Masese 31:1-31

  • MALOBA YA MOKONZI LEMUELE (1-31)

    • “Nani akoki kozwa mwasi ya malonga?” (10)

    • Asalaka mosala makasi (17)

    • “Boboto ezali na lolemo na ye” (26)

    • Bana mpe mobali na ye bakumisaka ye (28)

    • Bonzenga mpe kitoko ezali mpo na mwa ntango (30)

31  Maloba ya mokonzi Lemuele, maloba ya kilo oyo mama na ye ayebisaki ye mpo na koteya ye:+   Naloba na yo nini, Ee mwana na ngaiNaloba nini, Ee mwanaya libumu na ngaiMpe naloba nini, Ee mwana ya bilako na ngai?+   Kopesa te basi makasina yo,+Mpe kolanda te banzela oyo ebebisaka bakonzi.+   Ebongi na bakonzi te,Ee Lemuele,Ebongi na bakonzi te komɛla vinyo,Ebongi na bankumu te koloba ete: “Masanga na ngai ezali wapi?”+   Soki te bakomɛla mpe bakobosana mobekoMpe bakokata na bosembo te likambo ya bato mpamba.   Bópesa masanga oyo elangwisaka epai ya bato oyo balingi kokufa+Mpe vinyo epai ya bato oyo batungisami na makanisi.+   Tiká bango bámɛla mpe bábosana bobola na bango;Tiká bango bákanisa lisusu mpasi na bango te.   Lobá mpo na kosamba likambo ya bato oyo bakokoka kosamba te;Sambá mpo na ntomo ya baoyo bazali kokufa.+   Lobá mpe sambisá na bosembo;Sambá mpo na ntomo* ya bato mpamba mpe ya babola.+ א [Alef] 10  Nani akoki kozwa mwasiya malonga?*+ Motuya na ye eleki mosika oyo ya mabanga kitokoya korai.* ב [Bet] 11  Mobali na ye atyelaka ye motema mobimba,Mpe azangaka eloko moko te ya motuya. ג [Gimel] 12  Apesaka mobali na ye mbano ya makambo ya malamu, kasi ya mabe te,Mikolo nyonso ya bomoi na ye. ד [Dalet] 13  Azwaka lɛnɛ ná lini;Asepelaka kosala mosala.+ ה [He] 14  Azali lokola bamasuwa ya moto ya mombongo,+Autaka na bilei na ye mosika. ו [Waw] 15  Lisusu alamukaka ntango butu ezali naino,Mpe apesaka bato ya ndako na ye bileiMpe basaleli na ye ya basi ndambo na bango.+ ז [Zayin] 16  Atali malamumalamu elanga mpe asombi yango;Aloni elanga ya vinyo na mosala na ye ya makasi.* ח [Het] 17  Amibongisaka mpo na kosala mosala makasi,*+Mpe akembisaka mabɔkɔ na ye. ט [Tet] 18  Amoni ete mombongo na ye ezali kofuta malamu;Mwinda na ye ekufaka tena butu. י [Yod] 19  Mabɔkɔ na ye esimbi motonga ya molai ya kokangisa nsinga,Mpe mabɔkɔ na ye esimbi motonga ya mokuse mpo na kosala nsinga.+ כ [Kaf] 20  Asemboli lobɔkɔ na ye mpo na kosalisa moto mpamba,Mpe afungoli lobɔkɔ na ye epai ya mobola.+ ל [Lamed] 21  Na eleko ya malili amitungisaka te mpo na bato ya ndako na ye,Mpo bato nyonso ya ndako na ye balataka bilamba oyo epesaka molunge.* מ [Mem] 22  Amisaleli babulangiti. Bilamba na ye ezali ya lini mpe ya lɛnɛ ya mwa motane-bulé. נ [Nun] 23  Mobali na ye ayebani malamu na baporteya engumba,+Esika afandaka elongo na bankulutu ya mboka. ס [Samek] 24  Asalaka mpe atɛkaka bilamba ya lini*Mpe apesaka bato ya mombongo mikaba. ע [Ayin] 25  Alati makasi mpe nkembo,Mpe atalaka mikolo ezali koya na elikya.* פ [Pe] 26  Afungolaka monɔkɔ na ye na bwanya;+Mobeko ya motema boboto* ezali na lolemo na ye. צ [Tsade] 27  Atalaka na likebi misalaya ndako na ye,Mpe alyaka te limpaya gɔigɔi.+ ק [Kof] 28  Bana na ye batɛlɛmi mpe batángi ye moto ya esengo;Mobali na ye atɛlɛmi,mpe akumisi ye. ר [Resh] 29  Basi ya malonga* bazali ebele,Kasi yo oleki bango nyonso. ש [Shin] 30  Bonzenga ekoki kokosa, mpe kitoko ekoki kozala mpo na mwa ntango;*+Kasi mwasi oyo abangaka Yehova akokumisama.+ ת [Taw] 31  Bópesa ye mbano ya makambo oyo asalaka,*+Mpe misala na ye ekumisa ye na baporte ya engumba.+

Maloba na nse

To, “Sambá likambo.”
To, “ya mayele.”
Lil., “na nzela ya mbuma ya mabɔkɔ na ye.”
Lil., “Akangi bokasi na loketo na ye.”
Lil., “bilamba oyo ekangami mibalemibale.”
To, “bilamba ya nse.”
To, “asɛkaka mokolo oyo ekoya.”
To, “Mateya ya boboto; Mobeko ya bolingo ya sembo.”
To, “ya mayele.”
To, “mpamba.”
Lil., “Bópesa ye mbuma ya mabɔkɔ na ye.”