Yisaya 29:1-24

  • Mawa na Ariele! (1-16)

    • “Bakumisaka ngai kaka na mbɛbu na bango” (13)

  • Bato oyo bakufá matoi bakoyoka; mpe bato oyo bakufá miso bakomona (17-24)

29  “Mawa na Ariele,* Ariele, engumba oyo Davidi atyaki kaa!+ Bóbakisa mbula likoló ya mbula;Bafɛti+ ekoba kolandana.  2  Kasi nakomemela Ariele mpasi,+Mpe mawa ná kolela ekozala,+ mpe na miso na ngaiAkokóma lokola esika mɔtɔ ya etumbelo ya Nzambe epelaka.+  3  Nakotya kaa na bangámbo nyonso mpo na kobundisa yo,Mpe nakozinga yo na lopango ya banzeteMpe nakotɛlɛmisa biloko oyo ekozinga yo.+  4  Okokitisama na nse mpenza,Okoloba uta na mabele,Mpe putulu ekosala ete makambo oyo okoloba eyokana te. Mongongo na yo oyo ekouta na mabele+Lokola mongongo ya moto oyo asololaka na bilimo,Mpe uta na putulu maloba na yo ekoyokana swiswiswi.  5  Ebele ya bato oyo bazali banguna* na yo bakokóma lokola putulu,+Ebele ya banyokoli bakokóma lokola mposo ya blé oyo ememami na mopɛpɛ.+ Mpe yango ekosalema na mbala moko, na pwasa.+  6  Yehova ya mampinga akotyela yo likebiNa nkake, na koningana ya mabele mpe na makɛlɛlɛ makasi,Na ekumbaki, na mopɛpɛ makasi mpe na lolemo ya mɔtɔ oyo ezali kozikisa.”+  7  Mpe ebele ya bato ya bikólo nyonso oyo bazali kobunda etumba na Ariele+—Baoyo nyonso bazali kobunda na ye etumba,Ná baoyo bazali kotya manɔ́ngi ya kobunda na ye,Mpe bazali komemela ye mpasi—Bakokóma lokola ndɔtɔ, emonaneli ya butu.  8  Ɛɛ, ekozala lokola ntango moto oyo azali na nzala azali kolɔta ete azali kolya,Kasi alamuki azali kaka na nzala,*Mpe lokola ntango moto oyo azali na mposa ya mai azali kolɔta ete azali komɛla,Kasi alamuki ya kolɛmba ná mposa ya mai.* Yango nde ekokómela ebele ya bato ya bikólo nyonsoOyo bazali kobundisa Ngomba Siona.+  9  Bótikala monɔkɔ polele mpe bókamwa;+Bókanga miso, mpe bókangama miso.+ Balangwe, kasi na vinyo te;Bazali kotengatenga, kasi te na masanga oyo elangwisaka. 10  Mpo Yehova asopeli bino elimo ya mpɔngi makasi;+Akangi miso na bino, basakoli,+Mpe azipi mitó na bino, bamoni-bimonaneli.+ 11  Emonaneli nyonso ekómi epai na bino lokola maloba ya buku oyo ekangamá na elembo,+ ntango bapesi yango moto oyo ayebi kotánga, balobi: “Tobondeli yo, tángá yango na mongongo makasi,” akoloba boye: “Nakokoka te, mpo ekangami na elembo.” 12  Mpe ntango bapesi buku yango na moto moko oyo ayebi kotánga te, balobi: “Tobondeli yo, tángá awa,” akoloba boye: “Nayebi kotánga te.” 13  Yehova alobi: “Bato oyo basambelaka ngai kaka na maloba mpamba,Mpe bakumisaka ngai kaka na mbɛbu,+Kasi motema na bango ezali mosika na ngai,Mpe kobanga oyo bazali kobanga ngai euti nde na mibeko ya bato, oyo bateyi bango.+ 14  Yango wana, ngai Moto nakosala lisusu makambo ya kokamwa na bato oyo,+Makambo ya kokamwa na makambo ya kokamwa;Mpe bwanya ya bato na bango ya bwanya ekosila,Mpe mayele ya bato na bango ya mayele ekobombama.”+ 15  Mawa na baoyo bazali koluka kobombela Yehova mikano na bango ya mabe.+ Bakokisaka mikano na bango ya mabe na esika ya molili,Wana bazali koloba: “Nani azali komona biso? Nani ayebi nini oyo tozali kosala?”+ 16  Bozali mpenza kobalola makambo!* Moyemi-mbɛki asengeli nde kotalelama lokola mabele?*+ Eloko oyo esalemi esengeli nde koloba mpo na moto oyo asali yango ete: “Asalaki ngai te”?+ Mpe eloko oyo esalemi esengeli nde koloba na moto oyo asali yango ete: “Azali na mayele ata moke te”?+ 17  Etikali kaka mwa ntango moke Liban ekokóma elanga ya banzete ya mbuma,+Mpe elanga ya banzete ya mbuma ekotalelama lokola zamba.+ 18  Na mokolo yango, bato oyo bakufá matoi bakoyoka maloba ya buku,Mpe miso ya bato oyo bakufá miso ekolongwa na molili ná molili makasi mpe ekomona.+ 19  Bato ya komikitisa bakosepela mingi mpo na Yehova,Mpe babola bakosepela na Mosantu ya Yisraele.+ 20  Mpo monyokoli akozala lisusu te,Moto oyo amikumisaka akosuka,Mpe baoyo bazali ntango nyonso pene ya kosala mabe bakobomama,+ 21  Baoyo basalelaka lokuta mpo na kokweisa basusu,Baoyo bazali kotyela molobeli* motambo na porte ya engumba,+Mpe baoyo bazali kosalela bifundeli ya lokuta mpo na kopimela moyengebene bosembo.+ 22  Na yango, talá oyo Yehova moto oyo asikolaki Abrahama+ alobi mpo na bato ya libota ya Yakobo: “Yakobo akoyoka lisusu nsɔni te,Mpe elongi na ye ekomonisa lisusu te ete alɛmbi nzoto.*+ 23  Mpo ntango akomona bana na ye,Oyo bazali mosala ya mabɔkɔ na ngai, na katikati na ye,+Bakosantisa nkombo na ngai;Ɛɛ, bakosantisa Mosantu ya Yakobo,Mpe bakozala na limemya mingi mpo na Nzambe ya Yisraele.+ 24  Baoyo bazali na libunga na makanisi na bango bakozwa mayele,Mpe baoyo bazali koimaima bakondima báteyama.”

Maloba na nse

Ekoki mpe kolimbola, “esika etumbelo ya mɔtɔ ya Nzambe ezali,” ekoki kozala ete ezali kolobela Yerusaleme.
Lil., “bapaya.”
To, “molimo na ye ezali na eloko te.”
To, “mpe molimo na ye ekauki.”
To, “bozoba ya ndenge nini bozali na yango.”
To, “mabele ya lima.”
Lil., “moto oyo apamelaka.”
Lil., “elongi na ye ekokóma puu te.”