Sanza ya 8
Mwapɔsɔ, 1 sanza ya 8
Ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda ebandeli ya mokili tii sikoyo.—Mat. 24:21.
Tobondelaka ete bato mosusu ebele bándima nsango yango mpe báya kosambela Yehova elongo na biso na losambo ya pɛto sikoyo. Kasi, ekozala boni mpo na baoyo bazali koboya koyoka likebisi yango sikoyo? Ekoki kozala mokano ya Yehova ete abikisa bato oyo babongoli motema ntango bamoni kobebisama ya Babilone Monene. Soki ekozala bongo, boye ezali lisusu na ntina mingi koleka ete tókoba kokebisa bato mpo na makambo oyo ezali koya? Na ntango yango, bato bakoki kokanisa makambo oyo tozali koyebisa bango sikoyo. (Talá mpe Ezekiele 33:33.) Mbala mosusu bakokanisa lisusu likebisi oyo tozalaki koyebisa bango mpe ekotinda bango báya kosambela Yehova elongo na biso ntango libaku ezali naino. Ndenge moko na mokɛngɛli ya bolɔkɔ na Filipi, oyo abongolaki motema kaka ntango “koningana monene ya mabele esalemaki,” mbala mosusu bato mosusu oyo bazali koboya koyoka sikoyo bakobongola motema nsima ya kobebisama ya Babilone Monene oyo ekoningisa mokili.—Mis. 16:25-34. w24.05 17 par. 9-10
Kristo azali nsuka ya Mibeko.—Rom. 10:4.
Tokoki kozwa liteya mosusu ya ntina na makambo oyo ntoma Paulo akomelaki bakristo Baebre. Basusu batikaki kokola na elimo; kutu ‘bazalaki lisusu na mposa ya mabɛlɛ, kasi ya bilei ya makasi te’ ya elimo. (Ebr. 5:12) Bazalaki kokoka te kokanga ntina ya mateya ya sika ya solo, oyo ezalaki komonisama mokemoke na nzela ya lisangá. (Mas. 4:18) Na ndakisa, Bayuda mingi oyo bakómaki bakristo bazalaki kaka kotingama na Mobeko ya Moize atako mbula soki 30 elekaki kobanda mbeka ya Kristo esukisaki Mibeko. (Tito 1:10) Moto nyonso oyo atángi mokanda oyo Paulo akomelaki Baebre na litambwisi ya elimo ya Nzambe akoki kondima ete makambo oyo ezali na kati ezali bilei ya makasi ya elimo. Ezalaki bilei oyo bakristo wana basengelaki na yango mpo bákóma na kondima makasi ete ebongiseli ya losambo ya bakristo eleki malamu mpe bázala na mpiko ya kokoba kosakola.—Ebr. 10:19-23. w24.04 6 par. 15
Lisekwa ekozala, ya bato ya sembo mpe ya bato oyo bazangi bosembo.—Mis. 24:15.
Banda ntango Adama ná Eva balandaki Satana mpe batombokelaki Yehova, bamiliare ya bato basili kokufa. Mwa bato moke, oyo motángo na bango ezali 144000, kati na bayekoli ya sembo ya Kristo, basekwaka mpo na kokende likoló epai bakozwa bomoi oyo ezangi kokufa. (Em. 14:1) Mpe ebele ya mibali mpe basi ya sembo oyo balingaki Yehova bakozala na kati ya baoyo bakosekwa na “lisekwa . . . ya bato ya sembo,” mpe bakozala na bomoi libela na libela na mabele soki batikali sembo na ntango ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo mpe na komekama ya nsuka. (Dan. 12:13; Ebr. 12:1) Lisusu, na boyangeli yango ya mbula nkóto, “bato oyo bazangi bosembo,” kati na bango baoyo basalelá naino Yehova te, to oyo kutu “basalaki makambo ya mabe,” bakozwa libaku ya kobongola bizaleli na bango mpe kokóma bato ya sembo. (Yoa. 5:29; Luka 23:42, 43) Kasi, bato mosusu bazali mpenza bato mabe na boye ete Yehova azwá ekateli ete bakosekwa te.—Luka 12:4, 5. w24.05 2 par. 3; 5 par. 15; 6 par. 17
Bakumisaka ngai kaka na mbɛbu, kasi motema na bango ezali mosika na ngai.—Yis. 29:13.
Moto oyo alingi kondimama na Yehova asengeli ‘kolobaka solo na motema na ye.’ (Nz. 15:2) Yango esuki kaka te na koboya kokosa. Yehova alingi tózala sembo na maloba mpe na misala na biso. (Ebr. 13:18) Yango ezali na ntina, “mpo Yehova ayinaka moto ya mbilingambilinga, kasi azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.” (Mas. 3:32) Bato oyo ‘balobaka solo na mitema na bango’ bamonisaka te ete batosaka na miso ya bato nzokande babukaka mibeko ya Nzambe na kobombana. Baboyaka makambo ya mbilingambilinga. Moto ya mbilingambilinga to ya nyamunyamu akoki kobanda komituna soki mibeko mosusu ya Yehova ezali mpenza ya bwanya. (Yak. 1:5-8) Akoki kobanda kobuka mibeko ya Yehova na makambo oyo amoni lokola ezali na ntina mingi te. Na nsima soki amoni ete abuki mbuma mabe te mpo na kozanga botosi na ye, akoki kobanda kosala makambo ata ya mabe, mpe ata soki akanisi ete asalelaka Nzambe, losambo na ye ekokóma ya bokosi. (Mos. 8:11) Kasi biso tolingi kozala sembo na makambo nyonso. w24.06 10 par. 7-8
Bótɛlɛma ngwi . . . solo ekangami na loketo na bino lokola mokaba.—Ef. 6:14.
Biso basaleli ya Yehova tolingaka solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Makambo oyo tondimaka euti kuna. (Rom. 10:17) Tondimá ete Yehova atyá lisangá ya bokristo mpo ezala “likonzí mpe eloko oyo esimbi solo.” (1 Tim. 3:15) Satana alukaka mpenza kotinda biso tótika kotyela Biblia motema, to mpe tótika kolanda litambwisi oyo tozwaka na nzela ya ebongiseli ya Nzambe. (Ef. 4:14) Mosika te, Zabolo akosalela makanisi ya lokuta mpenza mpo na kokosa bato ya bikólo nyonso mpo bátɛmɛla Yehova. (Em. 16:13, 14) Tóyeba mpe ete Satana akokoba kobakisa milende mpo na kokosa basaleli ya Yehova. (Em. 12:9) Na yango, ezali na ntina mingi ete tóyekola ndenge ya kokesenisa solo na lokuta mpe kotosa solo. (Rom. 6:17; 1 Pe. 1:22) Yango nde ekosala ete tóbika to te na ntango ya bolɔzi monene! w24.07 8 par. 1-3
Mitindo oyo nazali kopesa yo lelo eleki makasi te mpo na yo, mpe ezali mosika mpenza te mpo ozwa yango.—Mib. 30:11.
Ntango Yehova akómisaki Bayisraele ekólo, asalaki kondimana, to boyokani moko, elongo na bango. Alakaki bango ete soki batosi mibeko na ye, akobatela bango mpe akopambola bango. Kasi, soki batombokeli ye, na ndakisa soki baponi kosambela banzambe mosusu, Yehova akolongola lipamboli na ye, mpe bakomona mpasi. Kasi ata soki esalemi bongo, bazalaki kaka na likoki ya kozongisa boyokani na bango na Nzambe. Bakokaki ‘kozongela Yehova Nzambe na bango mpe kotosa mongongo na ye.’ (Mib. 30:1-3, 17-20) Na maloba mosusu, bakokaki kobongola motema. Soki basali yango, Yehova akopusana penepene na bango mpe akopambola bango lisusu. Bato ya ekólo oyo Yehova aponaki batombokelaki ye mbala na mbala. Na yango, bakómaki komona mpasi. Kasi Yehova asundolaki te bato na ye oyo bazangaki botosi. Atindaki basakoli mbala na mbala mpo na kolendisa bango bábongola motema mpe bázongela ye.—2 Bak. 17:13, 14. w24.08 9 par. 4-5
Monyoko moko monene ekómelaki lisangá oyo ezalaki na Yerusaleme.—Mis 8:1.
Bakristo Baebre oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme mpe na Yudea bakutanaki na mikakatano ebele na bambula oyo elandaki liwa ya Yesu na mobu 33 T.B. Ntango lisangá ya bokristo esalemaki, mwa moke na nsima bakristo bakutanaki na botɛmɛli makasi. Mpe mbula soki 20 nsima na yango, bakristo bakutanaki na mokakatano ya kozanga biloko ya kobikela, mbala mosusu mpo na nzala oyo ebɛtaki mokili yango mwa moke liboso. (Mis. 11:27-30) Kasi, na mobu soki 61 T.B., bakristo bazalaki na eleko ya mwa kimya na kotalela makambo oyo ezalaki koya liboso. Na ntango wana, bazwaki mokanda oyo ntoma Paulo akomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe, mpe emonanaki ete eyaki na ntango oyo ebongi mpenza. Mokanda epai ya Baebre eyaki mpenza na ntango oyo ebongi mpo kimya oyo bakristo yango bazalaki na yango na ntango wana eumelaki te. Ezalaki na toli ya sikisiki oyo esalisaki bango báyika mpiko na makambo ya mpasi oyo bakutanaki na yango mwa moke na nsima. w24.09 8 par. 1-2
Bakómi libɔndisi mpenza epai na ngai.—Kol. 4:11.
Ntango tozali na mpasi, Yehova amonisaka ndenge alingaka biso na nzela ya bandeko na biso bakristo. Mpo na kobɔndisa biso, bandeko bayokaka biso na boboto, mpe komona bango pembeni na biso ekoki kolendisa biso. Bakoki kotángela biso vɛrsɛ moko oyo ekokitisa biso motema to kobondela elongo na biso. (Rom. 15:4) Na bantango mosusu, ndeko mobali to ndeko mwasi moko akoki kokundwela biso ndenge oyo Yehova atalelaka makambo mpe yango ekoki kosalisa biso tóbatela kimya ya makanisi. Bandeko bakoki mpe kopesa biso lisalisi ya sikisiki na ndenge mosusu, na ndakisa bakoki komemela biso bilei ntango tozali na mpasi. Mpo basusu básalisa biso, ekoki kosɛnga ete tóyebisa bango ete tozali na mposa ya lisalisi. (Mas. 17:17) Na bantango mosusu bayebaka te soki tozali komiyoka ndenge nini, to tozali na mposa ya eloko nini. (Mas. 14:10) Na yango okoki koyebisa mayoki na yo epai ya baninga oyo bakɔmɛli na elimo. Yebisá bango ndenge oyo bakoki kosalisa yo. Mbala mosusu okoki kopona koyebisa likambo na yo epai ya nkulutu moko to bankulutu mibale oyo osololaka na bango malamu. Bandeko basi mosusu bamoni ete kosolola na ndeko mwasi moko oyo akɔmɛli na elimo ebɔndisaka. w24.10 10 par. 15-16
Moto nyonso oyo andimi Mwana mpe azali komonisa kondima epai na ye azwa bomoi ya seko.—Yoa. 6:40.
Bato mingi balandelaka biloko na bango ya kolya mpe basalaka ngalasisi mbala na mbala mpo na kobatela kolɔngɔnɔ ya nzoto na bango. Atako bongo, bayebi ete ekosalisa bango te bázala na bomoi libela na libela. Bakoki kolikya to kokanisa bongo te mpo bobange eyaka na mikakatano ebele. Nzokande, Yesu amonisaki ete bato bakoki kozala na “bomoi ya seko,” ndenge emonisami na Yoane 3:16 mpe 5:24. Mokolo moko, Yesu asalaki likamwisi ya kokómisa mampa ná mbisi ebele mpo na koleisa bankóto ya bato. Ezalaki likambo ya kokamwa, kasi makambo oyo alobaki mokolo oyo elandaki ekamwisaki mingi koleka. Ebele ya bato balandaki ye na Kapernaume, pene ya Mbu ya Galile, mpe kuna Yesu ayebisaki bango ete bato bakoki kosekwa mpe kozala na bomoi ya seko. (Yoa. 6:39, 40) Maloba ya Yesu emonisi ete bato mingi oyo bakufá bakoki kosekwa mpe ete yo ná bato oyo olingaka bokoki kozala na bomoi libela na libela! w24.12 8 par. 1-2
Bino mibali, . . . bópesaka bango lokumu mpo bazali mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ, oyo ya bomwasi.—1 Pe. 3:7.
Lapolo moko ya OMS euti komonisa ete mibali mingi banyokolaka basi na bango na kobɛta, na maloba, to na kozokisa mayoki na bango. Mobali oyo asalaka makambo wana akoki komonisa na miso ya bato ete amemyaka mwasi na ye nzokande anyokolaka ye na ndako. Nini ekoki kotinda mibali mosusu bányokola basi na bango? Mbala mosusu tata na bango azalaki kobɛta mama na bango, yango wana bakanisaka ete konyokola mwasi ndenge wana ezali mabe te. Mibali mosusu balandaka mimeseno ya esika oyo bafandi, oyo elendisaka makanisi mabe oyo ete “mobali ya solosolo” asengeli kozala makambo makasi mpo mwasi na ye ayeba ete ye nde mokonzi. Mibali mosusu bayekolá kopekisa mayoki na bango te, ata mpe nkanda na bango. Basusu babebisá ndenge na bango ya kotalela basi mpe kosangisa nzoto mpo batalaka pornografi mingi. Lisusu, baankɛtɛ emonisi ete maladi mabe ya coronavirus ebebisaki lisusu makambo. Kasi, moko te ya makambo wana ezali kopesa mobali nzela ya konyokola mwasi. w25.01 8 par. 2-3
Lokola Kristo amonaki mpasi na mosuni, bino mpe bózala na makanisi ya ndenge wana.—1 Pe. 4:1.
“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso.” (Luka 10:27) Na maloba yango, Yesu amonisaki ete yango nde etinda oyo eleki monene na kati ya Mobeko ya Moize. Simbá ete kolinga Yehova esengeli kouta na motema na biso, oyo esangisi bamposa mpe mayoki na biso. Esɛngi mpe kokangama na Yehova na molimo na biso mobimba mpe na makasi na biso. Kasi, tosengeli mpe kolinga Yehova na makanisi na biso, oyo esangisi ndenge na biso ya kotalela makambo. Ya solo, tokoki ata mokolo moko te koyeba makanisi nyonso ya Yehova. Kasi tokoki koyeba malamu makanisi ya Nzambe soki toyekoli “makanisi ya Kristo” mpo Yesu amekolaki na ndenge ya kokoka makanisi ya Tata na ye.— 1 Ko. 2:16. w25.03 8 par. 1
Mpo na ye tosikolami na nzela ya lisiko na makila ya moto wana, ɛɛ, mabunga na biso elimbisami, na kolanda bomɛngo ya boboto monene na ye.—Ef. 1:7.
Lokola azalaki moto ya kokoka, Yesu akokanaki na moto ya liboso, Adama, ndenge azalaki liboso asala lisumu. (1 Ko. 15:45) Na yango, na nzela ya liwa na ye, Yesu, alongaki kozipa lisumu ya Adama, elingi koloba, kozongisa eloko oyo Adama abungisaki. (Rom. 5:19) Na bongo, Yesu akómaki “Adama ya nsuka.” Ezali na ntina te moto mosusu ya kokoka aya mpo na kofuta eloko oyo Adama abungisaki. Yesu akufaki “mbala moko mpo na libela.” (Ebr. 7:27; 10:12) Boye, bokeseni ezali wapi kati na ebongiseli ya kozipa masumu mpe lisiko? Ebongiseli ya kozipa masumu ezali likambo oyo Nzambe asali mpo na kozongisa boyokani malamu kati na ye ná bato. Lisiko ezali motuya oyo efutami mpo na kozipa masumu ya bato. Motuya yango ezali makila ya Yesu oyo asopaki mpo na biso.—Ebr. 9:14. w25.02 5 par. 12-13
Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema. Ntango bomekami, Nzambe akobongisela bino nzela ya kobima mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.—1 Ko. 10:13.
Komona ete Yehova azali Moto ya solo ekosalisa biso tótalela mikakatano na biso na ndenge oyo ebongi. Na ndenge nini? Tokobanda komona ete mikakatano na biso etaleli ntembe monene kati na Yehova mpe Satana. Satana alobaka ete soki tokutani na makambo ya mpasi, tokosundola Yehova. (Yobo 1:10, 11; Mas. 27:11) Kasi ntango totikali sembo epai ya Yehova atako mikakatano na biso, tokomonisa ete tolingaka Yehova mpe ete Satana azali moto ya lokuta. Ozali kokutana na botɛmɛli ya guvɛrnema, mikakatano ya mbongo, bato ya teritware bazali kosepela na solo te, to mokakatano mosusu? Soki ezali bongo, kobosana te ete makambo oyo ozali kokutana na yango epesi yo libaku ya kosepelisa motema ya Yehova. Kobosana mpe te ete Yehova akotika ata moke te omekama koleka oyo okoki kokangela motema. Akopesa yo makasi ya koyika mpiko. w24.06 22 par. 9
Moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye.—Yak. 1:14.
Oyebaka makambo oyo emekaka yo mbala mingi? Tokozwa litomba moko te soki tozali kowangana bolɛmbu na biso to kokanisa ete tozali makasi mpe tokokwea na lisumu te. (1 Yoa. 1:8) Tóbosana te ete ntoma Paulo alobaki ete ata “baoyo bazali na makoki ya elimo” bakoki kokwea na komekama soki bakobi te komibatela. (Gal. 6:1) Tosengeli kozala sembo na motema na biso mpe kondima makambo oyo ezali bolɛmbu mpo na biso. (2 Ko. 13:5) Soki oyebi bolɛmbu na yo to makambo oyo emekaka yo mingi, osengeli kosala nini? Zwá bibongiseli ya makasi mpo na kotɛmɛla yango! Na ndakisa, na ntango ya kala, eteni ya efelo ya engumba oyo ekokaki kokɔtisa banguna ezalaki baporte ya engumba. Na yango, bazalaki kotya bakɛngɛli ebele mpo na kobatela mpenza baporte. Ndenge moko mpe, tosengeli kotya likebi mingi na makambo nyonso oyo toyebi ete ezalaka bolɛmbu mpo na biso.—1 Ko. 9:27. w24.07 15 par. 5-7
Bozali kokoba kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu mpe kokola na boyebi ya solosolo ya Nzambe.—Kol. 1:10.
Mosala nyonso ya malamu, oyo mokapo ya lelo elobeli, esangisi mpe kosakola nsango malamu. Na yango, ntango tozali kotánga Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango, kondima na biso epai ya Yehova ekokóma makasi mpe tokomona polele ntina ya kosakola nsango ya Bokonzi. Mpo Liloba ya Nzambe esalisa biso mpenza, tosengeli kolekaka mbangumbangu te ntango tozali kotánga, koyekola, mpe komanyola. Kende malɛmbɛmalɛmbɛ. Soki okutani na vɛrsɛ oyo okangi ntina na yango te, koleka yango te. Salelá Index des publications des Témoins de Jéhovah to Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova mpo omona ndimbola ya vɛrsɛ yango. Soki ozali koyekola na likebi, okondima mpenza ete Liloba ya Nzambe ezali solo. (1 Tes. 5:21) Mpe soki kondima na yo ekómi makasi bongo, okozala mpenza na esengo mingi ya koyebisa basusu makambo oyo oyekoli. w24.04 15 par. 4-5
Nazali kokomela bino, mpo na koyeba soki botosaka na makambo nyonso.—2 Ko. 2:9.
Davidi alobaki ete azali ‘malamu mpe asepelaka kolimbisa.’ (Nz. 86:5) Mika akomaki: “Nani azali Nzambe lokola yo, oyo alimbisaka libunga mpe atyaka likebi te na kobuka mibeko?” (Mika 7:18) Mpe Yisaya alobaki: “Moto mabe atika mabe na ye, mpe mosali mabe atika makanisi na ye; azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa, azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.” (Yis. 55:7) Mpo na komekola Yehova, Paulo ayebisaki lisangá ya Korinti ete esengelaki koyamba lisusu mobali oyo abongolaki motema mpe kolakisa ete balingaka ye. Lokola bandeko ya lisangá basalelaki malako yango, bamonisaki ete ‘batosaka na makambo nyonso.’ Ya solo, mobali yango alongolamaki na lisangá elekaki kaka mwa basanza moke, kasi disiplini yango ememaki ye mpenza na kobongola motema. Yango wana ezalaki na ntina te ete aumela mpo bázongisa ye na lisangá. w24.08 17-18 par. 12-13
Moko akozwama mpe mosusu akosundolama.—Mat. 24:40.
Makambo minene ekosalema na ntango oyo tozali! Mosika te, Yesu akosambisa moto nyonso oyo azali na bomoi awa na mabele. Yesu alobelaki eleko oyo ekomema na lisambisi yango ntango apesaki bayekoli na ye “elembo” ya esakweli oyo ekomonisa kozala na ye mpe “eleko ya nsuka ya mokili.” (Mat. 24:3) Esakweli yango ezali na Matai mokapo 24 mpe 25, na Marko mokapo 13 mpe Luka mokapo 21. Yesu apesaki makebisi ya polele na nzela ya bandakisa misato oyo tokolobela. Ezali ndakisa ya bampate ná bantaba, ya bangɔndɔ ya mayele mpe ya zoba, mpe ndakisa ya batalanta. Ndakisa mokomoko ekosalisa biso tóyeba ete Yesu akosambisa moto na moto na kolanda misala na ye. w24.09 20 par. 1-2
Bósala makambo nyonso na bolingo.—1 Ko. 16:14.
Yesu Kristo, ndakisa oyo eleki malamu mpo na biso, azalaki kosala makambo nyonso na bolingo, bolingo ya Tata na ye mpe bolingo ya bato. Bolingo yango nde etindaki ye asala mosala makasi mpe ya komikitisa mpo na kosalisa basusu. (Mat. 20:28; Yoa. 13:5, 14, 15) Bandeko mibali, soki bolingo nde ezali kotinda yo, Yehova akopambola yo mpe akosalisa yo okokisa mokano na yo ya kokokisa masɛngami mpo na kokóma mosaleli na misala. (1 Pe. 5:5) Na mokili oyo, bato basepelaka mbala mingi na bato oyo bamilakisaka. Kasi, na ebongiseli ya Yehova ezalaka bongo te. Ndeko oyo bolingo nde ezali kotinda ye, na ndakisa ya Yesu, akoluka te kokonza, kozala na bokonzi likoló ya basusu to kosala nkombo. Soki moto oyo alukaka lokumu atyami mosaleli na misala na lisangá, na ntembe te akoboya kosala misala mosusu oyo esɛngaka komikitisa mpo na kosalisa bampate ya Yehova. Akoki komona ete ye akoki kosala misala ya bongo te.—Yoa. 10:12. w24.11 15 par. 6-7
Elimo santu etye bino bakɛngɛli.—Mis. 20:28.
Na mokili mobimba, tozali na bosɛnga ya bandeko mibali mpo básala lokola “makabo oyo ezali bato.” (Ef. 4:8) Soki ozali ndeko mobali oyo azwá batisimo, ozali “na likoki ya kosala yango”? (Mas. 3:27) Okolinga kokokisa masɛngami mpo na kokóma mosaleli na misala? To okoki kosala makasi okokisa masɛngami mpo osalela bandeko na yo lokola nkulutu? Okoki kosala bambongwana na bomoi na yo mpo okɔta Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi? Eteyelo yango ekopesa yo formasyo oyo ekosala ete Yesu asalela yo lisusu mingi koleka. Soki ozali komona ete okokoka te, bondelá Yehova. Sɛngá ye apesa yo elimo santu mpo okoka kosala mokumba nyonso oyo okozwa. (Luka 11:13) Bandeko mibali oyo Yesu atye “makabo oyo ezali bato” bamonisi ete Yesu azali kokoba kokamba biso na mikolo oyo ya nsuka. (Mat. 28:20) Tozali mpenza na botɔndi ndenge tozali na Mokonzi ya bolingo, oyo azali mokabi, atyelaka biso likebi mpe apesaka bandeko mibali ya makoki mpo na kokokisa bamposa na biso. w24.10 23 par. 16-17
Makambo ya kala ekokanisama lisusu te.—Yis. 65:17.
Tokoloba nini mpo na makambo nyonso oyo ezali kopesa basaleli ya Nzambe mpasi mpe konyokola bango? Nsukansuka, tokobosana makambo wana mpe ekomonana te na miso ya Nzambe. (Yis. 65:16) Yehova akolongola makambo oyo etungisaka biso, mpe na nsima tokokanisa kutu te ndenge oyo makambo yango enyokolaki biso. Ata sikoyo, toyokaka motema ya kokita ntango tozali na makita na biso, esika oyo tokoki kobosana bampasi mpe kotya pembeni mitungisi ya mokili mabe oyo. Tosalisaka basusu mpe bámiyoka malamu na paradiso ya elimo ntango tozali komonisa bolingo, esengo, kimya, boboto mpe motema pɛtɛɛ, bizaleli ya mbuma ya elimo ya Nzambe. (Gal. 5:22, 23) Ezali mpenza lipamboli kozala na kati ya ebongiseli ya Nzambe! Baoyo bakotikala na kati ya paradiso ya elimo bakomona kokokisama mobimba ya elaka ya Nzambe ya “likoló ya sika mpe mabele ya sika.” w24.04 22 par. 9-10
Ezali motambo ntango moto abeleli mbangumbangu ete: “Mosantu!” mpe kaka na nsima abandi kotalela lisusu elako yango malamumalamu.—Mas. 20:25.
Atako eleko oyo ndeko mwasi mpe ndeko mobali balingani ekoki kosepelisa, ezali mpe eleko ya ntina mingi oyo ekoki komema na libala. Na mokolo ya libala na bango, mwasi ná mobali basalaka elako liboso ya Yehova ete bakolingana mpe bakopesana limemya ntango nyonso oyo bazali na bomoi. Liboso ya kosala ata elako nini, tosengeli kokanisa malamu. Ezali mpe bongo mpo na elako ya libala. Eleko oyo bato balingani epesaka bango nzela ya koyebana malamu mpe ya kozwa ekateli ya malamu. Ntango mosusu bakozwa ekateli ya kobalana; ntango mosusu mpe bakozwa ekateli ya kokata boyokani yango. Soki bato oyo balinganaki bakabwani, elingi koloba te ete eleko na bango ya kolingana elongi te. Ekokisi nde mokano na yango: Esalisi bango bázwa ekateli oyo ebongi. Mpo na nini ezali na ntina kozala na makanisi malamu na oyo etali eleko oyo bato balingani? Monzemba oyo azali na makanisi ya malamu akokende te kolinga moto soki azali na likanisi ya libala te. w24.05 26-27 par. 3-4
Koyoka nsɔni te mpo na litatoli oyo etali Nkolo na biso.—2 Tim. 1:8.
Na bantango mosusu, bilenge bakristo bazangaka mpiko mpo na kokɔtela makambo oyo bandimaka. Bakoki kobanga ntango bazali koteya bango liteya ya evolisyo na kelasi. Mpo na nini? Balakisi na bango bakoki komonisa ete evolisyo ezali likambo ya solo. Soki ozali moboti, ndenge nini okoki kosalisa mwana azala na mpiko ya kokɔtela bindimeli na ye? Salisá ye ayeba ete azali na ntina te ya koyoka nsɔni mpo andimaka ete Nzambe nde akelá biloko nyonso. Mpo na nini? Likambo ya solo ezali ete bato mingi ya siansi mpe bandimaka ete bomoi ebimá kaka yango moko te. Bamonaka ete ezali na moto moko ya mayele mingi oyo akelá ebele ya biloko ya kokamwa oyo ezali na bomoi. Na yango, bandimaka te liteya ya evolisyo. Mwana na yo akoki kokómisa kondima na ye makasi soki ataleli bantina oyo etindaki bandeko mosusu bándima ete bomoi ekelamá. w24.12 18 par. 14-15
Atondaki na esengo na nzela ya elimo santu.—Luka 10:21.
Yesu abatelaki elikya ete bato mosusu bakoyoka ye na mosala ya kosakola. Yango esalisaki ye akoba kosakola na esengo. Na ndakisa, na nsuka ya mobu 30 T.B., Yesu amonaki ete bato mingi bakokaki sikoyo kondima nsango na ye, mpe akokanisaki bango na elanga oyo eteli mpo na kobuka mbuma. (Yoa. 4:35) Soki mbula moko na nsima, ayebisaki bayekoli na ye ete: “Mbuma ya kobuka ezali mingi.” (Mat. 9:37, 38) Mpe na nsima, azongelaki lisusu: “Mbuma ya kobuka ezali mingi . . . Bóbondela Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Luka 10:2) Yesu abungisaki ata moke te elikya ete bato mosusu bakokaki kondima nsango malamu, mpe asepelaki ntango basalaki yango. Yesu ateyaki bayekoli na ye bábatela elikya mpo na nsango oyo bazali kosakola, mpe yango ekosalisa bango bábatela molende na bango. w25.03 18-19 par. 15-16
Nzambe na ngai azali libanga ya esika na ngai ya kokima.—Nz. 94:22.
Yehova azali ekimelo. Na ntango ya mbula ya mopɛpɛ makasi, moto akoki komibomba na nse ya libanga monene. Ndenge moko mpe Yehova abatelaka biso ntango tokutani na makambo ya mpasi na bomoi na biso. Asalisaka biso tózala na kimya mpe atikaka te ete tózwa likama oyo ekonyokola biso libela. Mpe alaki biso likambo mosusu: Nsukansuka akolongola likambo nyonso oyo ebebisaka kimya na biso mpe bolamu na biso. (Ezk. 34:25, 26) Lolenge moko ya kokómisa Yehova libanga monene na biso ya Ekimelo ezali ya kobondela ye. Ntango tobondeli Yehova, apesaka biso “kimya ya Nzambe” oyo ebatelaka motema mpe makanisi na biso. (Flp. 4:6, 7) Yehova azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa biso. Tokoki kotyela ye motema mpo azali “Libanga mpo na seko.” (Yis. 26:3, 4) Akozala ntango nyonso na bomoi mpo na kokokisa bilaka na ye, koyoka mabondeli na biso, mpe kopesa biso lisungi oyo tosengeli na yango. Tokoki mpe kotyela Yehova motema mpo azalaka sembo epai ya basaleli na ye. (2 Sa. 22:26) Akobosana ata moke te oyo tosalaka, mpe akozanga te kopesa biso mbano.—Ebr. 6:10; 11:6. w24.06 27 par. 4-6
Batelá motema na yo, mpo maziba ya bomoi eutaka kuna.—Mas. 4:23.
Kominanola ya mabe, baninga mabe, mpe makanisi ya konduka biloko ya mokili ekoki kokabola motema na biso. Soki tomoni ete eloko moko ebandi kokitisa bolingo na biso epai ya Yehova, tózwa bibongiseli mpo na kolongola yango mbala moko. (Mat. 5:29, 30) Tosengeli te kotika ete motema na biso ekabwana. Tokoki komikosa mpe kokanisa ete soki tozali kosala makambo mingi ya elimo, makambo ya mabe ekobebisa biso te. Kasi, tótalela ndakisa oyo: Kanisá ete moi ezali makasi mpenza. Mpo na komibatela, ozwi ekateli ya komɛla mai mingi. Kasi nini ekosalema soki ofandi kaka na nse ya moi na esika oluka esika ya malili? Mai ekobanda kaka kosila na nzoto mpo moi ezali makasi. Ndakisa yango emonisi nini? Tosengeli kosuka kaka te na kosala makambo ya malamu oyo ekosala ete tópusana penepene na Yehova. Kaka ndenge tokolinga te kotikala na nse ya moi, tosengeli komibatela na makambo nyonso ya mokili, oyo ekoki kokabola motema na biso, mpe kokitisa bolingo na biso mpo na Yehova.—Ef. 2:2. w24.07 21 par. 6-7
Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.—Mat. 5:44.
Tokoki mpenza te kokanga ntina ya mpasi oyo Yesu ayokaki, ndenge basambwisaki ye, mpe makambo ya kozanga bosembo oyo basalaki ye. Kasi makambo yango ya kozanga bosembo elongaki Yesu te. Na esika alakela basoda oyo babakaki ye na nzete na bansɛtɛ mabe, Yesu abondelaki boye: “Tata, limbisá bango, mpo bayebi te makambo oyo bazali kosala.” (Luka 23:34) Ntango tobondeli mpo na baoyo basali biso mabe, ekoki kokitisa biso motema mpe nkanda, mpe ekoki kutu kobongola ndenge na biso ya kotalela bango. Toyebi te makambo nini ya kozanga bosembo tokokutana na yango liboso nsuka eya. Ata soki ezali ya ndenge nini, tótika te kobondela Yehova asalisa biso. Lisusu, tokoki komekola ndakisa ya Yesu mpe kokoba kosalela toli ya Biblia. Soki tosali bongo, tokoki kotya motema ete Yehova akopambola biso mpenza.—1 Pe. 3:8, 9. w24.11 6 par. 16; 7 par. 17, 19
Ozali Nzambe oyo asepelaka na mabe te; moto moko te ya mabe akoki kotikala epai na yo.—Nz. 5:4.
Yehova azali te Nzambe oyo akangaka miso na mabe; asepelaka na lisumu te. (Nz. 5:4-6) Asɛngi biso tótosa mibeko na ye ya sembo, oyo atyeli biso na Liloba na ye. Kasi, Yehova asɛngi te ete biso bato ya kozanga kokoka tótosa ye na ndenge ya kokoka. (Nz. 130:3, 4) Nzokande, atikaka mpe nzela te epai ya ‘bato oyo batyolaka Nzambe oyo bakómisi boboto monene na ye eloko oyo ezali kopesa nzela ya kozala na etamboli ya nsɔni na nko.’ (Yuda 4) Kutu, Biblia elobeli ‘kobebisama ya bato oyo batyolaka Nzambe’ na etumba ya Nzambe ya Armagedone. (2 Pe. 3:7; Em. 16:16) Kasi, Yehova alingi moto ata moko te abomama. Biblia elobi polele ete “alingi ete bato nyonso bábongola motema.” (2 Pe. 3:9) Bankulutu bamekolaka Yehova na ndenge bamonisaka motema molai ntango bazali komeka kosalisa basumuki bábongola banzela na bango mpe bázongela boyokani na bango na Yehova. w24.08 26 par. 1-2
Ofungolaka lobɔkɔ na yo mpe okokisaka mposa ya ekelamu nyonso ya bomoi.—Nz. 145:16.
Ndenge moko na Yehova, biso mpe tokoki kokabela basusu biloko mpo tolingaka bango. Na ndakisa, oyebi ndeko moko oyo azali na bosɛnga ya biloko ya kolya to bilamba? Yehova akoki kosalela yo mpo opesa ndeko yango biloko oyo asengeli na yango. Basaleli ya Yehova bayebani mingimingi mpo na ndenge bamonisaka ezaleli ya bokabi ntango likama esalemi. Na ndakisa, na ntango ya maladi mabe ya coronavirus, bandeko mibali mpe bandeko basi bapesaki bilei, bilamba, mpe biloko mosusu mpo na baoyo bazalaki na bosɛnga. Basusu mpe batyaki makabo ya mbongo mingi mpo na mosala na biso na mokili mobimba. Yango esalisaki mpo na kosunga bandeko ya mokili mobimba. Bandeko yango basalelaki toli ya Baebre 13:16 oyo elobi: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela basusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” w24.09 27 par. 6-7
Bóluka mpenza koyeba makambo oyo eleki ntina.—Flp. 1:10.
Kanisá likambo oyo. Ozali koluka mosala mpo na kokokisa bamposa ya libota na yo. Balakisi yo misala mibale. Oyebi bosolo ya makambo nyonso, otaleli oyo misala yango ezali kosɛnga, ngonga ya kosala yango, ntango oyo okolekisa na nzela mpe makambo mosusu. Omoni ete misala yango nyonso mibale eyokani na mitinda ya Biblia. Mbala mosusu osepeli na moko ya misala yango mpo olingaka yango to mpo ekofuta yo mbongo mingi koleka. Kasi, liboso ya kozwa ekateli, ezali na makambo mosusu oyo osengeli kotalela. Na ndakisa, ngonga ya moko ya misala yango ekotya nkaka na programɛ ya makita ya lisangá? Moko ya misala yango ekolya yo ntango ya kolekisa elongo na bato ya libota na yo mpo na kolendisa bango mpe kokokisa bamposa na bango ya elimo? Komituna mituna ya ndenge wana ekosalisa yo otya “makambo oyo eleki ntina,” elingi koloba losambo na yo mpe bamposa ya libota na yo na esika ya liboso ya mbongo oyo okozwa. Soki osali bongo, okoki kozwa ekateli oyo Yehova akopambola. w25.01 17 par. 11-13
Yehova azali pene na baoyo motema ebukani.—Nz. 34:18.
Ata soki banyokolá yo, yebá ete Yehova alingaka yo mpe azwaka yo na motuya. Soki ozali koyoka ete olɛmbi nzoto to “elimo [na yo] etutami,” kobosana te ete Yehova amonaki makambo ya malamu na motema na yo mpe ye moko abendaki yo epai na ye. (Yoa. 6:44) Azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa yo mpo ozali na motuya na miso na ye. Tokoki koyeba mayoki oyo Yehova azalaka na yango soki totaleli ndakisa ya Yesu. Na mosala na ye awa na mabele, bato oyo basusu bazalaki komona ete bazali bato mpamba, Yesu atyelaki bango likebi mpe amoniselaki bango motema mawa. (Mat. 9:9-12) Ntango mwasi moko oyo azalaki na maladi ya nsɔmɔ asimbaki elamba ya Yesu na elikya ete akobika, Yesu abɔndisaki ye mpe apesaki ye longonya mpo na kondima na ye. (Mrk. 5:25-34) Yesu amonisaka bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka. (Yoa. 14:9) Na yango, okoki kondima ete Yehova azwaka yo na motuya mpe amonaka bizaleli na yo ya malamu, ata mpe kondima na yo mpe bolingo na yo mpo na ye. w24.10 7 par. 4-5
Tyá mai ya miso na ngai na kati ya molangi na yo ya mposo ya nyama.—Nz. 56:8.
Na bomoi na ye, Davidi akutanaki na makambo ebele oyo esalaki ete atangisa mai ya miso. Bato mingi bazalaki koyina ye mpe ata baninga oyo azalaki kotyela motema basalaki ye mabe. (1 Sa. 19:10, 11; 2 Sa. 15:10-14, 30) Mokolo moko akomaki: “Nalɛmbi na kolelalela na ngai; butu nyonso nazali kopɔlisa mbeto na ngai na mai ya miso; nazali kotondisa kiti na ngai ya mpɔngi na mai ya miso.” (Nz. 6:6) Atako mikakatano oyo Davidi akutanaki na yango, andimaki ete Yehova azalaki kolinga ye. Akomaki boye: “Yehova akoyoka mongongo ya kolela na ngai.” (Nz. 6:8) Maloba ya mokapo ya lelo emonisaka ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema. Davidi alobaki ete ezalaki lokola nde Yehova azalaki kozwa mai nyonso ya miso na ye mpe azalaki kotya yango na molangi to kokoma yango na buku moko. Davidi andimaki mpenza ete Yehova azalaki komona mpasi na ye mpe abosanaki yango te. Amindimisaki ete Tata na ye ya likoló oyo atondi na bolingo ayebaki makanisi oyo ezalaki kotungisa ye, kasi ayebaki mpe ndenge oyo ezalaki kotinda ye amiyoka. w24.12 22 par. 11-12

