Misala ya bantoma 8:1-40

  • Saulo anyokoli lisangá (1-3)

  • Filipe akómisi ebele ya bato bayekoli na Samaria (4-13)

  • Batindi Petro ná Yoane na Samaria (14-17)

  • Simo aluki kosomba elimo santu na mbongo (18-25)

  • Mokube moto ya Etiopi (26-40)

8  Nzokande Saulo andimaki kobomama ya Stefano.+ Na mokolo wana, monyoko moko monene ekómelaki lisangá oyo ezalaki na Yerusaleme; bango nyonso, longola kaka bantoma, bapalanganaki na bitúká ya Yudea mpe ya Samaria.+  Kasi mibali oyo babangaka Nzambe bamemaki Stefano mpo na kokunda ye, mpe balelaki ye mingi.  Nzokande, Saulo abandaki konyokola lisangá. Azalaki kokɔta na ndako mokomoko mpe kobimisa mibali ná basi, azalaki kokangisa bango na bolɔkɔ.+  Kasi baoyo bapalanganaki, bakatisaki mokili yango mobimba wana bazalaki kosakola nsango malamu ya liloba ya Nzambe.+  Filipe akitaki na engumba ya Samaria+ mpe abandaki kosakola Kristo epai na bango.  Na bomoko mpenza, ebele ya bato bazalaki kotya likebi na makambo oyo Filipe azalaki koloba, wana bazalaki koyoka mpe kotala makamwisi oyo azalaki kosala.  Mpo bato mingi bazalaki na bilimo ya mbindo, mpe bilimo yango bazalaki koganga na mongongo makasi mpe kobima.+ Lisusu, bato mingi oyo bazalaki kotambola te mpo na maladi mpe batɛngumi babikisamaki.  Bongo esengo monene ezalaki na engumba yango.  Nzokande na engumba yango, ezalaki na mobali moko, nkombo na ye Simo, azalaki kosala misala ya maji mpe azalaki kokamwisa ekólo ya Samaria, azalaki koloba ete azali moto moko monene. 10  Bango nyonso, banda na oyo aleki moke tii na oyo aleki monene, bazalaki kotyela ye likebi mpe koloba: “Moto oyo azali Nguya ya Nzambe, oyo ebengami Monene.” 11  Bongo bazalaki kotyela ye likebi mpo abandá kokamwisa bango banda kala mpenza na misala na ye ya maji. 12  Kasi ntango bandimaki Filipe, oyo azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe+ mpe ya nkombo ya Yesu Kristo, babandaki kobatisama, mibali ná basi.+ 13  Simo ye moko mpe akómaki mondimi, mpe nsima ya kobatisama, azalaki ntango nyonso ná Filipe;+ azalaki kokamwa na komona ndenge bilembo mpe misala minene ya nguya ezalaki kosalema. 14  Ntango bantoma na Yerusaleme bayokaki ete Samaria eyambi liloba ya Nzambe,+ batindelaki bango Petro ná Yoane; 15  ntango bakómaki, babondelaki mpo na bango mpo bázwa elimo santu.+ 16  Mpo ekitelaki naino moto ata moko te na kati na bango, kasi babatisamaki kaka na nkombo ya Nkolo Yesu.+ 17  Bongo batyelaki bango mabɔkɔ,+ mpe babandaki kozwa elimo santu. 18  Nzokande ntango Simo amonaki ete elimo ezali kopesama ntango bantoma batyeli bato mabɔkɔ, alingaki kopesa bango mbongo, 19  alobi: “Bópesa ngai mpe nguya oyo, mpo moto nyonso oyo nakotyela ye mabɔkɔ azwa elimo santu.” 20  Kasi Petro alobaki na ye: “Palata na yo ebeba elongo na yo, mpo okanisi kozwa likabo ya ofele ya Nzambe na mbongo.+ 21  Ozali na likabo te mpe na libula te na likambo oyo, mpo motema na yo ezali sembo te na miso ya Nzambe. 22  Na yango, bongolá motema na mabe na yo oyo, mpe bondelá Yehova* mpo, soki likoki ezali, makanisi mabe ya motema na yo elimbisama; 23  mpo namoni ete ozali pwazɔ ya mabe mpenza* mpe moombo ya makambo ya kozanga bosembo.” 24  Simo azongisaki: “Bóbondela Yehova* mpo na ngai ete ata likambo moko te ya makambo oyo bolobi ekómela ngai.” 25  Na yango, ntango basilisaki kopesa litatoli malamumalamu mpe basilisaki kolobela liloba ya Yehova,* bazongaki na Yerusaleme, mpe bazalaki kosakola nsango malamu na bamboka mingi ya Basamaria.+ 26  Nzokande, anzelu ya Yehova*+ asololaki na Filipe, alobi: “Tɛlɛmá mpe kende na sudi, na nzela oyo ezali kokita uta na Yerusaleme tii na Gaza.” (Ezali nzela ya mokili ekauká.) 27  Na yango atɛlɛmaki mpe akendaki, mpe talá! mokube moko moto ya Etiopi, moto monene oyo azalaki kosalela Kandase mokonzi mwasi ya bato ya Etiopi, mpe ye nde azalaki kotalela mosolo na ye nyonso. Akendaki na Yerusaleme mpo na kosambela,+ 28  mpe azalaki kozonga, afandaki na likalo na ye, azalaki kotánga na mongongo makasi makomi ya mosakoli Yisaya. 29  Bongo elimo elobaki na Filipe ete: “Kende mpe pusaná pene na likalo wana.” 30  Filipe akendaki mbangu pembeni na yango mpe ayokaki ye azali kotánga na mongongo makasi makomi ya mosakoli Yisaya, mpe atunaki ye ete: “Ozali mpenza kokanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga?” 31  Ye ayanolaki ete: “Ndenge nini nakoki kokanga ntina soki moto alakisi ngai te?” Mpe asɛngaki Filipe amata mpe afanda elongo na ye. 32  Nzokande eteni ya Likomami oyo azalaki kotánga elobaki boye: “Lokola mpate, bamemaki ye na esika ya kobomama, mpe lokola mwana-mpate oyo efandaka kimya liboso ya mokati-nsuki na yango, ye mpe afungolaki monɔkɔ na ye te.+ 33  Na boumeli ya kokitisama na ye basambisaki ye na bosembo te.+ Nani akolobela molɔngɔ ya bankɔkɔ na ye? Mpo bomoi na ye elongolami na mabele.”+ 34  Bongo mokube atunaki Filipe ete: “Nabondeli yo, mosakoli azali koloba likambo oyo mpo na nani? Mpo na ye moko to mpo na moto mosusu?” 35  Filipe abandaki koloba, kobanda na Likomami wana asakolelaki ye nsango malamu oyo etali Yesu. 36  Nzokande wana bazalaki kotambola na nzela, bakómaki na esika oyo mai ezalaki, mpe mokube alobaki: “Talá! mai yango oyo; nini ezali kopekisa ngai kobatisama?” 37  *—— 38  Na yango, apesaki mitindo ete likalo etɛlɛma, Filipe ná mokube bango mibale bakitaki na mai, mpe Filipe abatisaki ye. 39  Ntango babimaki na mai, elimo ya Yehova* ememaki Filipe nokinoki epai mosusu, mpe mokube amonaki ye lisusu te, kasi akobaki nzela na ye, azali kosepela. 40  Filipe ayaki komona ete azali na Ashedode, mpe akatisaki teritware yango mobimba mpe akobaki kosakola nsango malamu na bingumba nyonso tii akómaki na Kaisaria.+

Maloba na nse

Talá Ap. A5.
Lil., “nsɔngi ya ngɛngɛ.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A3.
Talá Ap. A5.