Akosala ete bana na bango bákwea na kati ya bikólo,Mpe akopalanganisa bango na mikili.+
28 Mpe babandaki kosambela* Baala ya Peore+Mpe balyaki bambeka oyo bapesaki na bakufi.*
29 Batumolaki Ye na misala na bango,+Mpe mpasi moko ebimaki na kati na bango.+
30 Kasi ntango Finehase atɛlɛmaki mpe akɔtaki likambo yango,Mpasi yango esukaki.+
31 Mpe atángamaki moto ya sembo*Libota na libota mpo na libela.+
32 Batumolaki Ye na mai ya Meriba,*Bongo makambo ebebelaki Moize mpo na bango.+
33 Basilikisaki elimo na ye,Mpe alobaki maloba oyo akanaki te na mbɛbu na ye.+
34 Basilisaki mpenza te bato ya bikólo,+Ndenge Yehova apesaki bango mitindo.+
35 Kasi basanganaki na bato ya bikólo+Mpe balandaki* banzela na bango.+
36 Bazalaki kaka kosalela bikeko na bango,+Mpe yango ekómaki motambo mpo na bango.+
37 Bazalaki kokaba bana na bango ya mibaliMpe ya basi mbeka epai ya bademo.+
38 Bazalaki kaka kosopa makila ya bato oyo bazali na likambo te,+Makila ya bana na bango ya mibali mpe ya basiOyo bazalaki kopesa bikeko ya Kanana mbeka;+Mpe mokili ekómaki mbindo mpo basopaki makila.
39 Bakómaki mbindo mpo na misala na bango;Basalaki bondumba ya elimo na misala na bango.+
40 Bongo nkanda ya Yehova epelelaki bato na ye,Mpe akómaki koyina libula na ye.
41 Mbala na mbala apesaki bango na lobɔkɔ ya bikólo,+Mpo baoyo bayinaki bango báyangela bango.+
42 Banguna na bango banyokolaki bango,Mpe batyamaki na nse ya nguya* na bango.
43 Mbala mingi azalaki kobikisa bango,+Kasi bazalaki kotomboka mpe kozanga botosi,+Mpe bazalaki kokitisama mpo na libunga na bango.+
44 Kasi azalaki komona mpasi na bango+Mpe ayokaki koganga na bango mpo na kosɛnga lisalisi.+
45 Mpo na bango, azalaki kokanisa kondimana na ye,Mpe bolingo ya sembo na ye monene ezalaki kotinda ye ayoka mawa.+
46 Asalaki ete baoyo bazalaki kozwa bango baombo,Báyokela bango mawa.+
47 Bikisá biso, Ee Yehova Nzambe na biso,+Mpe yanganisá biso uta na bikólo+Mpo tókumisa nkombo na yo mosantuMpe tósanzola yo na esengo.*+
48 Yehova Nzambe ya Yisraele asanzolamaLibela na libela.*+
Mpe bato nyonso báloba: “Amen!”*
Bósanzola Yah!*
Maloba na nse
^ To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
^ To, “ndenge osepelaka na bato na yo.”
^ To, “bakangaki te ntina ya.”
^ To, “esobe.”
^ To, “atikalaki.”
^ To, “oyo enyangwisami.”
^ Lil., “atɛlɛmaki na libulu liboso na ye.”
^ To, “kokangama na.”
^ Elingi koloba, bambeka oyo bapesaki ezala epai ya bato oyo bakufá to epai ya banzambe oyo bazangi bomoi.
^ To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
^ Elimboli, “koswanisa.”
^ To, “bayekolaki.”
^ Lil., “lobɔkɔ.”
^ To, “tósepela na masanzoli na yo.”
^ To, “Seko na seko.”
^ To, “Ezala bongo!”
^ To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

