Lingala
Sanza ya 10
/assets/ct/28ada02fb0/images/syn_placeholder_sqr.png
es26 nk. 98-108

Sanza ya 10

Mwaminei, 1 sanza ya 10

Sanza ya 10

Nakokoba kotalela Yehova.—Mika 7:7.

Tozwaka mbala mingi malako oyo euti na bankulutu ya lisangá, mokɛngɛli ya zongazonga, Betele, to Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Kasi tokosala nini soki na libaku moko tokangi te ntina oyo bapesi biso malako moko boye? Tokoki kotala kaka mikakatano oyo malako yango ekoki kobimisela biso. Tokoki kutu kobanda kotya miso kaka na kozanga kokoka ya bandeko oyo bapesaki malako yango. Soki tozali kotambola na kondima, tokotya motema ete Yehova nde azali kotambwisa makambo mpe ete ayebi makambo ya bomoi na biso. Yango ekosala ete tótosa nokinoki mpe tósala yango na makanisi malamu. (Ebr. 13:17) Tobosanaka te ete botosi na biso ekosalisa lisangá na biso ezala na bomoko. (Ef. 4:​2, 3) Totyaka motema ete atako bandeko oyo bazali kokamba biso bazali bato ya kozanga kokoka, Yehova akopambola biso soki totosi. (1 Sa. 15:22) Na ntango oyo ebongi, akosembola likambo nyonso oyo esengeli mpenza kosembolama. w25.03 23-24 par. 13-14

Nzambe . . . azali Momonisi ya basekele.—Dan. 2:28.

Tozali na ntango moko ya esengo mpenza! Mokolo na mokolo, bisakweli ya Biblia ezali kokokisama na miso na biso. Na ndakisa, tozali komona ndenge “mokonzi ya nɔrdi” ná “mokonzi ya sudi” bazali kowela boyangeli ya mokili. (Dan. 11:​40, msl.) Tozali komona ndenge nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali kosakolama na ndenge oyo esalemá naino te, mpe bamilio ya bato bazali kopona kosambela Yehova. (Yis. 60:22; Mat. 24:14) Lisusu, tozali kozwa ebele ya bilei ya elimo na “ntango oyo ebongi.” (Mat. 24:​45-47) Yehova azali kokoba kosalisa biso tósosola malamu makambo minene oyo ekosalema mosika te. (Mas. 4:18) Tokoki kondima ete ntango bolɔzi monene ekobanda, tokoyeba nyonso oyo esengeli tóyeba mpo tóyika mpiko na bosembo nyonso mpe tózala kutu malamu na eleko yango ya mpasi. Kasi, tosengeli koyeba ete ezali na makambo mosusu oyo toyebi te mpo na mikolo ezali koya. w24.05 8 par. 1-2

Akoselaka bato makambo te.—Nz. 15:3.

Mokomi ya nzembo alobeli mpenza kokosela bato makambo. Yango elimboli nini? Elimbolaka mbala mingi koloba makambo ya lokuta oyo ekoki kobebisa lokumu ya moto. Nzembo 15:3 ekundweli biso mpe ete bapaya ya Yehova basalelaka bazalani na bango eloko moko te ya mabe mpe babebisaka lokumu ya baninga na bango te. (Nz. 15:1) Yango elakisi nini? Tokoki kobebisa lokumu ya moto kozanga kokana soki tozali kopanza nsango moko ya malamu te mpo na ye. Na ndakisa: (1) ndeko mwasi moko akati mosala ya mobongisi-nzela, (2) ndeko moko ná mwasi na ye babimi Betele, to (3) ndeko mobali moko azali lisusu nkulutu to mosaleli na misala te. Ebongi mpenza tókanisa ete basalaki likambo ya mabe yango wana mbongwana yango esalemi mpe tóyebisa basusu likanisi na biso? Ekoki kozala na bantina oyo biso toyebi te, oyo ememi mbongwana wana. Mopaya na hema ya Yehova “asalelaka mozalani na ye eloko moko te ya mabe, mpe abebisaka lokumu ya baninga na ye te.” w24.06 11 par. 11-13

Yehova azali ntango nyonso na makanisi na ngai. Lokola azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali, nakokwea ata moke te.—Nz. 16:8.

Mpo tókóma kobanga Yehova mingi, tosengeli koluka libosoliboso kosepelisa ye na bikateli nyonso oyo tozali kozwa. Ntango ozali kotánga masolo ya Biblia, omitunaka boye: ‘Soki nazalaki ntango likambo oyo esalemaki, ekateli nini nalingaki kozwa?’ Na ndakisa, kanisá ete ozali koyoka ntango bankumu zomi ya Yisraele bazalaki koloba ete Bayisraele bakokoka te kolonga Kanana ndenge bauti konɔnga mokili oyo Yehova alakaki kopesa Bayisraele. Olingaki kondima yango mpe kobanda kobanga bato, to bolingo na yo mpo na Yehova mpe mposa na yo ya kosepelisa ye elingaki koleka makasi? Bayisraele nyonso ya ntango wana balongaki te komona solo oyo Yosua ná Kalebe balobaki. Na yango, bazwaki te libaku ya kokɔta na Mokili ya Ndaka.—Mit. 14:​10, 22, 23. w24.07 10 par. 7

Yehova nde atalatalaka mitema.—Mas. 17:3.

Gomere, mwasi ya mosakoli Hosea, atikaki Hosea mpe azwaki mibali mosusu. Elikya ezalaki lisusu te mpo na Gomere? Yehova, oyo akoki kotánga mitema, alobaki na Hosea ete: “Kende kolinga lisusu mwasi oyo mobali mosusu alingi mpe oyo azali kosala ekobo, ndenge kaka Yehova alingi bato ya Yisraele atako bazali kokende epai ya banzambe mosusu.” (Hos. 3:1; Mas. 16:2) Simbá ete mwasi ya Hosea azalaki naino kosala lisumu ya monene. Kasi, Yehova alobaki na Hosea ete akende epai na ye, alimbisa ye mpe azongisa ye na libala. Ndenge moko mpe, Yehova asundolaki te bato na ye ya mitó makasi. Atako bazalaki naino kosala masumu ya minene, Yehova azalaki kaka kolinga bango mpe alukaki kosalisa bango mpo bábongola motema mpe bábongisa bizaleli na bango. Ndakisa yango ezali komonisa ete Yehova, Nzambe oyo “atalatalaka mitema,” akoluka moto oyo azali naino kosala lisumu ya monene mpe akoluka kosalisa ye abongola motema. w24.08 10 par. 7

Mibeko ezali kaka elili ya makambo malamu oyo ekoya.—Ebr. 10:1.

Bayuda oyo bakómaki bakristo na siɛklɛ ya liboso basengelaki kosala bambongwana minene, mpe yango ezalaki pɛtɛɛ te. Kala, Bayuda nde bazalaki ekólo oyo Yehova aponaki. Yerusaleme ezalaki efandelo ya Bokonzi ya Nzambe awa na mabele, mpe tempelo ezalaki esika monene ya losambo ya pɛto. Bayuda nyonso ya sembo bazalaki kolanda Mobeko ya Moize, ndenge bakonzi ya mangomba bazalaki kolimbwela bango yango. Batyaki mibeko na makambo etali biloko ya kolya, ndenge ya kotalela kokatama ngenga, mpe ata kozala elongo na bato ya bikólo mosusu. Kasi, nsima ya liwa ya Yesu, Yehova azalaki kondima lisusu bambeka ya Bayuda te. Yango ezalaki mokakatano mpo na Bayuda oyo bakómaki bakristo mpo bamesanaki kolanda Mobeko. (Ebr. 10:​1, 4, 10) Ata bakristo oyo bakɔmɛli na elimo, lokola ntoma Petro, bazalaki kobunda mpo na komesana na bambongwana yango mosusu. (Mis. 10:​9-14; Gal. 2:​11-14) Bayuda oyo bakómaki bakristo bakómaki kokutana na botɛmɛli ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda. w24.09 9 par. 4

Bókanisaka baoyo bazali kokamba bino, oyo bayebisaki bino liloba ya Nzambe.—Ebr. 13:7.

Ntango Yehova apesi bato na ye mokumba moko, azelaka ete bákokisa yango na molɔngɔ. (1 Ko. 14:33) Na ndakisa, mokano ya Nzambe ezali ete nsango malamu esakolama na mabele mobimba esika bato bafandi. (Mat. 24:14) Yehova apesi Yesu mokumba ya kokamba mosala yango ya kosakola. Yesu alingaka ete mosala yango esalema na molɔngɔ. Na siɛklɛ ya liboso, wana masangá ezalaki kofungwama na bisika ndenge na ndenge, bankulutu bazalaki kotyama mpo na kopesa malako mpe kokamba mosala. (Mis. 14:23) Na Yerusaleme, lisangani monene ya bankulutu, oyo esangisaki bantoma ná mikóló, ezwaki bikateli mosusu oyo masangá nyonso esengelaki kotosa. (Mis. 15:2; 16:4) Ntango batosaki malako oyo bazwaki, “masangá ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima mpe bato bazalaki kobakisama.”—Mis. 16:5. w24.04 8 par. 1

Maria Magadalene akendaki mpe apesaki bayekoli nsango ete: “Namoni Nkolo!”—Yoa. 20:18.

Mokolo ya 16 Nisana na ntɔngɔ, basi ebele ya sembo bakendaki na esika oyo bakundaki Yesu. (Luka 24:​1, 10) Tólobela likambo oyo ekómelaki moko ya basi yango, Maria Magadalene. Ntango Maria akómaki na lilita, akutaki yango mpamba. Akendaki mbangu koyebisa Petro ná Yoane mpe na nsima alandaki bango ntango bazalaki kokima mbangu na lilita. Ntango mibali yango mpe bamonaki ete lilita etikali mpamba, bazongaki epai na bango. Kasi Maria azongaki te. Atikalaki wana, azali kolela. Ayebaki te ete Yesu azalaki wana. Yesu azalaki kotala ndenge mwasi yango ya sembo azalaki kolela mpe ayokelaki ye mawa makasi. Na yango abimelaki Maria, mpe asalaki likambo moko ya moke oyo elendisaki ye mingi. Asololaki na ye mpe apesaki ye mokumba moko ya ntina: akende koyebisa bandeko na ye nsango ya lisekwa na ye.—Yoa. 20:​17, 18. w24.10 13 par. 7

Nakokómisa bilembo na ngai mpe makamwisi na ngai mingi na mokili ya Ezipito.—Kob. 7:3.

Moize azalaki mosakoli, mosambisi, motambwisi, mpe mokomi ya masolo ya kala. Abimisaki ekólo Yisraele na boombo na Ezipito mpe amonaki makamwisi mingi ya Yehova. Yehova asalelaki ye mpo na kokoma mikanda mitano ya liboso ya Biblia ná Nzembo 90, mpe mbala mosusu Nzembo 91. Emonani ete akomaki mpe mokanda ya Yobo. Mwa moke liboso Moize akufa, ntango azalaki na mbula 120, ayanganisaki Bayisraele nyonso mpe akundwelaki bango makambo oyo bamonaki mpe oyo Yehova asalelaki bango. Bamonaki ebele ya bilembo mpe makamwisi oyo Yehova asalaki mpe bitumbu oyo apesaki Ezipito. (Kob. 7:4) Bakatisaki Mai Motane oyo ekabwanaki mpe bamonaki ndenge limpinga ya Farao ebebisamaki. (Kob. 14:​29-31) Na esobe, bamonaki ndenge Yehova abatelaki bango mpe akokisaki bamposa na bango. (Mib. 8:​3, 4) Sikoyo pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, Moize asimbaki libaku yango ya nsuka mpo na kolendisa bango. w24.11 8-9 par. 3-4

Soki moto alei limpa yango, akozala na bomoi libela na libela . . . Limpa oyo nakopesa ezali mosuni na ngai mpo na bomoi ya mokili.—Yoa. 6:51.

Makambo oyo Yesu alobaki na bantoma na ye na ntango ya Bilei ya Mpokwa ya Nkolo ekeseni na makambo oyo alobaki na ebele ya bato na Galile. Na Bilei ya Mpokwa ya Nkolo, Yesu alobaki mpo na etuluku ya bato moke. Ntango Yesu azalaki na Galile na mobu 32 T.B., azalaki kolobela libosoliboso Bayuda oyo balukaki ye mpo apesa bango mampa. Kasi, abendaki likebi na bango na eloko oyo ezalaki na motuya koleka bilei ya mosuni. Alobelaki ebongiseli oyo ekokaki kopesa bango bomoi ya seko. Mpe Yesu alobaki ete baoyo bakufá bakokaki kosekwa na mokolo ya nsuka mpe kozala na bomoi libela na libela. Azalaki kolobela te kaka bato moke oyo baponamá, ndenge asalaki yango na nsima na Bilei ya Mpokwa ya Nkolo. Na Galile, azalaki kolobela nde lipamboli oyo bato nyonso bakokaki kozwa. w24.12 11 par. 10-11

Mibali, bókoba kolinga basi na bino.—Kol. 3:19.

Yehova ayinaka bato ya mobulu. (Nz. 11:5) Asepelaka ata moke te na mibali oyo banyokolaka basi na bango. (Mal. 2:16) Soki mobali asalelaka mwasi na ye makambo na boboto te, boyokani na ye ná Yehova ekozala malamu te. Yehova akoki koboya ata koyoka mabondeli na ye. (1 Pe. 3:7) Mibali mosusu balobaka na basi na bango maloba ya nkanda to ya kozokisa. Kasi Yehova ayinaka “nkanda, nkanda makasi, koganga mpe maloba ya kofinga.” (Eph. 4:​31, 32) Mobali oyo alobaka mabe epai ya mwasi na ye akobebisa kaka libala na bango te, kasi mpe boninga na ye na Nzambe. (Yak. 1:26) Ndenge nini Yehova atalelaka pornografi? Ayinaka yango. Na yango mobali oyo atalaka bililingi ya mbindo abebisaka boyokani na ye na Yehova mpe azangaka limemya epai ya mwasi na ye. Yehova alingi ete mobali atikala sembo epai ya mwasi na ye kaka na misala te kasi mpe na makanisi na ye. Yesu alobaki ete mobali oyo azali kotala mwasi mosusu tii ayoki ye mposa asali ekobo “na motema” na ye.—Mat. 5:​28, 29. w25.01 9 par. 6-8

Moto atángamaka moto ya sembo . . . kaka mpo na kondima oyo andimeli Yesu Kristo.—Gal. 2:16.

Kotángama bato ya sembo elimboli ete ngambo oyo tozalaki na yango elongwe mpe misala na biso ya mabe oyo ekomamaki ebomami. Ntango Yehova asali bongo, abuki te mibeko na ye oyo etali bosembo. Atángi biso bato ya sembo na makasi na biso moko te; andimi mpe te masumu na biso. Kasi, lokola tozali na kondima na ebongiseli ya kozipa masumu mpe na lisiko oyo efutamaki, nde Yehova azwi ntina ya koboma banyongo na biso. (Rom. 3:24) Yango ememeli mokomoko na biso matomba nini? Baoyo baponami mpo na koyangela elongo na Yesu na likoló basili kotángama bato ya sembo lokola bana ya Nzambe. (Tito 3:7; 1 Yoa. 3:1) Masumu na bango esili kolimbisama. Ezali lokola nde basalá ata masumu te, mpe na bongo bakokisi masɛngami mpo na kozala na kati ya Bokonzi. (Rom. 8:​1, 2, 30) Baoyo bazali na elikya ya bomoi na mabele batángami bato ya sembo lokola baninga ya Nzambe, mpe masumu na bango elimbisami.—Yak. 2:​21-23. w25.02 5 par. 17; 7 par. 18

Lolenge na yo ya kokanisa ezali ya Nzambe te, kasi ya bato.—Mat. 16:23.

Tótalela libaku moko oyo ntoma Petro amonisaki ete azalaki na makanisi ya Yehova te. Yesu ayebisaki bantoma na ye ete asengeli kokende na Yerusaleme, kuna akokabama na lobɔkɔ ya bakonzi ya mangomba, bakonyokola ye makasi, mpe bakoboma ye. (Mat. 16:21) Mbala mosusu Petro azalaki kokoka kondima te ete Yehova akotika Yesu—elikya ya Yisraele mpe Masiya oyo alakamaki—abomama. (Mat. 16:16) Na yango, abendaki Yesu pembeni mpe alobaki na ye: “Zalá na boboto epai na yo moko, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.” (Mat. 16:22) Lokola Petro azalaki na makanisi lokola Yehova te na likambo yango, atalelaki makambo ndenge moko na Yesu te. Mbala mosusu Petro alukaki bolamu ya Yesu, kasi Yesu aboyaki toli na ye. Ezali liteya mpo na biso. Mokano ya Nzambe mpo na Yesu ezalaki te ete azala na bomoi oyo ezangi mpasi. Na libaku yango, Petro ayekolaki liteya ya ntina na oyo etali kozala na makanisi oyo eyokani na makanisi ya Nzambe. w25.03 9 par. 5-6

Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; abikisaka baoyo balɛmbi nzoto.—Nz. 34:18.

Ozali na mpasi na motema mpo moto moko oyo otyelaka motema asali yo mabe to awangani yo? Ata soki moto asali yo nini, Tata na yo ya likoló alingaka yo. Soki moto oyo totyelaka motema asali biso mabe, tokoki kozwa libɔndisi na maloba ya Davidi oyo ezali na mokapo ya lelo. Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi ete baoyo “balɛmbi nzoto” to oyo “motema etutami” ekoki komonisa “baoyo bazali komona makambo nyonso kaka mabe.” Ndenge nini Yehova atalelaka baoyo bamiyoki bongo mpo basusu basali bango mabe? Ndenge kaka tata ya bolingo asimbaka mwana na ye oyo azali na mawa mpe abɔndisaka ye, Yehova mpe “azali pene” na biso, ayokelaka biso mawa mingi mpe azalaka pene ya kosalisa biso ntango motema na biso etutami mpo basali biso mabe to basundoli biso. Yehova azalaka na mposa ya kobɔndisa mpe kokitisa motema na biso oyo etutami mpe elimo na biso oyo ezali na mpasi. Yehova apesi biso mpe bilaka ya malamu oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano oyo tozali na yango lelo oyo.—Yis. 65:17. w24.12 23 par. 13-14

Epai ya Yehova nde bokozwa . . . mbano.—Kol. 3:24.

Lelo oyo, bankulutu bakoki kotya motema ete Yehova amonaka mpe azwaka na motuya mosala na bango ya malamu. Longola kolendisa bandeko, koteya, mpe kosakola, bankulutu mingi bapesaka mabɔkɔ na mosala ya botongi mpe basalisaka bandeko oyo bazwi makama. Basusu bapesaka mabɔkɔ na bituluku ya bandeko oyo batalaka bato ya maladi to na Bakomite ya boyokani na minganga. Bankulutu oyo bamipesaka na misala wana bamonaka ete lisangá ezali ebongiseli ya Yehova. Bamipesaka na mikumba na bango mpe batyaka motema ete Yehova akopesa bango mbano mpo na oyo bazali kosala. (Kol. 3:​23, 24) Biso nyonso tokoki kozala bankulutu te. Kasi biso nyonso tokoki kopesa Yehova mwa eloko. Mpe asepelaka mingi ntango tosalaka nyonso ekoki mpo na kosalela ye. Amonaka makabo oyo totyaka mpo na mosala na biso na mokili mobimba, ata soki ezali mingi te. Asepelaka mpe ntango toboyi kolandela mabe oyo basali biso mpe tolimbisi. Tyá motema ete Yehova azwaka na motuya oyo osalaka. Alingaka yo mpo na yango, mpe akopesa yo mbano.—Luka 21:​1-4. w24.06 23 par. 12-13

Kotika te ete motema na yo elanda banzela na ye. Koyengayenga te na babalabala na ye.—Mas. 7:25.

Lisolo wana oyo Salomo abɛtaki emonisi likambo oyo ekoki kokómela moto nyonso oyo asambelaka Yehova. Mosaleli ya Yehova akoki kosala lisumu ya monene mpe na nsima komona lokola makambo nyonso esalemaki na mbala moko. To mpe akoki koloba: “Esalemi kaka boye.” Nzokande, soki akanisi mpenza makambo oyo esalemaki, na ntembe te akomona ete asalaki makambo mosusu kozanga bwanya, oyo ememaki ye na lisumu. Makambo yango ekoki kozala baninga mabe, kominanola oyo ebongi te, to kokende na bisika ya malamu te, ezala na miso boye to na nzela ya Internet. Mbala mosusu atikaki mpe kobondela, kotánga Biblia, koyangana na makita, to mpe kobima na mosala ya kosakola. Ndenge moko na elenge mobali ya Masese, akoki komona ete asali lisumu na mbalakaka to na mbala moko te. Liteya ezali nini mpo na biso? Tosengeli kokima kaka lisumu te, tosengeli mpe kokima makambo oyo ememaka na lisumu. Salomo amonisaki likambo yango polele nsima ya kobɛta lisolo yango.—Mat. 5:​29, 30. w24.07 16 par. 10-11

Tozali na eloko oyo ya motuya na kati ya bambɛki ya mabele.—2 Ko. 4:7.

Eloko yango ya motuya ezali nini? Ezali mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi oyo ebikisaka bomoi. (2 Ko. 4:1) Bambɛki ya mabele ezali nini? Ezali komonisa basaleli ya Nzambe, oyo bayebisaka basusu nsango malamu. Na ntango ya Paulo, bato ya mombongo bazalaki kosalela bambɛki ya mabele mpo na komema biloko ya motuya, lokola bilei, vinyo, mpe mbongo. Ndenge moko mpe, Yehova apesi biso nsango malamu, nsango ya motuya mpenza. Na lisalisi ya Yehova, tokoki kozwa makasi oyo esengeli mpo tókoba koyebisa nsango yango na bosembo. Na bantango mosusu, tokoki kobanga bato to kobanga ete básilikela biso. Tokoki kosala nini mpo na mokakatano yango? Tótalela libondeli oyo bantoma basalaki ntango bapekisaki bango kosakola. Na esika bátika ete kobanga elata bango, basɛngaki Yehova asalisa bango bákoba koloba na mpiko. Yehova ayanolaki mbala moko na libondeli na bango. (Mis. 4:​18, 29, 31) Soki na bantango mosusu kobanga bato elataka biso, sɛngá Yehova asalisa yo okómisa makasi bolingo na yo mpo na bato mpo obanga te koyebisa bango nsango malamu. w24.04 16 par. 8-9

Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.—Mat. 6:9.

Bolingo na biso mpo na Yehova etindaka biso tósantisa nkombo na ye. Tolingaka kopesa mabɔkɔ na kosukola nkombo na ye na nsɔni nyonso oyo Satana abwakelá yango mpo na makambo ya lokuta oyo alobá mpo na ye. (Eba. 3:​1-5; Yobo 2:4; Yoa. 8:44) Na mosala ya kosakola, tolingaka mpenza kokɔtela Nzambe na biso, toyebisaka moto nyonso oyo akoyoka biso solo na ntina na Yehova mpe bizaleli na ye. Tolingaka moto nyonso ayeba ete ezaleli na ye ya libosoliboso ezali bolingo, ete ayangelaka na bosembo mpe na boyengebene, mpe ete mosika te Bokonzi na ye ekosukisa mpasi mpe ekomemela bato kimya ná esengo. (Nz. 37:​10, 11, 29; 1 Yoa. 4:8) Ntango tozali kolobela makambo yango ya Yehova na mosala ya kosakola, tozali kosantisa nkombo na ye. Toyokaka mpe esengo mpo toyokanisi bomoi na biso na nkombo oyo tomemi. w24.05 18 par. 12

Kasi ntango osali fɛti, bengisá babola, bibɔsɔnɔ, batɛngumi, bato oyo bakufá miso; mpe okozala na esengo, mpo bazali na eloko ya kozongisela yo te. Mpo okofutama na lisekwa ya bato ya sembo.—Luka 14:​13, 14.

Ndeko mobali, okomonisa ete ozali “moyambi bapaya” ntango ozali kosala makambo ya malamu mpo na basusu, ata baoyo bazali na kati ya baninga na yo te. (1 Pe. 4:9) Buku moko elobi boye mpo na moto oyo azali moyambi bapaya: “Porte ya ndako na ye, mpe ya motema na ye, esengeli kozala polele mpo na kokɔtisa bapaya.” Omituna boye, ‘Nayebani lokola moto oyo ayambaka bapaya?’ (Ebr. 13:​2, 16) Moto oyo azali moyambi bapaya akabolaka oyo azali na yango ná bapaya, ezala baoyo bazali na biloko mingi te ya kobikela mpe baoyo basalaka mosala makasi, na ndakisa bakɛngɛli ya zongazonga mpe balobi bapaya.—Eba. 18:​2-8; Mas. 3:27; Mis. 16:15; Rom. 12:13. w24.11 21 par. 6

Bangɔndɔ oyo bamibongisaki bakɔtaki na ye na fɛti ya libala.—Mat. 25:10.

Na ndakisa ya bangɔndɔ, Yesu alobelaki bangɔndɔ zomi oyo babimaki mpo na kokutana na mobali ya libala. (Mat. 25:​1-4) Bango nyonso bazalaki kolikya kokende elongo na mobali ya libala na fɛti na ye ya libala. Yesu abengaki bangɔndɔ mitano “mayele” mpe mitano “bazoba.” Bangɔndɔ ya mayele bamibongisaki mpo na kozela mobali ya libala tii ntango akoya, ata soki akokóma na butu. Na yango, bamemaki miinda oyo batyaki mafuta mpo epesa bango pole na molili. Bazwaki kutu mafuta mosusu mpo esalisa soki mobali ya libala aumeli. Na yango bamibongisaki mpo miinda na bango ekoba kopela. (Mat. 25:​6-10) Ntango mobali ya libala akómaki, bangɔndɔ ya mayele bakɔtaki na ye elongo na fɛti ya libala. Ndenge moko mpe, bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bamibongisi na ndenge bazali ntango nyonso ekɛngɛ mpe sembo tii ntango Kristo akoya, bakotalelama ete babongi kozala elongo na Mobali ya libala, Yesu, na Bokonzi na ye ya likoló.—Em. 7:​1-3. w24.09 21 par. 6

Namonaki . . . ebele mpenza ya bato . . . bauti na bikólo nyonso.—Em. 7:9.

Tokokoba kosakola nsango malamu na molende nyonso soki tokanisi ndenge ezali kosalisa ebele ya bato na mokili mobimba lelo oyo. Mbula na mbula, bamilio ya bato oyo basepelaka na solo bayanganaka na Ekaniseli, mpe bazali koyekola Biblia elongo na biso. Bankóto ya bato bazali kozwa batisimo mpe bazali kosangana na biso na mosala ya kosakola. Toyebi te bato boni lisusu bakondima nsango na biso, kasi toyebi ete Yehova azali kosangisa ebele mpenza ya bato, oyo bakobika na bolɔzi monene oyo ezali koya. (Em. 7:​9, 14) Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma azali komona ete mbuma ya kobuka ezali naino na elanga, na yango tozali na ntina ya kokoba kosakola. (Luka 10:2) Banda kala, bayekoli ya Yesu bayebani lokola bato oyo bazalaka na molende na mosala ya kosakola. Na ndakisa, ntango bato bamonaki elobeli ya polele ya bantoma, “bayaki koyeba ete bazalaki elongo na Yesu.” (Mis. 4:13) Wana bato bazali kotala biso na mosala ya kosakola, tiká bámona ete biso mpe tomekoli molende oyo Yesu azalaki na yango. w25.03 18 par. 15; 19 par. 17-18

Ee Yehova, moto azali nani mpo okanisa ye?—Nz. 144:3.

Biblia emonisaka biso ete Yehova atyaka likebi epai ya baoyo bato mosusu bamonaka ete bazali na ntina te. Na ndakisa, mokolo moko Yehova atindaki mosakoli Samwele na ndako ya Yese mpo na kotya moko ya bana na ye mafuta mpo akóma mokonzi ya Yisraele. Yese abengaki bana nsambo kati na bana na ye mwambe mpo bákutana na Samwele kasi abengaki Davidi te, mpo azalaki leki na bango nyonso. Nzokande Davidi nde moto oyo Yehova aponaki. (1 Sa. 16:​6, 7, 10-12) Yehova amonaki ndenge oyo Davidi azalaki na kati ya motema: elenge mobali oyo azalaki kosepela na makambo ya Nzambe. Kanisá makambo oyo Yehova asili kosala mpo na kolakisa ete amonaka yo. Asepelaka kopesa yo toli oyo eyokani na bamposa na yo. (Nz. 32:8) Mpo asala yango, asengeli koyeba yo malamu, boye te? (Nz. 139:1) Ntango osaleli toli ya Yehova mpe omoni ndenge ezali kosalisa yo, okomindimisa ete Yehova atyelaka yo likebi. (1 Nt. 28:9; Mis. 17:​26, 27) Yehova amonaka milende oyo osalaka. Amonaka bizaleli malamu ya motema na yo mpe alingi kokóma moninga na yo.—Yir. 17:10. w24.10 25-26 par. 7-9

Ayokelaki bango mawa, mpo bazalaki lokola bampate oyo ezangi mobateli.—Mrk. 6:34.

Na ntembe te olingaka Yehova mpe osepelaka kosalela basusu. Ndenge nini okoki kokóma na mposa makasi ya kosala yango? Okoki kokanisa esengo oyo okozwa ntango ozali kosalela bandeko ya lisangá. Yesu alobaki: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” (Mis. 20:35) Ye moko asalelaki maloba yango. Azalaki koyoka esengo mingi na kosalela basusu. Talá ndakisa moko oyo ezali na Marko 6:​31-34. Na libaku yango, Yesu ná bantoma na ye balɛmbaki. Bazalaki kokende na esika oyo bakozala kaka bango moko mpo bápema. Kasi, ebele ya bato bakómaki kuna liboso na bango, na elikya ete Yesu ateya bango. Yesu akokaki koboya kosala yango. Kutu, ye ná bantoma na ye “bazwaki ata ntango ya kolya te.” To, Yesu akokaki koteya bango kaka mwa liteya moko to mibale mpe na nsima kotika bango bákende. Kasi, lokola azalaki kolinga bango, “abandaki koteya bango” tii ntango ‘ngonga epusanaki.’—Mrk. 6:35. w24.11 16 par. 9-10

Mosala na bino ezali na mbano.—2 Nt. 15:7.

Baboti, bólendisa mwana na bino alukaka mabaku ya koyebisa basusu solo ya Biblia. (Rom. 10:10) Okoki koyebisa ye ete kosala milende mpo na kolobela kondima na ye ezali lokola kosala milende mpo na koyekola ebɛtɛlo moko ya miziki. Na ebandeli, moto oyo azali koyekola akobɛta banɔti ya mindɔndɔ te. Nsima ya mikolo, kobɛta miziki ekokóma likambo ya pɛtɛɛ. Ndenge moko mpe, na ebandeli, elenge mokristo akoki kobanda lisolo na ndenge ya pɛtɛɛ mpo na koyebisa basusu makambo oyo andimaka. Na ndakisa, akoki kotuna mwana-kelasi moko: “Oyebi ete mbala mingi bato ya mayele bamekolaka balolenge ya biloko oyo tomonaka na mokili? Zelá nalakisa yo video moko ya kitoko.” Nsima ya kolakisa video moko kati na bavideo oyo elobi Ebimá kaka yango moko?, akoki kotuna: “Soki moto ya siansi azali kozwa lokumu mpo amekoli eloko oyo akutá na mokili, nani nde asalaki eloko oyo bato bamekoli?” Komema lisolo na ndenge wana ya pɛtɛɛ ekoki kotinda moto akanisa mpe kopesa ye mposa ya koluka koyekola makambo mosusu mingi. w24.12 19 par. 17-18

Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu.—Rom. 5:12.

Mpo na kosikola biso na lisumu mpe na liwa, Yehova azwaki ebongiseli ete Yesu apesa lisiko. Kasi, ndenge nini mbeka ya moto kaka moko ya kokoka ekoki kosikola bamilio ya bato? Ntoma Paulo alobaki: “Ndenge kozanga botosi ya moto kaka moko [Adama] ekómisaki ebele ya bato basumuki, ndenge moko mpe botosi ya moto kaka moko [Yesu] ekokómisa bato mingi bato ya sembo.” (Rom. 5:19; 1 Tim. 2:6) Na maloba mosusu, tokómá baombo ya lisumu mpe ya liwa mpo na kozanga botosi ya moto kaka moko ya kokoka. Na yango, mpo na kolongola biso na boombo yango, esɛngaki mpe moto kaka moko ya kokoka amonisa botosi. Yehova akokaki kaka te kopesa nzela ete bakitani ya Adama oyo bakozala mitema sembo bátikala na bomoi libela na libela? Na miso ya bato ya kozanga kokoka, yango elingaki kozala likambo ya boboto mpe oyo ebongi kosala. Kasi yango eyokani te na bosembo ya kokoka ya Yehova. Lokola Yehova azali sembo, akokaki kokanga miso kaka boye te na kozanga botosi ya Adama oyo emonanaki polele. w25.01 21 par. 3-4

Tozali kotambola na kondima, kasi na komona te.—2 Ko. 5:7

Na ntango moko boye, ntoma Paulo ayebaki ete mosika te bakoboma ye, kasi azalaki mpenza na ntina ya kosepela mpo asalelaki bomoi na ye malamu. Yango wana alobaki: “Napoti mbangu tii na nsuka, nabateli kondima.” (2 Tim. 4:​6-8) Paulo azwaki bikateli ya bwanya mpo na kosalela Yehova, mpe amonaki mpenza ete Yehova azalaki kosepela na ye. Biso mpe tolingaka kozwa bikateli ya malamu mpe tolingaka Nzambe andima biso. Ndenge nini tokoki kosala yango? Paulo alobaki mpo na ye moko mpe bakristo mosusu ya sembo ete: “Tozali kotambola na kondima, kasi na komona te.” Na Biblia, “kotambola” emonisaka na bantango mosusu lolenge ya bomoi oyo moto aponi. Moto oyo atambolaka na kondima atyelaka Yehova Nzambe motema mpo na kozwa bikateli. Misala na ye emonisaka ete andimaka ete Yehova akopesa ye mbano, mpe ete akozwa matomba soki alandi toli ya Yehova oyo ezali na Liloba na Ye.—Nz. 119:66; Ebr. 11:6. w25.03 20 par. 1-2

Bóbongwana mpe bóbongola lolenge na bino ya kokanisa.—Rom. 12:2.

Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, bato mingi oyo liboso bazalaki na bizaleli lokola banyama babongoli mpenza bomoi na bango. (Yis. 65:25) Basali makasi bálongola bizaleli na bango ya mabe. (Ef. 4:​22-24) Ya solo, lokola basaleli ya Nzambe bazali kaka bato ya kozanga kokoka, bakokoba kosala mabunga. Kasi, Yehova ayanganisi “bato ya ndenge nyonso,” oyo bazali na bolingo makasi, kimya mpe bomoko. (Tito 2:11) Yango ezali likamwisi oyo kaka Nzambe ya nguya nde akoki kosala! Maloba na ye ezangaka kokokisama te. (Yis. 55:​10, 11) Paradiso ya elimo ezali mpenza solo lelo oyo. Yehova asali libota ya bandeko na mokili mobimba oyo ekokani na mosusu te. Na kati ya bato na ye, tokoki kozwa mwa kimya mpe koyoka ete tobatelami na kati ya mokili oyo ya mobulu. (Nz. 72:7) Yango wana, tolingaka kosalisa bato mosusu mingi báya kokɔta na libota na biso ya bokristo. Tokoki kosala yango soki tomipesi na kokómisa bato bayekoli.—Mat. 28:​19, 20. w24.04 23 par. 13, 15

Biso tozali na makanisi ya Kristo.—1 Ko. 2:16.

Yesu alingaki Yehova na makanisi na ye nyonso. Ayebaki mokano ya Nzambe mpo na ye mpe azalaki na ekateli ya kosala yango, atako esɛngaki ete amona mpasi mpo na kosala oyo ezali sembo. Lokola atyaki makanisi nyonso na kosala mokano ya Tata na ye, Yesu atikaki eloko moko te elongola likebi na ye na mokano yango. Petro ná bantoma mosusu bazwaki libaku ya kolekisa ntango elongo na Yesu mpe koyekola mbala moko ndenge oyo azalaki kokanisa. Ntango Petro akomaki mokanda na ye ya liboso na litambwisi ya elimo ya Nzambe, alendisaki bakristo bázala na makanisi lokola oyo ya Kristo. (1 Pe. 4:1) Na monɔkɔ ya Grɛki, liloba oyo Petro asalelaki ntango akomaki: “Bózala,” ezalaki komonisa basoda balati bibundeli mpo na etumba. Na yango soki bakristo bamekoli makanisi ya Yesu, to lolenge na ye ya kokanisa, bakozala na ebundeli ya nguya mpo na etumba oyo bazali na yango ya kobundisa bamposa ya kosala lisumu mpe mokili oyo eyangelami na Satana.—2 Ko. 10:​3-5; Ef. 6:12. w25.03 8-9 par. 1-3

Makanisi na motema ya moto ezali lokola mai mozindo, kasi moto ya bososoli atokaka yango.—Mas. 20:5.

Makambo nini ya moninga osengeli koyeba na eleko oyo bolingani na ye? Liboso ete motema ekende mobimba, okoki kosepela kosolola na ye makambo mosusu ya ntina, na ndakisa mikano na ye. Ndenge nini okoki koyeba bomoto ya kati ya moto oyo bolingani na ye? Lolenge moko ya malamu ezali ya kosolola polele mpe na bosembo, kotuna mituna mpe koyoka na likebi. (Yak. 1:19) Mpo na yango, kosala makambo mosusu oyo ekobimisa masolo ekosalisa mingi, na ndakisa kolya elongo, kotambola na bisika ya bato nyonso, mpe kobima na mosala ya kosakola elongo. Bokoki mpe koyebana wana bozali kolekisa ntango elongo na baninga mpe bato ya libota. Longola yango, bósalaka makambo oyo ekomonisa ndenge moninga amitambwisaka na mabaku ndenge na ndenge mpe ntango azali na bato ndenge na ndenge. w24.05 27-28 par. 6-7

Bókóma bamekoli ya Nzambe lokola bana ya bolingo.—Ef. 5:1.

Na mikolo ezali koya, tokokutana na mikakatano oyo ekosɛnga tótyela Yehova motema lisusu mingi koleka. Masolo ya Biblia mpe masolo ya bomoi ya bandeko ya mikolo na biso ekosalisa yo ososola ndenge Nzambe amonisaki bizaleli oyo esalaki ete azala libanga mpo na kosunga basaleli na ye. Kanisá malamumalamu mateya oyo ezali na masolo yango. Kosala bongo ekoki kosalisa yo okómisa Yehova Libanga na yo. Lisusu, tokoyeba mpenza kopesa bandeko ya lisangá makasi. Na ndakisa, Yesu apesaki Simo nkombo Kefa (oyo ebongolami “Petro”), oyo elimboli “Eteni ya libanga.” (Yoa. 1:42) Yango emonisaki ete Petro akobanda kobɔndisa basusu na lisangá mpe kosalisa bango bápikama makasi. Biblia ebengi bankulutu “elili ya libanga monene.” Yango emonisi ndenge babatelaka bandeko ya lisangá. (Yis. 32:2) Kasi, lisangá ezwaka matomba ntango biso nyonso tomekoli bizaleli ya Yehova oyo esalaka ete azala libanga. w24.06 28 par. 10-11

Yehova . . . asɛngaka kokangama kaka na ye.—Mib. 4:24.

Bakonzi ya Yisraele oyo Yehova amonaki ete bazali sembo ezali baoyo bakangamaki na losambo ya solo. Bakonzi mingi oyo Yehova atalelaki ete bazalaki sembo te basundolaki Mobeko ya Yehova mpe babandaki kosambela banzambe ya lokuta. (1 Bak. 21:​25, 26; 2 Nt. 12:1) Mpo na nini likambo ya losambo ezalaki na ntina mingi mpo na Yehova? Ya liboso, bakonzi bazalaki na mokumba ya kopesa bato ya Nzambe ndakisa na oyo etali kosambela Yehova na ndenge ya malamu. Lisusu, losambo ya lokuta ezalaki komema bato na masumu mosusu ya minene mpe na kosalela basusu makambo ya kozanga bosembo. (Hos. 4:​1, 2) Longola yango, bakonzi ná bato oyo bazalaki koyangelama bazalaki ekólo ya Yehova. Na yango, ntango bazangi bosembo epai ya Yehova mpe bakɔti na losambo ya lokuta, Biblia elobi ete ezalaki lokola basali ekobo. (Yir. 3:​8, 9) Moto oyo asali ekobo asalelaka molongani na ye lisumu oyo epesaka mpasi koleka nyonso. Ndenge moko mpe, ntango mosaleli ya Yehova oyo amipesá na ye akɔti na losambo ya lokuta asali lisumu mbala moko epai ya Yehova mpe epesaka ye mpasi mingi.—Mib. 4:23. w24.07 22-23 par. 12-15