Masese 21:1-31

  • Yehova abalusaka motema ya mokonzi (1)

  • Bosembo eleki mbeka (3)

  • Kosala mosala makasi ememaka litomba (5)

  • Moto oyo ayokaka moto mpamba te, ye mpe bakoyoka ye te (13)

  • Moto oyo atɛmɛlaka Yehova azangi bwanya (30)

21  Motema ya mokonzi ezali lokola mikɛli ya mai na lobɔkɔ ya Yehova.+ Abalusaka yango esika nyonso oyo alingi.+  2  Moto akanisaka ete nyonso oyo asalaka ezali malamu,+Kasi Yehova atalatalaka mitema.*+  3  Mpo na Yehova, kosala likambo oyo ezali malamu mpe semboEsepelisaka ye koleka mbeka.+  4  Miso ya lolendo ná motema ya lofundo:Mwinda oyo etambwisaka bato mabe ezali lisumu.+  5  Mikano ya moto oyo asalaka mosala makasi ememelaka ye litomba,+Kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akosuka mobola.+  6  Kozwa biloko ya motuya na lolemo ya lokutaEzali lokola londende oyo ezali kosila, motambo oyo ebomaka.*+  7  Mobulu ya bato mabe ekokɔmbɔla bango,+Mpo baboyi kosala na bosembo.  8  Nzela ya moto oyo azali na ngambo ezalaka ya kotɛngama,Kasi mosala ya moto ya pɛto ezalaka ya malamu.+  9  Kofanda na mwa esika moko boye likoló ya nsamba ezali malamuKoleka kofanda ndako moko na mwasi oyo aswanaka.*+ 10  Moto mabe azalaka* na mposa makasi ya kosala mabe;+Amoniselaka mozalani na ye boboto te.+ 11  Ntango bapesaka mosɛki etumbu, moto oyo azangi mayele akómaka na bwanya,Ntango moto ya bwanya azwaka bososoli, azwaka mpe boyebi.*+ 12  Nzambe ya sembo atalatalaka ndako ya moto mabe;Asalaka ete bato mabe bázwa mpasi.+ 13  Moto nyonso oyo akangi litoi na ye ntango moto mpamba azali kogangaYe mpe ntango akobelela akozwa eyano te.+ 14  Likabo oyo epesami na nkuku ekitisaka nkanda,+Mpe kanyaka oyo epesami na ndenge ya kobombana* ekitisaka nkanda ya makasi mpenza. 15  Mpo na moyengebene, ezali esengo kosala likambo ya sembo,+Kasi ezali likambo ya nsɔmɔ mpo na baoyo basalaka mabe. 16  Moto oyo atiki nzela ya mayele ya kososolaAkopema elongo na baoyo bazali na makasi te na kati ya liwa.+ 17  Moto oyo alingaka kosakanasakana* akokóma mobola;+Moto oyo alingaka vinyo mpe mafuta akokóma mozwi te. 18  Moto mabe azali lisiko mpo na moto ya sembo,Mpe mokosi akozwama na esika ya moto malamu.+ 19  Kofanda na esobe ezali malamu kolekaKofanda na mwasi oyo aswanaka* mpe asilikaka mpambampamba.+ 20  Eloko ya motuya mpe mafuta ezalaka na ndako ya moto ya bwanya,+Kasi zoba akosilisa* oyo azali na yango.+ 21  Moto oyo alandaka boyengebene mpe bolingo ya semboAkozwa bomoi, boyengebene mpe nkembo.+ 22  Moto ya bwanya akoki komata mpe kokɔta na engumba ya bato ya nguyaMpe kobebisa bifelo ya makasi oyo batyelaka motema.+ 23  Moto oyo abatelaka monɔkɔ mpe lolemo na yeAmibatelaka na mpasi.+ 24  Moto ya lofundo, moto ya komikumisa oyo amitombolaka, bongo nde babengakaMoto oyo asalaka makambo na lofundo kozanga kokanisa makama oyo ekoki kobima.+ 25  Biloko oyo gɔigɔi azalaka na mposa ya kozwa ekoboma ye,Mpo mabɔkɔ na ye eboyaka kosala.+ 26  Mokolo mobimba gɔigɔi alulaka na mposa makasi,Kasi moto ya sembo apesaka mpe akangaka lobɔkɔ te.+ 27  Mbeka ya moto mabe ezali eloko oyo eyinamá.+ Ekozala boni ntango apesi yango na makanisi mabe!* 28  Motatoli ya lokuta akokufa,+Kasi moto oyo akotatola makambo oyo ayokaki akolonga.* 29  Moto mabe asalaka ete basusu bákanisa ete azali kobanga te,+Kasi moto oyo azangi mbeba atambolaka na nzela oyo ezali na likama te.+ 30  Bwanya moko te, bososoli moko te, mpe toli moko te ekoki kotɛmɛla mokano ya Yehova.+ 31  Mpunda ebongisami mpo na mokolo ya etumba,+Kasi Yehova nde abikisaka.+

Maloba na nse

^ To, “makanisi.”
^ To mbala mosusu, “mpo na baoyo bazali koluka liwa.”
^ To, “alobaka mabe ntango nyonso.”
^ To, “Molimo ya moto mabe ezalaka.”
^ To, “ayebaka likambo ya kosala.”
^ Lil., “kanyaka na ntolo.”
^ To, “alingaka bisengo.”
^ To, “alobaka mabe ntango nyonso.”
^ Lil., “akomɛla.”
^ To, “elongo na etamboli ya nsɔni.”
^ Lil., “akoloba mpo na libela.”