Masese 11:1-31
11 Yehova ayinaka emekeli-kilo ya bokosi,*Kasi kilo ya mobimba* esepelisaka ye.+
2 Ntango moto akómi lofundo akoyokisama nsɔni,+Kasi bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.+
3 Kozanga mbeba ya bato ya sembo etambwisaka bango,+Kasi bongolabongola ya bakosi ekobebisa bango.+
4 Bomɛngo* ekosalisa na eloko te na mokolo ya nkanda makasi,+Kasi bosembo nde ekobikisa na liwa.+
5 Bosembo ya moto oyo azangi mbeba ekosembola nzela na ye,Kasi moto mabe akokwea mpo na mabe na ye.+
6 Bosembo ya bato oyo bazangi mbeba ekobikisa bango,+Kasi bakosi bakokangama na mposa na bango moko.+
7 Ntango moto mabe akufi, elikya na ye esili;Mpe elikya oyo atyaka na nguya na ye esili.+
8 Moto ya sembo akozwa lisalisi na mpasi na ye,Mpe moto mabe azwi esika na ye.+
9 Na monɔkɔ na ye, mopɛngwi* amemaka mozalani na ye na libebi,Kasi boyebi ebikisaka bato ya sembo.+
10 Bolamu ya bato ya sembo esalaka ete bato na engumba básepela,Mpe bato bakosepela mingi ntango bato mabe bakufi.+
11 Mpo na lipamboli ya moto oyo azangi mbeba, engumba ekómaka makasi,+Kasi monɔkɔ ya bato mabe ebebisaka yango.+
12 Moto oyo azali na bososoli te* atyolaka mozalani na ye,Kasi moto oyo azali na bososoli mingi afandaka nyɛɛ.+
13 Moto oyo akoselaka bato makambo atambolatambolaka mpo na kobimisa makambo oyo elobami na nkuku,+Kasi moto ya kotyela motema* abombaka likambo.
14 Bato banyokwamaka ntango mayele ya kotambwisa makambo* ezali te,Kasi soki bapesi-toli bazali ebele makambo elongaka.+
15 Moto nyonso oyo akomipesa ndanga mpo na biloko oyo mopaya adefi akosuka mabe,+Kasi ye oyo aboyi* kosala boyokani* ya ndenge wana akozala na kimya.
16 Mwasi ya boboto azwaka nkembo,+Kasi mibali oyo bazangá mawa bakangamaka kaka na bomɛngo.
17 Moto ya motema boboto* amisalelaka malamu,*+Kasi moto ya nko amimemelaka mpasi.*+
18 Moto mabe azwaka lifuti ya lokuta,+Kasi moto oyo alonaka bosembo azwaka mbano ya solosolo.+
19 Moto oyo atɛlɛmi ngwi mpo na bosembo azali na nzela ya bomoi,+Kasi moto oyo alandaka oyo ezali mabe azali kokende na liwa.
20 Yehova ayinaka baoyo bazali na motema ya bokosi,+Kasi baoyo nzela na bango ezangi mbeba basepelisaka ye.+
21 Yebá likambo oyo:* Moto mabe akozanga te kozwa etumbu;+Kasi bana ya bato ya sembo bakobikisama.
22 Lokola lopɛtɛ ya wolo na zolo ya nguluMwasi ya kitoko oyo azangi bososoli azali ndenge wana.
23 Mposa ya bato ya sembo ememaka na bolamu,+Kasi elikya ya bato mabe ememaka na nkanda makasi.
24 Moto oyo akabaka mingi* akómaka na biloko mingi;+Kasi moto mosusu abombaka oyo asengelaki kokaba mpe asukaka mobola.+
25 Moto oyo akabaka akopambolama,*+Mpe moto oyo apesaka basusu mai ya komɛla, bakopesa ye mpe mai ya komɛla.+
26 Moto oyo aboyaka kotɛkela basusu mbuma, bakolakela ye mabe,Kasi moto oyo atɛkaka yango akozwa mapamboli.
27 Moto oyo alukaka mpenza kosala bolamu alukaka kondimama,+Kasi moto oyo alukaka kosala mabe, yango nde ekokómela ye mpenza.+
28 Moto oyo atyaka motema na bomɛngo na ye akonyokwama,+Kasi moto ya sembo akolonga mpenza mpe akozala lokola nkasa mobesu na nzete.+
29 Moto oyo amemi mpasi* na libota na ye akozwa eloko te,*+Mpe zoba akozala mosaleli ya moto ya bwanya.
30 Mosala ya moto ya sembo ezali lokola nzete ya bomoi,+Mpe moto oyo asimbaka mitema azali moto ya bwanya.+
31 Soki moto ya sembo na mabele azwi mbano,Ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki!+
Maloba na nse
^ To, “libanga ya mobimba ya komekela kilo.”
^ To, “lokuta.”
^ To, “Biloko ya motuya.”
^ To, “moto oyo abangaka Nzambe te.”
^ Lil., “azali na motema te.”
^ Lil., “moto oyo azali na elimo ya sembo.”
^ To, “batoli ya bwanya.”
^ Lil., “akoyina.”
^ Lil., “kopesana lobɔkɔ.”
^ To, “Moto ya bolingo ya sembo.”
^ To, “asalelaka molimo na ye malamu.”
^ To, “nsɔni.”
^ Lil., “Lobɔkɔ na lobɔkɔ.”
^ Lil., “Moto oyo apanzapanzaka.”
^ Lil., “akokóma mafutamafuta.”
^ To, “nsɔni.”
^ Lil., “mopɛpɛ.”

