Ndenge ekomamá na Luka 19:1-48

  • Yesu akei na ndako ya Zakai (1-10)

  • Ndakisa ya mina zomi (11-27)

  • Yesu akɔti na Yerusaleme lokola mokonzi (28-40)

  • Yesu aleli Yerusaleme (41-44)

  • Yesu apɛtoli tempelo (45-48)

19  Bongo akɔtaki na Yeriko mpe azalaki kokatisa yango.  Kuna ezalaki na mobali moko na nkombo Zakai; azalaki mokonzi ya bakɔngɔli-mpako, mpe azalaki mozwi.  Azalaki koluka komona Yesu, kasi akokaki te mpo na ebele ya bato, mpo azalaki mokuse.  Na yango akimaki mbangu liboso, mpe amataki na nzete moko ya sikomore* mpo amona ye, mpo asengelaki koleka na nzela wana.  Sikoyo ntango Yesu akómaki na esika yango, atalaki likoló mpe alobaki na ye: “Zakai, kitá noki, mpo lelo nakozala na ndako na yo.”  Bongo akitaki noki mpe ayambaki ye na ndako na ye na esengo.  Ntango bato bamonaki bongo, bango nyonso babandaki koimaima ete: “Akei na ndako ya moto oyo azali mosumuki.”+  Kasi Zakai atɛlɛmaki mpe alobaki na Nkolo ete: “Nkolo talá! Nakopesa babola katikati ya biloko na ngai mpe eloko nyonso oyo nabɔtɔlaki moto* nakozongisa yango mbala minei.”+  Na yango Yesu alobaki na ye: “Lelo lobiko eyei na ndako oyo, mpo ye mpe azali mwana ya Abrahama. 10  Mpo Mwana ya moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa baoyo babungaki.”+ 11  Ntango bazalaki koyoka makambo wana, Yesu apesaki ndakisa mosusu, mpo azalaki pene na Yerusaleme mpe bazalaki kokanisa ete Bokonzi ya Nzambe ekomonana na ntango wana kaka.+ 12  Na yango alobaki: “Moto moko ya lokumu asalaki mobembo na ekólo moko ya mosika+ mpo bátya ye mokonzi mpe na nsima azonga. 13  Abengaki baombo na ye zomi, apesaki bango mina* zomi mpe ayebisaki bango: ‘Bósala na yango mombongo tii ntango nakoya.’+ 14  Kasi bana-mboka bazalaki koyina ye mpe batindelaki ye etuluku ya bantoma* mpo báloba: ‘Tolingi te ete moto oyo akóma mokonzi na biso.’ 15  “Nsukansuka ntango azongaki, nsima ya kotyama mokonzi, abengaki baombo oyo apesaki mbongo,* mpo na koyeba benefisi oyo bazwaki na mombongo oyo basalaki.+ 16  Bongo oyo ya liboso ayaki mpe alobaki: ‘Nkolo, mina na yo eboti mina zomi.’+ 17  Alobaki na ye: ‘Longonya, moombo malamu! Lokola omonisi ete ozali sembo na likambo ya moke mpenza, napesi yo bokonzi likoló ya bingumba zomi.’+ 18  Na nsima oyo ya mibale ayaki, alobi: ‘Nkolo, mina na yo epesi mina mitano.’+ 19  Alobaki mpe na oyo: ‘Natye yo mpe mokonzi likoló ya bingumba mitano.’ 20  Kasi mosusu ayaki, alobi: ‘Nkolo, mina na yo yango oyo, nabombaki yango na elamba moko. 21  Omoni, nazalaki kobanga yo, mpo ozali moto ya matata; ozwaka oyo obombisaki te, mpe obukaka oyo olonaki te.’+ 22  Alobaki na ye: ‘Nasambisi yo na maloba na yo moko, moombo mabe. Oyebaki malamu ete nazali moto ya matata, nazwaka oyo nabombisaki te mpe nabukaka oyo nalonaki te, boye te?+ 23  Bongo mpo na nini otyaki mbongo na ngai* na banki te? Bongo ntango nayei, nalingaki nazwa yango na benefisi.’ 24  “Bongo alobaki na baoyo batɛlɛmaki wana: ‘Bóbɔtɔla ye mina wana mpe bópesa yango na moto oyo azali na mina zomi.’+ 25  Kasi balobaki na ye: ‘Nkolo, azali na mina zomi!’— 26  ‘Nalobi na bino, moto nyonso oyo azali na eloko, bakobakisela ye mosusu, kasi moto oyo azali na eloko te, bakobɔtɔla ye ata oyo azali na yango.+ 27  Lisusu, bómema banguna na ngai oyo balingaki te nakóma mokonzi na bango mpe bóboma bango awa na miso na ngai.’” 28  Nsima ya koloba makambo wana, alekaki liboso, azalaki komata na Yerusaleme. 29  Mpe ntango bapusanaki pene na Betefage mpe Betani na ngomba babengi Ngomba ya Olive,+ atindaki bayekoli mibale,+ 30  alobi: “Bókende na mboka oyo bozali komona liboso na bino, mpe nsima ya kokɔta kuna, bokomona mwana ya mpunda oyo bakangi nsinga, oyo likoló na yango moto moko afandá naino te. Bófungola yango mpe bóya na yango awa. 31  Kasi soki moto moko atuni bino: ‘Mpo na nini bozali kofungola yango?’ bosengeli koloba: ‘Nkolo azali na mposa na yango.’” 32  Bongo baoyo atindaki bakendaki mpe bakutaki yango kaka ndenge alobaki na bango.+ 33  Kasi ntango bazalaki kofungola mwana-mpunda yango, bankolo na yango balobaki na bango: “Mpo na nini bozali kofungola mwana-mpunda wana?” 34  Balobaki: “Nkolo azali na mposa na yango.” 35  Mpe bamemaki yango epai ya Yesu. Babwakaki likoló ya nyama yango bilamba na bango ya likoló mpe bafandisaki Yesu likoló na yango.+ 36  Ntango azalaki kopusana, bato bazalaki kotanda bilamba na bango ya likoló na nzela.+ 37  Ntango kaka akómaki pene na nzela oyo ezalaki kouta na Ngomba ya Olive, ebele ya bayekoli nyonso babandaki kosepela mpe kosanzola Nzambe na mongongo makasi mpo na makamwisi* nyonso oyo bamonaki. 38  Bazalaki koloba: “Moto oyo azali koya lokola Mokonzi na nkombo ya Yehova* apambwama! Kimya na likoló, mpe nkembo kuna na likoló!”+ 39  Nzokande, Bafarisai mosusu oyo bazalaki na kati ya ebele ya bato balobaki na ye: “Moteyi, pamelá bayekoli na yo.”+ 40  Kasi ye azongisaki: “Nazali koyebisa bino, soki bango bafandi nyɛɛ, mabanga ekoganga.” 41  Ntango akómaki pene, atalaki engumba mpe alelaki mpo na yango,+ 42  alobi: “Soki ata yo ososolaka, na mokolo ya lelo, makambo oyo ememaka kimya—kasi sikoyo yango ebombami na miso na yo.+ 43  Mpo mikolo ekoyela yo, ntango banguna na yo bakotonga zingazinga na yo lopango moko makasi basalá na banzete oyo bakómisá nsɔngɛ. Bakozinga yo mpe bakotya bakaa na bango* bipai nyonso.+ 44  Bakobwaka yo ná bana na yo* na mabele,+ mpe bakotika libanga moko te likoló ya libanga mosusu epai na yo,+ mpo ososolaki te ntango oyo bayaki kotalatala yo.” 45  Na nsima akɔtaki na tempelo mpe abandaki kobwaka libándá baoyo bazalaki kotɛka,+ 46  alobi na bango: “Ekomamá ete: ‘Ndako na ngai ekozala ndako ya mabondeli,’+ kasi bino bokómisi yango mobenga ya miyibi.”+ 47  Mokolo na mokolo akobaki koteya na tempelo. Kasi banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli mpe bato minene ya ekólo bazalaki koluka koboma ye;+ 48  kasi bazalaki komona te ndenge ya kosala yango, mpo bato nyonso bazalaki se kokangama na ye mpo na koyoka ye.+

Maloba na nse

To, “figi-sikaminosi.”
To, “nabɔtɔlaki moto na efundeli ya lokuta.”
Mina moko ya Bagrɛki = 340 g. Balobaka ete ezalaki na valɛrɛ ya badrakimɛ 100. Talá Ap. B14.
To, “baambasadɛrɛ.” Mosali oyo mokonzi atindi mpo na komonisa ye na mboka mopaya.
Lil., “palata.”
Lil., “palata na ngai.”
Lil., “misala ya nguya.”
Talá Ap. A5.
To, “bakonyokola yo.”
To, “bafandi na yo.”