Nzembo 113:1-9
113 Bósanzola Yah!*
Bópesa ye masanzoli, bino basaleli ya Yehova,Bósanzola nkombo ya Yehova.
2 Nkombo ya Yehova esanzolamaBanda sikoyo mpe mpo na libela.+
3 Banda epai moi ebimaka tii epai elalaka,Nkombo ya Yehova esanzolama.+
4 Yehova azali likoló ya bikólo nyonso;+Nkembo na ye ezali mosika koleka likoló.+
5 Nani azali lokola Yehova Nzambe na biso,+Ye oyo afandaka* na likoló?
6 Akitaka mpo na kotala likoló mpe mabele,+
7 Atombolaka moto mpamba longwa na putulu.
Abimisaka mobola na ebele ya putulu ya mɔtɔ*+
8 Mpo na kofandisa ye esika moko na bankumu,Esika moko na bankumu ya bato na ye.
9 Azali kopesa mwasi ekomba ndako,Mama ya esengo oyo azali na bana.*+
Bósanzola Yah!*

