Masese 28:1-28

  • Libondeli ya moto oyo ayokaka te eyinamá (9)

  • Moto oyo ayamboli lisumu na ye bakoyokela ye mawa (13)

  • Moto oyo awelaka bomɛngo akozanga ngambo te (20)

  • Mpamela ezali malamu koleka maloba sukali (23)

  • Moto oyo akabaka azangaka eloko te (27)

28  Bato mabe bakimaka atako moto moko te azali kolanda bango,Kasi bato ya sembo bazali lokola nkɔsi* oyo ezali kobanga eloko te.+   Ntango bato ya mboka moko bazali kobuka mibeko, bankumu oyo bazali kokitana bazalaka ebele,+Kasi na lisalisi ya moto ya bososoli mpe ya boyebi, nkumu* akoumela ntango molai.+   Mobola oyo abubaka moto mpamba+Azali lokola mbula oyo ememaka biloko nyonsoya kolya.   Baoyo basundolaka mobeko bakumisaka moto mabe,Kasi baoyo batosaka mobeko basilikelaka bango.+   Bato mabe bakangaka ntina ya bosembo te,Kasi baoyo balukaka Yehova bakangaka ntina ya likambo nyonso.+   Mobola oyo azali kotambola na bosembo na ye azali malamuKoleka mozwi oyo banzela na ye ezali sembo te.+   Mwana ya mayele atosaka mobeko,Kasi moninga ya bato oyo balyaka na lokoso ayokisaka tata na ye nsɔni.+   Moto oyo azali kobakisa bomɛngo na ye na nzela ya matabisi+ mpe benefisi ya lokosoAndukaka yango mpo na moto oyo amoniselaka babola boboto.+   Moto oyo aboyi koyoka mobekoAta libondeli na ye eyinami.+ 10  Moto oyo azali kobungisa bato ya sembo nzela mpo bákɔta na nzela ya mabe akokwea na libulu na ye moko,+Kasi bato oyo bazangi mbeba bakozwa oyo ezali malamu.+ 11  Mozwi amimonaka ete azali na bwanya,+Kasi mobola, na bososoli na ye, ayebaka soki azali mpenza nani.+ 12  Ntango bato ya sembo balongi, esengo makasi* ezalaka,Kasi ntango bato mabe bazwi bokonzi, bato babombanaka.+ 13  Moto oyo azali kobomba makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te,+Kasi moto oyo ayamboli mpe atiki yango, bakoyokela ye mawa.+ 14  Esengo na moto oyo abangaka Nzambentango nyonso,*Kasi moto oyo akómisi motema na ye makasi akozwa mpasi.+ 15  Lokola nkɔsi oyo ezali konguluma mpe urse oyo ezali koya mbangu mpo na kobundaMoto mabe oyo azali koyangela bato oyo bazangá libateli azalimpe bongo.+ 16  Mokambi oyo azangi bososoli asalelaka nguya na ye na ndenge ya mabe,+Kasi moto oyo ayinaka litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe akokómisa bomoi na ye molai.+ 17  Moto oyo abomi moto mosusu akokoba kokima tii akokende na nkunda.*+ Moto moko te asalisa ye. 18  Moto oyo azali kotambola kozanga mbeba akobika,+Kasi moto oyo banzela na ye ezali ya bokosi akokwea na mbalakaka.+ 19  Moto oyo alonaka na mabele na ye akozala na mampa ebele,Kasi moto oyoalandaka makamboya mpambampamba akotonda na bobola.+ 20  Moto ya sembo akozwa mapamboli mingi,+Kasi moto oyo azali kowela kozwa bomɛngo akozanga te kozwa likambo.+ 21  Koponapona ezalimalamu te;+Kasi ekoki kosalema ete moto asala mabe mpo na mwa eteni ya limpa. 22  Moto ya bilulela* awelaka kozwa bomɛngo,Kasi ayebi te ete bobola nde ekoyela ye. 23  Moto oyo azali kopamela moto mosusu,+ na nsuka bakosepela na ye mingi+Koleka moto oyo azali koloba maloba sukali na lolemo na ye. 24  Moto oyo azali koyiba tata na ye ná mama na ye mpe alobi: “Ezali mabe te,”+ Azali moninga ya moto oyo abebisaka.+ 25  Moto ya lokoso* abimisaka kowelana,Kasi moto nyonso oyo atyelaka Yehova motema akolonga.*+ 26  Moto oyo andimelaka motema na ye mokoazali zoba,+Kasi moto oyo atambolaka na bwanya akobika.+ 27  Moto oyo akabelaka babola akozanga eloko te,+Kasi moto oyo akangeli bango miso na ye akozwa bilakeli mabe mingi. 28  Ntango bato mabe bazwi bokonzi, bato bamibombaka,Kasi ntango bakufi, bato ya sembo bakómaka ebele.+

Maloba na nse

To, “mwana-nkɔsi.”
Lil., “ye.”
To, “nkembo.”
To, “oyo azali na nsɔmɔ ntango nyonso.”
To, “libulu.”
To, “lokoso.”
To mbala mosusu, “Molimo ya lofundo.”
Lil., “akokóma mafutamafuta.”