Mokanda ya liboso ya Yoane 1:1-10

  • Liloba ya bomoi (1-4)

  • Tótambola na kati ya pole (5-7)

  • Ntina ya koyambola masumu (8-10)

1  Oyo ezalaki banda na ebandeli, oyo toyokaki, oyo tomonaki na miso na biso, oyo totalaki na likebi mpe tosimbaki na mabɔkɔ na biso, na oyo etali liloba ya bomoi,+ 2  (ɛɛ, bomoi emonisamaki polele, mpe tomoni mpe tozali kotatola+ mpe kosakwela bino bomoi ya seko+ oyo ezalaki elongo na Tata mpe oyo emonisamaki epai na biso), 3  oyo tomonaki mpe toyokaki, tozali mpe kosakwela bino yango,+ mpo ete bino mpe bósangana* elongo na biso. Mpe biso tosangani elongo na Tata mpe elongo na Mwana na ye Yesu Kristo.+ 4  Mpe tozali kokoma makambo oyo mpo ete esengo na biso ezala ya kokoka. 5  Nsango oyo toyokaki epai na ye mpe oyo tozali kosakwela bino yango oyo: Nzambe azali pole,+ mpe molili ezali ata moke te na kati na ye.* 6  Soki tolobi: “Tosangani elongo na ye,” nzokande tozali kokoba kotambola na molili, tozali kobuka lokuta mpe tozali kolanda solo te.+ 7  Nzokande, soki tozali kotambola na pole ndenge ye moko azali na kati ya pole, tosangani lisangá moko, mpe makila ya Yesu Mwana na ye ezali kopɛtola biso na lisumu nyonso.+ 8  Soki tolobi: “Tozali na lisumu te,” tozali komikosa+ mpe solo ezali na kati na biso te. 9  Soki toyamboli masumu na biso, ye azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopɛtola biso na makambo nyonso ya kozanga bosembo.+ 10  Soki tolobi: “Tosali lisumu te,” tozali kokómisa ye moto ya lokuta, mpe liloba na ye ezali na kati na biso te.

Maloba na nse

^ To, “bózala na bomoko ya bondeko.”
^ To, “na bomoko elongo na ye.”