Masese 13:1-25

  • Baoyo balukaka toli bazali bato ya bwanya (10)

  • Eloko ya kozelisazelisa ebɛlisaka motema (12)

  • “Momemi-nsango ya sembo amemaka libɔndisi” (17)

  • Kotambola na bato ya bwanya esalaka ete moto akóma na bwanya (20)

  • Disiplini emonisaka bolingo (24)

13  Mwana ya bwanya andimaka disiplini ya tata na ye,+Kasi motyoli ayokaka mpamela* te.+  2  Maloba oyo ebimaka na monɔkɔ ya moto, ekosala ete alya oyo ezali malamu,+Kasi mposa makasi* ya bakosi ezalaka mpo na kosala mobulu.  3  Moto oyo azali kobatela monɔkɔ na ye* azali kobatela bomoi na ye.+Kasi moto oyo apekisaka monɔkɔ na ye te akozwa mpasi.+  4  Moto ya gɔigɔi atondi na mposa, kasi azali na eloko te.+Nzokande moto oyo asalaka mosala makasi akotonda na biloko.*+  5  Moto ya sembo ayinaka lokuta,+Kasi misala ya moto mabe ememaka nsɔni mpe kosambwa.  6  Bosembo ebatelaka moto oyo azali na likambo te,+Kasi mabe ekweisaka mosumuki.  7  Moto mosusu amilakisaka ete azali mozwi kasi azali na eloko te;+Moto mosusu amilakisaka ete azali mobola kasi azali na bozwi ebele.  8  Bozwi ezali lisiko mpo na bomoi ya moto,+Kasi mobola batungisaka ye kutu te.*+  9  Pole ya bato ya sembo engɛngaka makasi;*+Kasi mwinda ya bato mabe ekobomama.+ 10  Lofundo ebimisaka kaka matata,+Kasi bwanya ezali epai ya baoyo balukaka toli.*+ 11  Bomɛngo oyo ezwami nokinoki* ekokita mpe nokinoki,+Kasi moto oyo azwi bomɛngo na ye mokemoke* ekomata. 12  Eloko* ya kozelisazelisa ebɛlisaka motema,+Kasi mposa oyo ekokisami ezali nzete ya bomoi.+ 13  Moto oyo atyolaka malako,* akofuta mpo na yango;+Kasi moto oyo atosaka mitindo, akozwa mbano.+ 14  Mateya* ya moto ya bwanya ezali liziba ya bomoi,+Ebikisaka moto na mitambo ya liwa. 15  Mayele mingi ya kososola esalaka ete moto andimama,Kasi nzela ya bakosi ezalaka mabakumabaku. 16  Moto ya ekɛngɛ asalaka makambo na boyebi,+Kasi zoba abimisaka bozoba na ye polele.+ 17  Momemi-nsango ya mabe amemaka kaka mabe,+Kasi momemi-nsango ya sembo amemaka libɔndisi.+ 18  Moto oyo atyelaka disiplini likebi te akómaka mobola mpe azwaka nsɔni,Kasi moto oyo andimaka mpamela* akokumisama.+ 19  Moto asepelaka* soki mposa moko ekokisami;+Kasi bazoba bayinaka kotika mabe.+ 20  Moto oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya,+Kasi moto oyo azali moninga ya bazoba akosuka mabe.+ 21  Mpasi elandaka bato ya masumu,+Kasi makambo etambolaka malamu mpo na bato ya sembo.+ 22  Moto malamu atikelaka bana ya bana na ye libula,Kasi bozwi ya bato ya masumu ebombamaka mpo na bato ya sembo.+ 23  Mabele ya babola oyo ebalolami ebotaka bilei mingi,Kasi ekoki* kolongolama mpo na kozanga bosembo. 24  Moto oyo asaleli fimbo* te mpo na mwana na ye azali koyina ye,+Kasi moto oyo alingi ye akosala nyonso* apesa ye disiplini.+ 25  Moto ya sembo alyaka mpe atondaka,+Kasi libumu ya bato mabe ezalaka na eloko te.+

Maloba na nse

^ To, “kosembolama.”
^ To, “molimo.”
^ To, “kokeba na makambo alobaka.”
^ Lil., “akokóma mafutamafuta.”
^ Lil., “ayokaka mpamela te.”
^ Lil., “esepelaka.”
^ To, “baoyo bapesanaka makanisi.”
^ To, “Bomɛngo oyo euti na makambo ya mpamba.”
^ Lil., “ayanganisaka na lobɔkɔ.”
^ To, “Elikya.”
^ To, “liloba.”
^ To, “Mobeko.”
^ To, “kosembolama.”
^ To, “Molimo esepelaka.”
^ To, “akoki.”
^ To, “disiplini; etumbu.”
^ To mbala mosusu, “nokinoki.”