Nzembo 84:1-12

  • Mposa makasi ya tabernakle monene ya Nzambe

    • Molevi moko azali na mposa makasi azala lokola ndɛkɛ (3)

    • “Mokolo moko na ndako na yo” (10)

    • “Nzambe azali moi mpe nguba” (11)

Mpo na mokambi ya nzembo; na Gitite.* Mondule ya bana ya Kora.+ 84  Tabernakle na yo monene ezali kitoko mpenza,*+Ee Yehova ya mampinga!  2  Mobimba* na ngai nyonso ezali na mposa makasi,Ɛɛ, nazali na mposa makasi ya mapango ya ndako ya Yehova.+Motema na ngai mpe mosuni na ngai Ezali koganga na esengo mpo na Nzambe ya bomoi.  3  Ata ndɛkɛ mpe ezwi ndako kunaMpe nyampeke emisaleli zumbu* na yango,Epai ebatelaka bana na yangoPembeni ya etumbelo na yo monene, Ee Yehova ya mampinga,Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai!  4  Esengo na baoyo bazali kofanda na ndako na yo!+ Basanzolaka yo ntango nyonso.+ (Sela)  5  Esengo na bato oyo bazwaka makasi epai na yo,+Baoyo mposa ya motema na bango ezali na banzela oyo ezali komema na ndako na yo.  6  Ntango bazali koleka na Lobwaku ya mwa banzete ya Baka,Bakómisi yango esika ya maziba;Mpe mbula ya ebandeli elatisi yango* na mapamboli.  7  Bakotambola kasi makasi na bango ekosila te+Mokomoko azali kobima liboso ya Nzambe na Siona.  8  Ee Yehova Nzambe ya mampinga, yoká libondeli na ngai;Yoká, Ee Nzambe ya Yakobo. (Sela)  9  Talá, nguba na biso+ mpe Nzambe na biso,*Talá elongi ya moto na yo oyo atyami mafuta.+ 10  Mpo mokolo moko na ndako na yo eleki mikolo nkóto epai mosusu!+ Naponi kotɛlɛma na ekɔtelo ya ndako ya Nzambe na ngaiNa esika nafanda na bahema ya bato mabe. 11  Mpo Yehova Nzambe azali moi+ mpe nguba;+Apesaka boboto mpe nkembo. Yehova akoboya te kopesa eloko moko ya malamuNa baoyo bazali kotambola na bosembo.+ 12  Ee Yehova ya mampinga,Esengo na moto oyo azali kotyela yo motema.+

Maloba na nse

^ To, “elingami mpenza.”
^ To, “Molimo.”
^ To, “zála.”
^ To mbala mosusu, “mosakoli azali komizinga.”
^ To mbala mosusu, “Moná nguba na biso, Ee Nzambe.”