Masese 12:1-28

  • “Moto oyo ayinaka mpamela azangi bososoli” (1)

  • “Koloba kozanga kokanisa ezali lokola kozokisa na mopanga” (18)

  • Kotya kimya ememaka esengo (20)

  • “Yehova ayinaka mbɛbu oyo elobaka lokuta” (22)

  • Motungisi enyokolaka motema (25)

12  Moto oyo alingaka disiplini alingaka boyebi,+Kasi moto oyo ayinaka mpamela azangi bososoli.*+  2  Yehova andimaka moto malamu,Kasi aboyaka moto oyo azali kokana kosala mabe.+  3  Moto akoki te komibatela ntango azali kosala mabe,+Kasi moto ya sembo akobatelama ntango nyonso.  4  Mwasi ya malonga azali motole mpo na mobali na ye,+Kasi mwasi oyo asalaka makambo ya nsɔni azali lokola maladi oyo elyaka mikuwa ya mobali na ye.+  5  Makanisi ya bato ya sembo ezali malamu,Kasi batoli ya bato mabe ezali bokosi.  6  Maloba ya bato mabe ezali motambo oyo ebomaka,*+Kasi monɔkɔ ya bato ya sembo ekobikisa bango.+  7  Ntango bato mabe babomami, bazalaka lisusu te,Kasi ndako ya bato ya sembo ekokoba kotɛlɛma.+  8  Bakumisaka moto soki azali ekɛngɛ na maloba na ye,+Kasi batyolaka moto oyo azali na motema ya bokosi.+  9  Moto oyo bamonaka mpamba kasi azali na mosaleliAzali malamu koleka moto oyo amikumisaka kasi azali na bilei* te.+ 10  Moto ya sembo abatelaka malamu banyama na ye ya mboka,*+Kasi ata motema mawa ya moto mabe eyokisaka mpasi. 11  Moto oyo asalaka bilanga akotonda na bilei,+Kasi moto oyo alandaka makambo ya mpambampamba azangi bososoli.* 12  Moto mabe alulaka nyama oyo bato mabe mosusu bakangi,Kasi moto ya sembo azali lokola nzete oyo epiki misisa na yango makasi, oyo ebotaka mbuma. 13  Moto mabe akozwa mpasi mpo na maloba na ye moko ya mabe,*+Kasi moto ya sembo akobika na mpasi na ye. 14  Maloba oyo ebimaka na monɔkɔ ya moto ekoki kosala ete makambo na ye etambola malamu,+Mpe oyo asalaka ekopesa ye mbano. 15  Nzela ya zoba ezali malamu na miso na ye moko,+Kasi moto ya bwanya andimaka toli.+ 16  Zoba amonisaka nkanda na ye+ nokinoki,*Kasi moto ya ekɛngɛ akangaka motema ntango bapesi ye nkanda.* 17  Motatoli ya sembo alobaka solo,*Kasi motatoli ya lokuta alobaka na bokosi. 18  Koloba kozanga kokanisa ezali lokola kozokisa na mopanga,Kasi lolemo ya bato ya bwanya ebikisaka.+ 19  Mbɛbu oyo elobaka solo ekoumela mpo na libela,+Kasi lolemo oyo elobaka lokuta ekozala kaka mpo na mwa ntango.+ 20  Bokosi ezali na motema ya baoyo bazali kokana kosala mabe,Kasi baoyo batyaka* kimya bazalaka na esengo.+ 21  Eloko moko te oyo eyokisaka mpasi ekokómela moto ya sembo,+Kasi moto mabe akotonda mpenza na mpasi.+ 22  Yehova ayinaka mbɛbu oyo elobaka lokuta,+Kasi bato oyo basalaka makambo na bosembo basepelisaka ye. 23  Moto ya ekɛngɛ abombaka makambo oyo ayebi,Kasi zoba abimisaka bozoba na ye.+ 24  Moto oyo asalaka mosala makasi akoyangela,+Kasi moto ya gɔigɔi akokóma moombo.+ 25  Motungisi na motema ya moto enyokolaka ye,+Kasi liloba ya malamu esepelisaka ye.+ 26  Moto ya sembo aponaka esika malamu ya koleisa bibwɛlɛ matiti,Kasi etamboli ya bato mabe ebungisaka bango nzela. 27  Moto ya gɔigɔi alandaka te nyama ya kolya,+Kasi mosala makasi ezali eloko ya motuya mpo na moto. 28  Nzela ya bosembo* ememaka na bomoi;+Kotambola na nzela yango ememaka na liwa te.

Maloba na nse

To, “azangi mayele.”
Lil., “kobatama mpo na kosopa makila.”
Lil., “limpa.”
To, “molimo ya nyama na ye ya mboka.”
Lil., “azali na motema te.”
Lil., “akozwama na motambo.”
To, “kaka na mokolo yango.”
Lil., “azipaka nsɔni.”
Lil., “makambo oyo ezali sembo.”
Lil., “baoyo bapesaka toli mpo na.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.