Misala ya bantoma 13:1-52

  • Barnabasi ná Saulo batindami lokola bamisionɛrɛ (1-3)

  • Mosala ya kosakola na Shipre (4-12)

  • Diskur ya Paulo na Antiokia ya Pisidia (13-41)

  • Mitindo ya esakweli ya kobaluka epai ya bikólo (42-52)

13  Na Antiokia, basakoli ná bateyi bazalaki na lisangá ya mboka yango.+ Ezalaki Barnabasi, Simeone oyo bazalaki kobenga Nigere, Lukiusi ya Sirene, Manaene oyo atángaki kelasi esika moko ná Erode moyangeli ya etúká, mpe Saulo.  Wana bazalaki kosalela* Yehova* mpe kokila bilei, elimo santu elobaki: “Bótyela ngai pembeni Barnabasi ná Saulo+ mpo na mosala oyo nabengi bango mpo na yango.”+  Bongo nsima ya kokila bilei mpe kobondela, batyelaki bango mabɔkɔ mpe batikaki bango bákende.  Bongo mibali yango, oyo batindamaki na elimo santu, bakitaki na Selukia, mpe balongwaki kuna bakei na masuwa na Shipre.  Ntango bakómaki na Salamisi, babandaki kosakola liloba ya Nzambe na basinagoga ya Bayuda. Yoane azalaki mosungi* na bango.+  Ntango basilisaki kokatisa esanga wana mobimba tii na Pafosi, bakutanaki na Moyuda moko, nkombo na ye Bara-Yesu oyo azalaki nganga-nkisi mpe mosakoli ya lokuta.  Azalaki elongo na prokonsule* Sergiusi Paulusi, mobali moko ya mayele. Abengaki Barnabasi mpe Saulo epai na ye, mpo azalaki na mposa makasi ya koyoka liloba ya Nzambe.  Kasi nganga-nkisi yango oyo babengaka ye mpe Elimasi (oyo elakisi nganga-nkisi) abandaki kotɛmɛla bango, azalaki koluka kopɛngwisa prokonsule na kondima.  Bongo Saulo, oyo babengaka mpe Paulo, lokola atondaki na elimo santu, atalaki ye na likebi mpenza 10  mpe alobaki: “Ee moto atondi na bokosi ya ndenge nyonso mpe na bizaleli mabe ya ndenge nyonso, yo mwana ya Zabolo,+ yo monguna ya makambo nyonso ya bosembo, okotika te kotɛngisa banzela ya sembo ya Yehova?* 11  Talá! Lobɔkɔ ya Yehova* ezali kokitela yo, okokufa miso, okomona pole ya moi te mpo na mwa ntango.” Na ntango wana kaka, londende moko ya makasi mpe molili ekwelaki ye, mpe akómaki kobalukabaluka mpo na koluka moto atambwisa ye na lobɔkɔ. 12  Na yango ntango prokonsule amonaki likambo oyo esalemi, akómaki mondimi, mpo mateya ya Yehova* ekamwisaki ye. 13  Paulo ná baninga na ye ya mosala bazwaki nzela ya mbu banda na Pafosi mpe bakómaki na Perga na kati ya Pamfilia. Kasi Yoane+ atikaki bango mpe azongaki na Yerusaleme.+ 14  Nzokande, balongwaki na Perga, bakómaki na Antiokia ya Pisidia. Bakɔtaki na sinagoga+ na mokolo ya sabata, mpe bafandaki. 15  Nsima ya kotánga Mibeko+ mpe Basakoli liboso ya bato nyonso, bakambi ya sinagoga batindelaki bango maloba: “Mibali, bandeko, soki bozali na mwa liloba ya kolendisa bato, bóloba yango.” 16  Bongo Paulo atɛlɛmaki, mpe asalaki elembo na lobɔkɔ na ye, alobi: “Mibali, Bayisraele mpe bino bamosusu oyo bobangaka Nzambe, bóyoka. 17  Nzambe ya bato oyo, Yisraele, aponaki bankɔkɔ na biso, mpe akómisaki bato oyo ekólo ya nguya* ntango bafandaki bapaya na mokili ya Ezipito mpe abimisaki bango kuna na lobɔkɔ oyo etombwani.+ 18  Mpe na eleko ya mbula soki 40 akangaki motema na etamboli na bango na esobe.+ 19  Nsima ya koboma bikólo nsambo na mokili ya Kanana, apesaki mokili na bango libula epai ya bankɔkɔ na biso.+ 20  Nyonso wana eumelaki mbula soki 450. “Nsima na yango apesaki bango basambisi tii na mosakoli Samwele.+ 21  Kasi na nsima, basɛngaki mokonzi,+ mpe Nzambe apesaki bango Saulo mwana ya Kishe, mobali moko ya libota ya Benyamina,+ oyo ayangelaki bango mbula 40. 22  Nsima ya kolongola ye, aponelaki bango Davidi mpo azala mokonzi,+ oyo apesaki litatoli mpo na ye ete: ‘Namoni Davidi mwana ya Yese,+ moto oyo azali kosepelisa motema na ngai;+ akosala makambo nyonso oyo nalingi.’ 23  Kaka ndenge alakaki, uta na bana* ya moto yango, Nzambe abimiselaki Yisraele mobikisi, Yesu.+ 24  Liboso moto yango aya, Yoane asakolaki polele epai ya bato nyonso ya Yisraele batisimo oyo ezali elembo ya kobongola motema.+ 25  Kasi wana Yoane akómaki pene ya kosilisa mosala na ye, azalaki koloba ete: ‘Bino bokanisi ete nazali nani? Ngai nazali ye te. Kasi, talá! Moto moko azali koya nsima na ngai oyo nabongi te kofungola basandale ya makolo na ye.’+ 26  “Mibali, bandeko, bino bana ya libota ya Abrahama mpe baoyo mosusu bazali na kati na bino oyo babangaka Nzambe, biso nde batindeli liloba ya lobiko oyo.+ 27  Mpo bato oyo bafandi na Yerusaleme mpe bankumu na bango bayebaki moto yango te, kasi ntango basambisaki ye, bakokisaki makambo oyo Basakoli balobaki,+ oyo etángamaka na mongongo makasi sabata nyonso. 28  Atako bamonaki likambo moko te ya koboma ye,+ basɛngaki Pilate ete abomama.+ 29  Mpe nsima ya kokokisa makambo nyonso oyo ekomamá mpo na ye, bakitisaki ye na nzete mpe balalisaki ye na lilita.*+ 30  Kasi Nzambe asekwisaki* ye uta na bakufi;+ 31  mpe na boumeli ya mikolo mingi akómaki komonana epai ya baoyo bamataki elongo na ye uta na Galile tii na Yerusaleme, baoyo bazali sikoyo batatoli na ye epai ya bato.+ 32  “Na yango, tozali kosakwela bino nsango malamu ya elaka oyo epesamaki epai ya bankɔkɔ na biso. 33  Nzambe akokisi yango na mobimba mpenza epai na biso bana na bango ndenge asekwisaki Yesu;+ kaka ndenge ekomamá na nzembo ya mibale ete: ‘Yo ozali mwana na ngai; lelo ngai nakómi Tata na yo.’+ 34  Nzambe asekwisaki ye uta na bakufi mpe akozala lisusu ata moke te na nzoto oyo ekoki kokufa mpe kopɔla. Nzambe andimisaki ete ezali ya solo ntango alobaki ete: ‘Nakomonisela bino bolingo ya sembo oyo nalakaki Davidi, oyo ebongi kotyelama motema.’*+ 35  Yango wana azali mpe koloba na nzembo mosusu ete: ‘Okotika te ete moto na yo ya sembo apɔla.’+ 36  Nzokande Davidi, nsima ya kosalela Nzambe* na eleko na ye mpenza alalaki na liwa, alalisamaki elongo na bankɔkɔ na ye mpe apɔlaki.+ 37  Kasi, moto oyo Nzambe asekwisaki* apɔlaki te.+ 38  “Yango wana, bandeko, bóyeba ete na nzela ya moto yango kolimbisama ya masumu ezali kosakolama epai na bino,+ 39  mpe ete na makambo nyonso oyo bokokaki te kotángama bato bazangi ngambo na nzela ya mibeko ya Moize,+ moto nyonso oyo azali kondima atángami moto azangi ngambo na nzela ya moto wana.+ 40  Na yango, bókeba ete oyo elobami na Basakoli ekómela bino te: 41  ‘Bótala yango, bino batyoli, mpe bókamwa, mpe bólimwa, mpo nazali kosala mosala moko na mikolo na bino, mosala oyo bokondima yango soki moke te ata soki moto ayebisi bino yango mokomoko.’”+ 42  Ntango bazalaki kobima, bato babondelaki bango mpo bálobela bango makambo wana na sabata oyo ekolanda. 43  Na nsuka ya likita na sinagoga, mingi na kati ya Bayuda mpe baprozelite oyo bazalaki kosambela Nzambe balandaki Paulo ná Barnabasi, oyo basololaki na bango, mpe balendisaki bango ete bátikala na kati ya boboto monene ya Nzambe.+ 44  Na sabata oyo elandaki, pene na engumba mobimba eyanganaki mpo na koyoka liloba ya Yehova.* 45  Ntango Bayuda bamonaki ebele wana ya bato, batondaki na zuwa mpe babandaki kotɛmɛla na kofinga mpenza makambo oyo Paulo azalaki koloba.+ 46  Na yango, Paulo ná Barnabasi balobaki na bango na mpiko nyonso: “Esengelaki liloba ya Nzambe esakolama liboso epai na bino.+ Lokola bozali kobwaka yango mpe komona ete bobongi te na bomoi ya seko, talá! tobaluki epai ya bikólo.+ 47  Mpo Yehova* apesi biso mitindo na maloba oyo: ‘Natye yo mpo ozala pole ya bikólo, mpo ozala lobiko tii na bansuka ya mabele.’”+ 48  Ntango bato ya bikólo bayokaki yango, babandaki kosepela mpe kokumisa liloba ya Yehova,* mpe baoyo nyonso bazalaki na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko bakómaki bandimi. 49  Lisusu, liloba ya Yehova* ekobaki kopalangana na mokili wana mobimba. 50  Kasi Bayuda batombokisaki basi ya lokumu oyo bazalaki kobanga Nzambe mpe bato minene ya engumba, mpe babimiselaki Paulo ná Barnabasi monyoko+ mpe babwakaki bango libándá ya bandelo ya mboka na bango. 51  Bapupolelaki bango putulu ya makolo na bango mpe bakendaki na Ikoniumu.+ 52  Mpe bayekoli bakobaki kotonda na esengo+ mpe na elimo santu.

Maloba na nse

To, “kosala liboso ya bato nyonso mpo na.”
Talá Ap. A5.
To, “mosaleli.”
Guvɛrnɛrɛ Moroma ya etúká moko. Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Lil., “atombolaki bato oyo.”
Lil., “momboto.”
To, “lilita ya kokanisama.”
Lil., “alamwisaki.”
To, “oyo ezali sembo.”
To, “kosala mokano ya Nzambe.”
Lil., “alamwisaki.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.