Masese 15:1-33
15 Eyano ya boboto ekitisaka nkanda makasi,+Kasi liloba oyo epesaka mpasi ematisaka nkanda.+
2 Lolemo ya bato ya bwanya esalelaka boyebi na ndenge ya malamu,+Kasi monɔkɔ ya bazoba elobaka makambo ezangá ntina.
3 Miso ya Yehova emonaka eloko nyonso,Ezali kotala bato mabe ná bato malamu.+
4 Lolemo ya kimya* ezali nzete ya bomoi,+Kasi maloba ya bokosi elɛmbisaka nzoto.*
5 Zoba atyolaka disiplini ya tata na ye,+Kasi moto ya ekɛngɛ andimaka kosembolama.*+
6 Na ndako ya moto ya sembo, biloko ya motuya ezalaka ebele,Kasi lifuti* ya moto mabe ememelaka ye mpasi.+
7 Monɔkɔ ya bato ya bwanya epalanganisaka boyebi,+Kasi motema ya bazoba ezali bongo te.+
8 Mbeka ya bato mabe ezali eloko oyo Yehova ayiná,+Kasi libondeli ya bato oyo bazangi mbeba esepelisaka ye.+
9 Yehova ayinaka nzela ya moto mabe,+Kasi alingaka moto oyo alandaka bosembo.+
10 Moto oyo asalaka te oyo ezali sembo alingaka disiplini te;+Kasi moto nyonso oyo ayinaka mpamela akokufa.+
11 Nkunda* mpe esika ya libebi ebombami ata moke te na miso ya Yehova.+
Ekozala boni mpo na mitema ya bana ya bato!+
12 Mosɛki alingaka te moto oyo azali kosembola* ye.+
Alukaka te toli epai ya bato ya bwanya.+
13 Motema ya esengo ekómisaka elongi nsainsai,Kasi mawa elɛmbisaka moto nzoto.*+
14 Motema ya mayele elukaka boyebi,+Kasi monɔkɔ ya bazoba esepelaka na bozoba.+
15 Mikolo nyonso ya moto ya mpasi ezalaka mabe,+Kasi moto oyo azali na motema ya esengo* azalaka na fɛti ntango nyonso.+
16 Kozala na biloko moke mpe kobanga Yehova ezali malamu+Koleka kozala na bozwi ebele elongo na mitungisi.*+
17 Elubu ya ndunda epai bolingo ezali, ezali malamu+Koleka ngɔmbɛ-mobali ya mafutamafuta epai koyina ezali.+
18 Moto ya nkandankanda abimisaka kowelana,+Kasi moto oyo ayokaka nkanda noki te akitisaka koswana.+
19 Nzela ya moto ya gɔigɔi ezali lokola lopango ya nsendensende,+Kasi nzela ya bato oyo bazangi mbeba ezali lokola nzela monene oyo ezangi mabulu.+
20 Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye,+Kasi zoba atyolaka mama na ye.+
21 Moto oyo azangi bososoli* asepelaka na bozoba,+Kasi moto ya bososoli akendaka kaka liboso.+
22 Makambo elongaka te soki toli* ezali te,Kasi elongaka soki bapesi-toli bazali ebele.+
23 Moto asepelaka kopesa eyano ya malamu,*+Mpe liloba oyo elobami na ntango oyo ebongi ezali mpenza malamu!+
24 Moto ya bososoli azali na nzela ya bomoi, nzela oyo etombolaka,+Aboyaka nzela oyo ekitisaka na Nkunda.*+
25 Yehova akobuka ndako ya moto ya lolendo,+Kasi akobatela ndelo ya mabele ya mwasi oyo mobali akufá.+
26 Yehova ayinaka mikano ya moto mabe,+Kasi maloba ya kosepelisa ezali pɛto epai na ye.+
27 Moto oyo azwaka litomba na ndenge ya mabe amemaka mpasi* na ndako na ye moko,+Kasi moto oyo ayinaka kanyaka akokoba kozala na bomoi.+
28 Moto ya sembo amanyolaka na motema na ye liboso ya koyanola,*+Kasi monɔkɔ ya bato mabe ebimisaka makambo ya mabe.
29 Yehova azali mosika mpenza na bato mabe,Kasi ayokaka libondeli ya bato ya sembo.+
30 Kongɛnga ya miso esepelisaka motema;Nsango ya malamu elendisaka.*+
31 Moto oyo ayokaka mpamela oyo epesaka bomoiAtángamaka na kati ya bato ya bwanya.+
32 Moto nyonso oyo azali koboya disiplini azali kotyola bomoi* na ye,+Kasi moto nyonso oyo ayokaka mpamela azwaka bososoli.*+
33 Kobanga Yehova ebongisaka mpo na kozwa bwanya,+Mpe komikitisa ememaka na nkembo.+
Maloba na nse
^ To, “Lolemo oyo ebikisaka.”
^ Lil., “kobukana na elimo.”
^ To, “mpamela.”
^ To, “biloko.”
^ To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
^ To, “kopamela.”
^ To, “elɛmbisaka elimo.”
^ To, “malamu.”
^ To, “mobulungano.”
^ To, “Moto oyo azali na motema te.”
^ To, “lisolo ya nkuku.”
^ Lil., “na eyano ya monɔkɔ na ye.”
^ To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
^ To, “nsɔni.”
^ To, “atalelaka malamumalamu ndenge ya koyanola; akanisaka liboso ya koloba.”
^ Lil., “ekómisaka mikuwa mafutamafuta.”
^ To, “molimo.”
^ Lil., “motema.”