Masese 22:1-29

  • Lokumu malamu eleki bomɛngo (1)

  • Koteya mwana ntango azali naino moke ekosalisa ye bomoi mobimba (6)

  • Moto ya gɔigɔi abangaka nkɔsi oyo ezali libándá (13)

  • Disiplini elongolaka bozoba (15)

  • Moto oyo ayebi mosala malamu asalelaka bakonzi (29)

22  Luká kozala na nkombo malamu* na esika ya ebele ya bomɛngo;+Kozala moto oyo bamemyaka* ezali malamu koleka palata ná wolo.  2  Mozwi mpe mobola bakokani na likambo oyo:* Yehova nde asalá bango nyonso mibale.+  3  Moto ya ekɛngɛ amonaka likama mpe amibombaka,Kasi moto oyo azangi mayele akobaka kokende mpe azwaka mpasi.*  4  Komikitisa ná kobanga YehovaEpesaka bomɛngo, nkembo mpe bomoi.+  5  Banzubɛ mpe mitambo ezali na nzela ya moto ya bokosi,Kasi moto oyo azwaka bomoi* na ye na motuya azalaka mosika na yango.+  6  Teyá mwana mobali* nzela oyo asengeli kokende;+Ata ntango akokóma mobange akotika yango te.+  7  Mozwi ayangelaka mobola,Mpe moto oyo adefaka azali moombo ya modefisi.+  8  Moto oyo alonaka makambo ya kozanga bosembo akobuka mpasi,+Mpe fimbo ya nkanda na ye makasi ekobukana.+  9  Moto oyo akabaka* akopambwama,Mpo akabolaka bilei na ye ná mobola.+ 10  Benganá mosɛki,Mpe kowelana ekosila;Koswana* mpe mafinga ekosuka. 11  Moto oyo azali na motema ya pɛto mpe na maloba ya bobotoAkozala moninga ya mokonzi.+ 12  Miso ya Yehova ebatelaka boyebi,Kasi akweisaka maloba ya mokosi.+ 13  Moto ya gɔigɔi alobi: “Nkɔsi ezali libándá! Nakobomama na katikati ya esika monene ya bato nyonso!”+ 14  Monɔkɔ ya basi ya mobulu* ezali libulu mozindo.+ Moto oyo Yehova apesi etumbu akokwea na kati na yango. 15  Bozoba ekangami na motema ya mwana mobali,+Kasi fimbo ya disiplini ekolongola yango mosika na ye.+ 16  Moto oyo azali kobuba mobola mpo na kobakisa bozwi na ye+Mpe moto oyo azali kopesa makabo epai ya mozwiBakosuka na bobola. 17  Tyá litoi na yo mpe yoká maloba ya bato ya bwanya,+Mpo ondima boyebi na ngai na motema na yo mobimba,+ 18  Mpo ezali malamu obatela yango na motema na yo mpenza,+Mpo yango nyonso ekoba kozala na mbɛbu na yo.+ 19  Mpo otyela Yehova motema,Nazali lelo kopesa yo boyebi. 20  Naino nakomelá yo te,Mpe napesá yo toli mpe boyebi te, 21  Mpo na koteya yo maloba ya solo mpe ya kotyela motema,Mpo oyebisa moto oyo atindaki yo makambo oyo ezali solo? 22  Kobɔtɔla mobola biloko te kaka mpo azali mobola,+Mpe konyokola moto mpamba te na porte ya engumba,+ 23  Mpo Yehova ye moko akosamba likambo na bango+Mpe akoboma* baoyo bazali kobuba bango. 24  Kosala boninga te na moto oyo asilikaka mpambampambaKotambola te elongo na moto oyo azalaka nkanda makasi, 25  Mpo oyekola ata moke te banzela na yeMpe omityela motambo te.+ 26  Kozala te na kati ya baoyo bapesanaka lobɔkɔ mpo na kosala boyokani,Mpo na komipesa ndanga na biloko oyo bamosusu badefi.+ 27  Soki ozali na eloko ya kofuta te,Bakozwa mbeto oyo olaleli! 28  Kopusa te bilembo ya ndelo ya kalaOyo bankɔkɔ na yo batyá.+ 29  Omoni moto oyo ayebi mosala na ye malamu? Akotɛlɛma liboso ya bakonzi;+Akotɛlɛma te liboso ya bato mpamba.

Maloba na nse

Lil., “Kondimama.”
To, “lokumu malamu.” Lil., “nkombo.”
Lil., “bakutani.”
To, “etumbu.”
To, “molimo.”
To, “mwana; elenge.”
Lil., “Ye oyo azali na liso ya boboto.”
To, “Likambo ya kosamba.”
Lil., “mopaya.” Talá Masese 2:16.
To, “akobɔtɔla molimo ya.”