Sanza ya 6
Mwayambo, 1 sanza ya 6
Mpo yo, Ee Yehova, ozali malamu mpe osepelaka kolimbisa.—Nz. 86:5.
Tozali kozwa matomba na mbeka ya lisiko ya Kristo banda sikoyo. Na ndakisa, na nzela ya lisiko, Yehova alimbisaka masumu na biso. Asɛngisami te kolimbisa biso, kasi alingaka kosala yango. (Nz. 103:3, 10-13) Bato mosusu bamiyokaka ete babongi te ete Yehova alimbisa bango. Mpo na koloba solo, biso nyonso tobongi te. Ntoma Paulo akangaki ntina ete ‘abongaki kutu te kobengama ntoma.’ Kasi, abakisaki: “Mpo na boboto monene ya Nzambe, nazali ndenge nazali.” (1 Ko. 15:9, 10) Ntango tobongoli motema na masumu na biso, Yehova alimbisaka biso. Mpo na nini? Ezali te mpo tobongi na yango, kasi nde mpo alingaka biso. Soki ozali komiyoka ete obongi te Yehova alimbisa yo, kobosana te ete Yehova apesaki lisiko te mpo na bato oyo bazangá lisumu, kasi nde mpo na basumuki oyo babongoli motema.—Luka 5:32; 1 Tim. 1:15. w25.01 26-27 par. 3-4
Moto ya motema boboto amisalelaka malamu, kasi moto ya nko amimemelaka mpasi.—Mas. 11:17.
Tokoki te koyeba oyo basusu bakoki koloba to kosala biso, kasi tokoki koyeba ndenge oyo biso tokosala. Mpe mbala mingi kolimbisa nde likambo eleki malamu oyo tokoki kosala. Mpo na nini? Mpo tolingaka Yehova, mpe alingi tólimbisaka. Soki tobombi nkanda mpe tolimbisi te, tokoki kosala makambo ya bozoba mpe mbala mosusu kobebisa kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso. (Mas. 14:17, 29, 30) Ntango totiki koyoka nkanda, tokomibatela mpo tókóma nkandankanda te na motema na biso. Tokomisala mpe malamu; tokotala liboso mpe tokozongela kosepela lisusu na bomoi. Ndenge nini okoki kolongola mayoki ya mabe? Ya liboso, omipesa ntango mpo motema na yo ebika. Mpo moto oyo abukanaki makasi abika nsima ya kozwa lisalisi ya monganga, esengeli ntango eleka. Ndenge moko mpe, ekoki kosɛnga ntango eleka mpo motema na biso ebika liboso tómona ete tokoki sikoyo kolimbisa na motema moko. (Mos. 3:3; 1 Pe. 1:22) Bondelá, sɛngá Yehova asalisa yo olimbisaka. w25.02 16-17 par. 8-11
Bilei ya makasi ezali ya bato oyo bakɔmɛli.—Ebr. 5:14.
Mateya ya kobongola motema, kondima, batisimo, mpe lisekwa. (Ebr. 6:1, 2) Yango ezali na kati ya mateya oyo esimbi bokristo. Yango wana, ntoma Petro alobelaki yango ntango ateyaki ebele ya bato na mokolo ya Pantekote. (Mis. 2:32-35, 38) Tosengeli kondima mateya yango ya ebandeli mpo na kokóma bayekoli ya Kristo. Na ndakisa, Paulo alobaki ete moto nyonso oyo alobi ete lisekwa ezali te, akoki kozala moyekoli ya Kristo te. (1 Ko. 15:12-14) Kasi, mpo na kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo, tosengeli te kosuka kaka na boyebi wana ya ebandeli ya mateya solo. Na bokeseni na mateya ya ebandeli, bilei ya makasi ya elimo ezali kaka te mibeko ya Yehova kasi mpe mitinda na ye, mpe yango esalisaka biso tóyeba makanisi na ye. Mpo na kolya bilei yango ya makasi, tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe, komanyola yango, mpe kosalela malamu makambo oyo toyekoli. Ntango tozali kosala bongo, tozali koyekola ndenge ya kozwa bikateli oyo esepelisaka Yehova. w24.04 5 par. 12-13
Na Mokolo ya Kosambisama, bato ya Ninive bakosekwa.—Mat. 12:41.
Nzambe akundwelaki Yona ete bato ya Ninive bayebaki “kutu te kokesenisa mabe ná malamu.” (Yona 1:1, 2; 3:10; 4:9-11) Na nsima, Yesu asalelaki ndakisa yango mpo na kobenda likebi na bosembo mpe motema mawa ya Yehova. “Mokolo ya Kosambisama” ntango bato ya Ninive “bakosekwa” ezali nini? Yesu alobaki ete ekozala na “lisekwa ya kosambisama.” (Yoa. 5:29) Azalaki kolobela boyangeli na ye ya mbula nkóto, ntango oyo ‘bato ya sembo mpe bato oyo bazangi bosembo’ bakosekwa. (Mis. 24:15) Mpo na bato oyo bazangi bosembo, ekozala “lisekwa ya kosambisama.” Elingi koloba, Yehova ná Yesu bakotalela etamboli na bango mpe ndenge oyo bakosalela mateya ya Nzambe oyo bakoyekola. Soki moto moko ya Ninive oyo asekwi aboyi kosambela Yehova na losambo ya pɛto, lisambisi na ye ekozala ete Yehova akotika ye te akoba kozala na bomoi. (Yis. 65:20) Kasi, baoyo nyonso bakopona kosambela Yehova na bosembo, lisambisi na bango ekozala ya malamu. Bakozala na elikya ya kozala na bomoi ya seko!—Dan. 12:2. w24.05 5 par. 13-14
Mwana ya moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa baoyo babungaki.—Luka 19:10.
Yesu amonisaki polele mpe na ndenge ya kokoka motema mawa ya Tata na ye. (Yoa. 14:9) Na maloba mpe na misala na ye, Yesu amonisaki ete Tata na ye ya motema mawa alingaka bato mpe alingi kosalisa mokomoko alonga etumba ya kobundisa lisumu. Yesu asalisaki bato ya masumu bálinga kobongola bomoi na bango mpe kolanda ye. (Luka 5:27, 28) Yesu ayebaki makambo oyo ezalaki kozela ye. Ayebisaki bayekoli na ye mbala ebele ete akotɛkama mpe akobakama na nzete. (Mat. 17:22; 20:18, 19) Ayebaki ete mbeka oyo akopesa ekolongola lisumu ya mokili. Yesu alobaki mpe ete nsima ya kopesa bomoi na ye mbeka, ‘akobenda bato ya ndenge nyonso’ epai na ye. (Yoa. 12:32) Bato ya masumu bakokaki kosepelisa Yehova soki bandimi Yesu lokola Nkolo na bango mpe balandi ndakisa na ye. Soki básalaka bongo, nsukansuka balingaki ‘kosikolama na lisumu.’ (Rom. 6:14, 18, 22; Yoa. 8:32) Yango wana Yesu amonisaki mpiko mpe andimaki kokufa liwa ya mpasi mingi.—Yoa. 10:17, 18. w24.08 5 par. 11-12
Na bikólo nyonso, nsango malamu esengeli naino kosakolama.—Mrk. 13:10.
Kanisá lisusu ndenge oyo omiyokaki mbala ya liboso oyo oyokaki solo ya Liloba ya Nzambe. Oyekolaki ete Tata na biso ya likoló alingaka yo, ete alingi okɔta na libota ya basambeli na ye, alaki ete mpasi mpe mikakatano ekosila, ete okoki kolikya komona lisusu bandeko mpe baninga oyo bakufá ntango bakosekwa na mokili ya sika, mpe oyekolaki makambo mosusu mingi. (Mrk. 10:29, 30; Yoa. 5:28, 29; Rom. 8:38, 39; Em. 21:3, 4) Mateya yango esimbaki motema na yo. (Luka 24:32) Olingaki makambo oyo ozalaki koyekola, mpe okokaki te kobomba mateya yango ya motuya mpo na yo moko! (Talá mpe Yirimia 20:9.) Ntango bolingo mpo na solo ya Biblia ezwi misisa na motema na biso, tokokoka kofanda nyɛɛ te. (Luka 6:45) Tokoyoka lokola bayekoli ya Yesu ya siɛklɛ ya liboso, oyo balobaki: “Tokoki kotika te koloba makambo oyo tomoni mpe toyoki.” (Mis. 4:20) Tolingaka solo mingi yango wana tolukaka koyebisa yango bato mingi mpenza. w24.05 15 par. 5; 16 par. 7
Bósalela Yehova na esengo.—Nz. 100:2.
Biso basaleli ya Yehova tosakwelaka basusu mpo tolingaka Tata na biso ya likoló mpe tosepelaka kosalisa bato báyeba ye. Kasi mpo na basusu, ezalaka mpasi mpo básepela na mosala yango. Mpo na nini? Mbala mosusu bazalaka nsɔninsɔni to babangaka mingi. Basusu bakokaka te kokende na bandako ya bato kozanga bábengisa bango. Basusu babangaka ete básilikela bango. Mbala mosusu basusu babɔkwamá na likanisi ete esengeli koboya mindɔndɔ na bato. Bandeko yango bamonaka ete ezali mpasi kosolola na bato oyo bayebi te mpe koyebisa bango nsango malamu. Na bantango mosusu ezalaka mpasi osepela na mosala ya kosakola mpo na bantina oyo touti kolobela? Soki bongo, kolɛmba nzoto te. Ndenge obangaka ekoki komonisa ete ozali na komikitisa, oboyaka kobenda likebi epai na yo moko, mpe ete olingaka te kobendana na bato. Lisusu, moto te alingaka básilikela ye, mingimingi ntango alingi nde kosalisa basusu. Tata na yo ya likoló ayebi malamu mikakatano oyo ozali kokutana na yango mpe alingi kosalisa yo mpenza.—Yis. 41:13. w24.04 14 par. 1-2
Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.—Mas. 11:2.
Ntango ozali kotánga Biblia, osengeli te koluka kosalela na mbala moko makambo nyonso oyo otángi; zalá na bopɔlɔ na mikano oyo okomityela. Meká kosala boye: Komá makambo nyonso oyo osengeli kobongisa, mpe na nsima poná likambo moko to mibale oyo okosala liboso, mpe mosusu tiká okosala nsima. Osengeli kobanda na nini? Okoki kobanda na likambo oyo omoni ete ezali mpasi te okokisa yango. To okoki kopona kosala mbongwana na likambo oyo omoni ete ezali na ntina mingi. Nsima ya komityela mokano, salá bolukiluki na mikanda na biso. Bondelá mpo na mokano oyo omityeli, sɛngá Yehova apesa yo “mposa mpe nguya ya kosala” mpo okokisa yango. (Flp. 2:13) Na nsima, luká kosalela makambo oyo oyekolaki. Soki ozali kokokisa malamu mokano na yo ya liboso, na ntembe te okolinga kokokisa mokano mosusu. Kutu, soki obongisi likambo moko na bomoto na yo ya bokristo, to okolisi ezaleli moko, okoki komona ete ezali mpasi te obongisa mpe makambo mosusu. w24.09 6 par. 13-14
Eloko nyonso esalemaki na ndenge oyo ebongi mpo na kosilisa likambo yango.—2 Ko. 7:11.
Mbala mosusu ozali komitungisa mpo makambo mosusu oyo osalá na kala epesaki basusu mpasi. Okoki kosala nini? Salá oyo okoki mpo na kobongisa makambo, ata mpe kosɛnga bolimbisi oyo euti na motema. Sɛngá Yehova asalisa bato oyo makambo oyo osalaki enyokolaki. Yehova akoki kosalisa yo mpe baoyo opesaki mpasi bóyika mpiko mpe bózwa lisusu kimya. Zwá mateya na mabunga oyo osalá na kala, mpe ndimá Yehova asalela yo na ndenge oyo alingi. Talá ndakisa ya mosakoli Yona. Na esika akende na Ninive epai Nzambe atindaki ye, Yona akimaki na ngámbo mosusu. Yehova apesaki Yona disiplini mpe Yona azwaki mateya na libunga na ye. (Yona 1:1-4, 15-17; 2:7-10) Yehova atikaki te kosalela Yona lokola mosakoli. Apesaki ye lisusu libaku ya kokende na Ninive, mpe Yona atosaki mbala moko. Atikaki te ete mawa oyo ayokaki mpo na libunga oyo asalaki liboso epekisa ye kondima mokumba mosusu epai ya Yehova.—Yona 3:1-3. w24.10 8-9 par. 10-11
Na yango, bóbongola mitema mpe bóbongwana mpo masumu na bino ebomama, mpo bileko ya kopema euta epai ya Yehova ye moko.—Mis. 3:19.
Yehova asukaka kaka te na kolongola nyongo to masumu na biso; abomaka yango. Ntango balongoli nyongo moko, ezalaka lokola batye elembo monene ya X likoló ya motángo yango. Kasi, okoki kaka komona motángo oyo ezalaki wana. Kasi koboma makomi ezali ndenge mosusu. Mpo na kokanga ntina ya maloba yango ya elilingi, tosengeli komikundwela ete na ntango ya kala, bazalaki kosalela mai ya mokanda oyo basalá na karbone basangisá na kɔle mpe mai. Moto akokaki kopɔlisa elamba mpe kopangwisa makomi. Na yango, ntango nyongo ‘ebomami,’ elimwe mpenza. Makambo oyo ekomamaki ekokaki komonana lisusu polele te na miso. Makomi yango ezali lisusu te. Epesaka biso esengo na motema koyeba ete Yehova asukaka kaka te na kolongola masumu na biso, kasi abomaka yango mpe nyonso!—Nz. 51:9. w25.02 10 par. 11
Kosilika te mpo yango ekotinda yo osala mabe.—Nz. 37:8.
Ntango moto akaniseli biso mabe to asali biso makambo ya kozanga bosembo, tosengeli kotya motema ete Yehova ayebi bosolo ya makambo. Kotya motema ndenge wana ekoki kosalisa biso tóyika mpiko mpo toyebi ete nsukansuka Yehova akosembola makambo. Soki totiki makambo na mabɔkɔ ya Yehova, tokokangela moto nkanda te mpe tokoyina moto te. Mayoki ya ndenge wana ekoki kotinda biso tólekisa ndelo na ezaleli na biso, ekoki kosilisa esengo na biso, mpe kobebisa boyokani na biso na Yehova. Ya solo, tokokoka ata moke te kolanda ndakisa ya Yesu na ndenge ya kokoka. Na bantango mosusu, tokoki kosala to koloba makambo oyo na nsima ekopesa biso mawa. (Yak. 3:2) Mpe makambo mosusu ya kozanga bosembo ekoki kotika biso na elembo na motema to na nzoto bomoi na biso mobimba na mokili oyo. Soki ezali bongo mpo na yo, yebá ete Yehova ayebi mpasi na yo. Mpe Yesu, oyo akutanaki mpe na makambo ya kozanga bosembo, akoki komitya na esika na yo. (Ebr. 4:15, 16) Tosepelaka ndenge Yehova apesi biso toli ya malamu oyo esalisaka biso tóyika mpiko na makambo ya kozanga bosembo. w24.11 6 par. 12-13
Oyo ezali mosala ya Nzambe, ete bómonisa kondima na moto oyo ye atindaki.—Yoa. 6:29.
Esengeli komonisa kondima na momonisi ya Nzambe mpo na ‘kozwa bomoi ya seko.’ (Yoa. 3:16-18, 36; 17:3) Bayuda yango bandimaki te liteya ya Yesu oyo etali “mosala ya Nzambe,” elingi koloba komonisa kondima epai ya Yesu. Batunaki ye: “Likamwisi nini okosala, mpo ete tómona yango mpe tóndima yo?” (Yoa. 6:30) Balobaki ete bankɔkɔ na bango na mikolo ya Moize balyaki mana, oyo ezalaki lokola mampa, bilei ya mokolo na mokolo. (Neh. 9:15; Nz. 78:24, 25) Ezali polele ete likebi na bango ezalaki kaka na kokokisa mposa na bango ya kolya mampa ya solo. Basɛngaki ata Yesu te ete alimbola makambo oyo alobaki na nsima na oyo etali “limpa ya solosolo oyo euti na likoló,” oyo ezalaki lokola mana, bilei ya likoló oyo ezalaki kopesa bomoi. (Yoa. 6:32) Batyaki likebi nyonso kaka na bamposa na bango ya mosuni, na boye ete babosanaki mposa na bango ya koyeba makambo ya elimo oyo Yesu azalaki koluka koteya bango. w24.12 5-6 par. 10-11
Moto oyo azalisá biloko nyonso ezali Nzambe.—Ebr. 3:4.
Wana mwana azali koyekola makambo mingi ya siansi na kelasi, akoyeba mibeko oyo esimbi lolenge ya biloko mosusu mingi. Na ndakisa, ezali na lolenge mosusu oyo ebengami forme fractale oyo ezali lokola eloko moko ebandi monene mpe ezali kokabwana mokemoke. Na ndakisa, banzete mingi ezali na lolenge yango. Nzoto ya nzete ebimisaka bitape ya monene, na nsima bitape ya mwa mike, mpe bitape ya mikemike. Biloko mingi ezali na lolenge yango. Kasi nani asalá ete biloko yango ekoba kolanda kaka lolenge na yango ya kitoko? Nani nde abongisá makambo ezala na molɔngɔ ndenge wana mpe ebongisama malamu ndenge wana? Soki mwana azali kokanisa mingi na mituna ya ndenge wana, na ntembe te akobanda kokóma na kondima mpenza ete Nzambe nde akelá biloko nyonso. Wana mwana azali kokola, okoki kosalisa ye amona ntina oyo tosengeli kotosa mibeko ya Nzambe. Okoki kotuna ye motuya oyo: “Soki Nzambe nde akelá biso, omoni te ete ebongi apesa biso mpe mibeko oyo ekosalisa biso tózala na esengo?” Na nsima, okoki kolakisa ye batoli ya malamu oyo ezali na Biblia. w24.12 16 par. 8
Nazali koyoka ete pite ezali kosalema na kati na bino, mpe etamboli ya mbindo ya ndenge wana ezalaka ata kutu te epai ya bikólo: mobali moko azwi mwasi ya tata na ye.—1 Ko. 5:1.
Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, ntoma Paulo akomaki mokanda oyo elobaki ete bálongola na lisangá mosumuki oyo abongolaki motema te. (1 Ko. 5:13) Ndenge nini bakristo ya sembo basengelaki kotalela moto yango? Paulo ayebisaki bango ‘bákata boninga’ na ye. Yango elingaki koloba nini? Paulo alimbolaki ete mobeko yango esangisaki mpe koboya ‘kolya kutu esika moko na moto ya ndenge wana.’ (1 Ko. 5:11) Kofanda mpo na kolya esika moko na moto ekoki komema na kolekisa ntango mingi mpe kobɛta masolo. Na yango, ezali polele ete Paulo alingaki koloba ete lisangá esengeli te kolekisa ntango elongo na mobali yango. Yango elingaki kobatela lisangá na etamboli mabe ya moto yango. (1 Ko. 5:5-7) Lisusu, koboya kozala na boninga na mobali yango ekokaki kotinda ye amona ete atikaki mpenza banzela ya Yehova, akokaki koyoka nsɔni mpe kobongola motema. w24.08 15 par. 4-5
Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki.—Yoa. 3:16.
Na Yisraele, Mokolo ya kozipa masumu ezalaki molulu ya mbula na mbula. Na mokolo yango, nganga-nzambe monene azalaki kopesa bambeka ya banyama mpo na bato. Ya solo, bambeka ya banyama ekokaki te kozipa libela masumu ya moto mpo nyama ezali na motuya moke liboso ya bato. Kasi, soki Bayisraele oyo babongoli motema bapesi bambeka oyo Yehova asɛngaki, azalaki kondima kolimbisa masumu na bango. (Ebr. 10:1-4) Ebongiseli wana ezalaki kokundwela Bayisraele ete kozala moto ya masumu ezali lisɛki te. Kasi, Yehova ayebaki ete akotya ebongiseli moko ya libela mpo na kolimbisa masumu. Abongisaki ete Mwana na ye ya bolingo “[akabama] mbala moko mpo na libela mpo na komema masumu ya bato mingi.” (Ebr. 9:28) Yesu apesaki “bomoi na ye lisiko na esika ya bato mingi.”—Mat. 20:28. w25.02 4 par. 9-10
Bókoba kosɛnzɛla mpe kobondela ntango nyonso, mpo bókwea na komekama te.—Mat. 26:41.
“Elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.” (Mat. 26:41b) Na maloba yango, Yesu amonisaki ete ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe tokosala mabunga. Kasi, maloba yango ezali mpe na likebisi moko: Tosengeli te komityela motema koleka ndelo. Mwa bangonga liboso Yesu aloba maloba wana, kaka na butu wana, bayekoli na ye batutaki ntolo ete bakotika Nkolo na bango te, ata ndenge nini. (Mat. 26:35) Bazalaki na mposa ya kosala oyo ezali malamu. Kasi, bayebaki te ndenge ekokaki kozala mpasi bátikala ngwi soki batye bango mbamba. Yango wana Yesu akebisaki bango na maloba oyo ezali na mokapo ya lelo. Likambo ya mawa, bayekoli bakobaki kosɛnzɛla te. Ntango bakangaki Yesu, batikalaki elongo na ye to bakweaki na komekama mpe bakimaki? Lokola bayekoli bazalaki ekɛngɛ te, basalaki likambo oyo batutaki ntolo ete bakosala ata moke te: basundolaki Yesu.—Mat. 26:56. w24.07 14 par. 1-2
Tozongisaki boyokani ná Nzambe na nzela ya liwa ya Mwana na ye.—Rom. 5:10.
Adama ná Eva babebisaki mpe boyokani oyo bazalaki na yango na Tata na bango Yehova. Na ebandeli, bazalaki na kati ya libota ya Nzambe. (Luka 3:38) Kasi ntango babukaki mobeko ya Yehova, balongolamaki na libota na ye liboso bábanda kobota bana. (Eba. 3:23, 24; 4:1) Na yango, lokola tozali bakitani na bango, tosengeli kozongisa boyokani na Yehova. (Rom. 5:10, 11) Na maloba mosusu, tosengeli koluka kokóma baninga na ye. Diksionɛrɛ moko emonisi ete liloba ya Grɛki oyo basaleli na bavɛrsɛ yango mpo na “kozongisa boyokani” ekoki kolimbola “kotika kozala banguna mpe kokóma baninga.” Likambo ya kokamwa, Yehova nde moto azwaki bibongiseli mpo na kozongisa boyokani yango. Ndenge nini? Na nzela ya ebongiseli ya kozipa masumu, oyo Yehova azwaki mpo na kozongisa boyokani malamu kati na ye ná bato ya masumu. Yango esɛngi kopesa eloko moko na esika ya eloko mosusu oyo ezali na motuya ndenge moko. Na ndenge yango, eloko oyo ebungaki to ebebaki ekoki kozongisama, to eloko mosusu ekoki kozwa esika na yango. w25.02 3-4 par. 7-8
Mawa oyo esepelisaka Nzambe ememaka na kobongola motema mpo na lobiko.—2 Ko. 7:10.
Ntoma Paulo amonaki ete “mpamela oyo bato mingi [bapesaki ekokaki] bongo mpo na moto wana.” (2 Ko. 2:5-8) Na maloba mosusu, disiplini yango ekokisaki mokano na yango epai ya mobali yango oyo asangisaki nzoto na mwasi ya tata na ye. (1 Ko. 5:1) Mokano nini? Komema ye na kobongola motema. (Ebr. 12:11) Na yango Paulo apesaki lisangá malako ete ‘bálimbisa na boboto mpe bábɔndisa’ ndeko yango oyo abungaki nzela, mpe ‘bálakisa ye ete balingaka ye.’ Tósimba ete Paulo alingaki ete lisangá esuka kaka te na kozongisa mobali yango na kati ya basaleli ya Yehova. Kasi Paulo alingaki ete bandeko bámonisa na maloba, na misala, mpe na ndenge na bango ya kosala makambo ete balingaka mobali yango oyo abongolaki motema mpe balimbisi ye mpenza. Na ndenge yango, balingaki komonisa polele ete basepeli ndenge azongi na lisangá. w24.08 15 par. 4; 16-17 par. 6-8
Bafingaki bino mpe banyokolaki bino liboso ya bato.—Ebr. 10:33.
Ntoma Paulo ayebaki malamu makambo oyo esengeli kosala mpo na koyika mpiko. Akundwelaki bakristo ete ntango bazali koyika mpiko, basengeli te komityela motema; basengeli nde kotyela Yehova motema. Yango wana Paulo alobaki na mpiko ete: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te.” (Ebr. 13:6) Ndenge tozali koloba boye, bandeko mosusu bazali koyika mpiko na monyoko. Tokoki kobondela ntango nyonso mpo na bango, mpe na bantango mosusu kopesa bango lisungi ya sikisiki. Kasi, Biblia elobi polele ete “baoyo nyonso balandaka Yesu mpe balingi kosalela Nzambe na bosembo nyonso bango mpe bakonyokwama.” (2 Tim. 3:12) Yango wana, biso nyonso tosengeli komibongisa mpo na makambo oyo ezali koya liboso. Tókoba kotyela Yehova motema mobimba, tózala na elikya ete akosalisa biso tóyika mpiko na komekama nyonso oyo ekoki koyela biso. Na ntango oyo atyá, akosikola basaleli na ye nyonso ya sembo.—2 Tes. 1:7, 8. w24.09 13 par. 17-18
Bakorinti mingi oyo bayokaki, bakómaki bandimi mpe bazwaki batisimo.—Mis. 18:8.
Nini esalisaki Bakorinti bázwa batisimo? (2 Ko. 10:4, 5) Liloba ya Nzambe mpe elimo santu na ye ya nguya esalisaki bango básala bambongwana minene na bomoi na bango. (Ebr. 4:12) Bato ya Korinti oyo bandimaki nsango malamu oyo etali Kristo batikaki mimeseno mpe makambo lokola kolangwa masanga, koyiba mpe kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. (1 Ko. 6:9-11) Lokola bato mosusu ya Korinti basengelaki kotika mimeseno ya mabe oyo epikamaki makasi, balobaki te ete ekozala mpasi mingi mpenza mpo bákóma bakristo. Kasi, basalaki milende mpenza mpo na kokɔta na nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi ya seko. (Mat. 7:13, 14) Yo mpe ozali kobundisa ezaleli moko to momeseno moko ya mabe mpo okoka kozwa batisimo? Kotika te kobundisa yango! Sɛngá Yehova elimo santu na ye mpo esalisa yo otɛmɛla mposa ya kosala oyo ezali mabe. w25.03 6 par. 15-17
Soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe.—Yak. 1:5.
Yehova alaki kopesa biso bwanya mpo tósosola nzela oyo ekosepelisa ye. Apesaka bwanya yango na “bato nyonso na motema mobimba, mpe apamelaka te.” Nsima ya kobondela Yehova mpo na kosɛnga ye alakisa yo nzela, tyá likebi mingi mpo omona eyano na ye. Na ndakisa: Kanisá ete obungi nzela na esika moko mpe otuni moto oyo afandaka na esika yango nzela oyo okoki kolanda. Na nsima okokende mbala moko liboso kutu oyoka eyano oyo akopesa? Okosala bongo te. Okoyoka na likebi makambo oyo akoyebisa yo. Ndenge moko mpe, nsima ya kosɛnga Yehova apesa yo bwanya, meká kososola eyano na ye, elingi koloba oluka mibeko mpe mitinda nini ya Biblia eyokani na likambo oyo ozali na yango. Na ndakisa, mpo na kozwa ekateli soki okokende mwa fɛti moko, okoki kotalela makambo oyo Biblia elobi mpo na bafɛti ya lokoso, baninga mabe, mpe ntina ya kotya matomba ya Bokonzi liboso ya makambo oyo tolingaka.—Mat. 6:33; Rom. 13:13; 1 Ko. 15:33. w25.01 16 par. 6-7
Talá! Basaleli na ngai bakolya, kasi bino bokozala na nzala.—Yis. 65:13.
Esakweli ya Yisaya emonisi polele bokeseni kati na bomoi ya baoyo bazali na kati ya paradiso ya elimo mpe bomoi ya baoyo bazali kuna te. Yehova akokisaka malamu mpenza bamposa ya elimo ya basaleli na ye. Tozali na elimo santu na ye, Liloba na ye Biblia, mpe ebele ya bilei ya elimo mpo ‘tólya, tómɛla, mpe tósepela.’ (Talá mpe Emoniseli 22:17.) Nzokande, baoyo bazali na kati ya paradiso ya elimo te bazali “na nzala . . . , mposa ya mai . . . , [mpe] . . . na nsɔni.” Bamposa na bango ya elimo ekokisami te, bayebi Nzambe te. (Amo. 8:11) Yehova asopelaka bato na Ye biloko oyo basengeli na yango, ata mpe bilei ya elimo. (Yoe. 2:21-24) Yehova apesi biso Biblia, mikanda ya moombo ya sembo, site Internet na biso, makita, mayangani ya mike, mpe mayangani ya minene. Tokoki kolya bilei ya elimo mikolo nyonso, mpe yango esalaka ete tózala makasi mpe na nzoto kolɔngɔnɔ na elimo. w24.04 21 par. 5-6
Maloba na bino ezala ntango nyonso kitoko.—Kol. 4:6.
Soki olingi kolingana na moto moko, okoki kozwa bibongiseli mpo osolola na moto yango, ezala na miso boye to na telefone. Yebisá ye makanisi na yo polele. (1 Ko. 14:9) Soki esengeli, tikelá ye ntango ya kokanisa liboso apesa yo eyano. (Mas. 15:28) Mpe soki moto yango asepeli te ete bólingana, tosá ekateli na ye. Soki yo nde ndeko moko ayebisi yo ete asepeli na yo, okosala nini? Na ntembe te esɛngaki mpiko mpo moto yango aya kosolola na yo, na yango zalá na boboto mpe na limemya. Soki esɛngi atikela yo ntango mpo okanisa soki okondima kolingana na ye, yebisá ye yango. Kasi, salá makasi oumela te mpo na kopesa eyano. (Mas. 13:12) Soki osepeli te kolingana na ye, yebisá ye yango na boboto mpe polele. Soki osepeli kolingana na moto, yebisá ye mayoki na yo mpe ndenge olingi ete makambo etambola. Mbala mosusu oyo yo olingi ekeseni na mposa na ye. w24.05 23-24 par. 12-13
Ngai nazali koya kobunda na yo na nkombo ya Yehova ya mampinga.—1 Sa. 17:45.
Emonani ete liboso kutu akokisa mbula 20, Davidi akendaki na kaa ya limpinga ya Bayisraele. Amonaki ete basoda bayokaki nsɔmɔ mpo engambe Mofilistia moko na nkombo Goliate abimaki mpo na “kotumola limpinga ya basoda ya Yisraele.” (1 Sa. 17:10, 11) Basoda babangaki mpo batyaki likebi nyonso epai ya engambe wana mpe na makambo oyo azalaki koloba. (1 Sa. 17:24, 25) Kasi, Davidi atalelaki likambo yango ndenge mosusu. Davidi ayebaki ete ndenge Goliate azalaki kotumola limpinga ya Yisraele, azalaki kotumola nde “limpinga ya basoda ya Nzambe ya bomoi.” (1 Sa. 17:26) Davidi azalaki kokanisa libosoliboso Yehova. Davidi atyaki motema ete Nzambe oyo asalisaki ye ntango azalaki mobateli ya bampate akosalisa ye mpe na mbala oyo. Lokola ayebaki ete Yehova akosalisa ye, Davidi abundaki na Goliate, mpe alongaki ye!—1 Sa. 17:45-51. w24.06 21 par. 7
Kobanga te, mpo nazali na yo. Komitungisa te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi, ɛɛ nakosalisa yo, nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali, lobɔkɔ oyo esalaka oyo ezali sembo.—Yis. 41:10.
Tókanisa ndenge oyo bomoi na biso elingaki kozala soki tozalaki kosalela Yehova te. Kosala bongo ekosalisa biso tótikala sembo mpe tóloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Mpo na ngai, kopusana epai ya Nzambe ezali malamu.” (Nz. 73:28) Tokoki kobundisa mikakatano nyonso oyo ekoki koyela biso na mikolo oyo ya nsuka mpo tozali “kosala lokola baombo mpo na Nzambe ya bomoi mpe ya solo.” (1 Tes. 1:9) Nzambe na biso azali Moto ya solo oyo asalisaka baoyo basambelaka ye. Azalaki elongo na basaleli na ye ya kala, mpe azali elongo na biso lelo. Mosika te, tokokutana na bolɔzi moko monene mpenza oyo ekosalema na mabele mobimba. Kasi tokozala biso moko te, Yehova akozala elongo na biso. Tiká ete “tózala na mpiko mpenza mpe tóloba: ‘Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te.’”—Ebr. 13:5, 6. w24.06 25 par. 17-18
Bokomona . . . bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe.—Mal. 3:18.
Biblia etángi mibali koleka 40 oyo bazalaki bakonzi na Yisraele. Bakonzi ya malamu basalaki makambo mosusu ya mabe. Moko na bango ezali Davidi, oyo azalaki mokonzi ya malamu. Yehova alobaki: “Mosaleli na ngai Davidi . . . alandaki ngai na motema na ye mobimba mpe azalaki kosala kaka oyo ezali malamu na miso na ngai.” (1 Bak. 14:8) Kasi, toyebi ete Davidi asalaki ekobo ná mwasi ya bato mpe abongisaki makambo mpo mobali ya mwasi yango abomama na etumba. (2 Sa. 11:4, 14, 15) Nzokande, bakonzi mingi oyo bazalaki sembo te basalaki makambo mosusu ya malamu. Tózwa ndakisa ya Rehoboame. Na miso ya Yehova, Rehoboame “asalaki makambo oyo ezali mabe.” (2 Nt. 12:14) Kasi, Rehoboame asalaki makambo mosusu ya malamu: atosaki Yehova ntango ayebisaki ye abundisa mabota zomi te mpe atika bango bápona mokonzi na bango. Asalisaki mpe ekólo na ye na ndenge akómisaki makasi bingumba na yango. (1 Bak. 12:21-24; 2 Nt. 11:5-12) Yehova azalaki kotalela nini mpo na koloba ete mokonzi boye azalaki sembo na miso na Ye? Eyano na motuna yango ekosalisa biso tóyeba eloko oyo Yehova azelaka epai na biso. w24.07 20 par. 1-3
Bókoba kobɔkɔla bango na mitinda mpe na makebisi ya Yehova.—Ef. 6:4.
Bongo bankulutu bakosala nini soki mosakoli oyo azwá batisimo kasi akokisi naino mbula 18 te asali lisumu ya monene? Lisangani ya bankulutu ekozwa bibongiseli mpo bankulutu mibale bákutana na mwana yango elongo na baboti na ye oyo bazwá batisimo. Bankulutu bakoluka koyeba oyo baboti basili kosala mpo na kosalisa mwana na bango abongola motema. Soki mwana yango oyo akokisi naino mbula 18 te andimi toli ya baboti mpe abongoli makanisi mpe etamboli na ye, bankulutu yango mibale bakoki komona ete ezali na ntina te ya komema likambo yango mosika. Mpo Yehova apesi nde baboti mokumba ya kosembola bana na bango na bolingo. (Mib. 6:6, 7; Mas. 6:20; 22:6; Ef. 6:2-4) Kasi bankulutu bakobanda kosolola na baboti mpo na koyeba soki mwana yango azali kozwa lisalisi oyo esengeli. Bongo bankulutu bakosala nini soki mwana oyo azwá batisimo kasi akokisi naino mbula 18 te aboyi kobongola motema mpe akobi kaka na lisumu? Na ntango yango, komite ya bankulutu ekokutana na ye elongo na baboti na ye oyo bazwá batisimo. w24.08 24 par. 18
Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.—Mis. 20:35.
Biso nyonso tosepelaka ntango bakabeli biso eloko. Kasi, esengo oyo toyokaka ntango biso nde topesi, eleki oyo ya kozwa. Lokola Yehova akelá biso bongo, apesi biso nzela ya kobakisa esengo na biso. Tokoki kobakisa esengo na biso soki tozali koluka mabaku ya kopesa to kokabela basusu. Omoni te ete yango mpe emonisi ete tosalemá na ndenge ya kokamwa? (Nz. 139:14) Biblia emonisi ete kopesa ememaka esengo, yango wana tokamwaka mpenza te ndenge Yehova abengami “Nzambe ya esengo.” (1 Tim. 1:11) Ye nde Mopesi ya libosoliboso mpe akokani na mosusu te. Ntoma Paulo alobaki: “Na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.” (Mis. 17:28) Kutu, “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka” epai ya Yehova. (Yak. 1:17) Na ntembe te biso nyonso tokolinga koyoka lisusu esengo mingi oyo eutaka na kopesa. Mpo na yango, tosengeli komekola Yehova na oyo etali kokaba.—Ef. 5:1. w24.09 26 par. 1-4
Ata soki tokei liboso tii wapi, tókoba kaka kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana.—Flp. 3:16.
Nsima ya kotalela masɛngami mpo na kokóma nkulutu, basaleli na misala mosusu bakoki komona ete bakokoka ata moke te kokokisa yango. Kasi, kobosana te ete Yehova ná ebongiseli na ye basɛngi yo te omonisa bizaleli yango na ndenge ya kokoka. (1 Pe. 2:21) Mpe ezali elimo santu ya Yehova nde ekosalisa yo okokisa masɛngami yango. (Flp. 2:13) Ezali na likambo oyo osengeli kobongisa? Bondelá Yehova mpo na yango. Salá bolukiluki na likambo yango, mpe sɛngá nkulutu moko apesa yo makanisi mpo na ndenge ya kobongisa. Luká kokokisa masɛngami! Sɛngá Yehova apesa yo formasyo mpe abongisa yo mpo ozala lisusu na ntina na mosala na ye mpe na lisangá. (Yis. 64:8) Tiká ete Yehova apambola milende nyonso oyo okosala mpo na kokokisa masɛngami ya kokóma nkulutu. w24.11 25 par. 17-18
Nzambe azangi bosembo te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.—Ebr. 6:10.
Moko te kati na biso asengeli komona ete abongi na motema mawa ya Yehova, ata soki tolekisi bambula mingi na mosala na ye. Ya solo Yehova asepelaka na mosala na biso ya sembo. Atako bongo, apesá biso Mwana na ye lokola likabo ya ofele, kasi te lokola lifuti mpo na mosala oyo tosaleli ye. Soki tozali kokanisa ete Yehova amoniselaka biso motema mawa mpo tobongi na yango, to ete esengeli atyela biso likebi mingi koleka, ezali lokola nde tozali koloba, Kristo akufaki kaka mpamba. (Talá mpe Bagalatia 2:21.) Ntoma Paulo ayebaki ete Nzambe andimaki ye kaka mpo na motema mawa. Bongo mpo na nini abomaki nzoto na mosala ya Yehova? Ezalaki te mpo na komonisa ete abongi, kasi nde mpo na komonisa ete azali na botɔndi mpo na boboto monene ya Yehova. (Ef. 3:7) Ndenge moko na Paulo, tokobaka kosalela Yehova na molende, mpo amonisela biso motema mawa te, kasi nde mpo na komonisa ete tozali na botɔndi mpo na yango. w25.01 27 par. 5-6

