Yisaya 60:1-22

  • Nkembo ya Yehova engɛngi na Siona (1-22)

    • “Lokola bibenga oyo ezali koya na bandako na yango” (8)

    • Wolo na esika ya kwivrɛ (17)

    • Oyo ya moke akokóma nkóto (22)

60  “Ee mwasi, tɛlɛmá,+ panzá pole, mpo pole na yo eyei. Mpe nkembo ya Yehova engɛngɛli yo.+  2  Mpo talá! molili ekozipa mabeleMpe molili makasi ekozipa bikólo;Kasi Yehova akongɛngɛla yo,Mpe nkembo na ye ekomonana likoló na yo.  3  Bikólo ekokende epai pole na yo ezali+Mpe bakonzi+ epai kongɛnga na yo ya nkembo ezali.*+  4  Tombolá miso na yo mpe talá zingazinga na yo nyonso! Bayanganisami bango nyonso; bazali koya epai na yo. Bana na yo ya mibali bauti mosika bazali kaka koya,+Ná bana na yo ya basi oyo bamemi na loketo.+  5  Na ntango yango okomona mpe okotonda na esengo,+Motema na yo ekosepela mpe ekotonda na esengo,Mpo bozwi ya mbu ekoya epai na yo;Biloko ya bikólo ekoya epai na yo.+  6  Ebele ya bakamela ekozipa mokili na yo,*Bana ya kamela ya mibali ya Midiane mpe ya Efa.+ Baoyo nyonso bauti na Sheba—bakoya;Bakomema wolo ná olibana. Bakosakola masanzoli ya Yehova.+  7  Bitonga nyonso ya Kedare+—ekoyanganisama epai na yo. Bampate-mibali ya Nebayote+—ekosalela yo. Ekomata na etumbelo na ngai mpe ekondimama,+Mpe nakobakisa kitoko ya ndako na ngai ya nkembo.*+  8  Banani wana bazali kopumbwa lokola mapata,Lokola bibenga oyo ezali koya na bandako na yango?*  9  Mpo bisanga ekotyela ngai elikya;+Bamasuwa ya Tarasisi ezali liboso,*Mpo na kouta na bana na yo mosika,+Na palata na bango mpe wolo na bango,Epai nkombo ya Yehova Nzambe na yo ezali mpe epai ya Mosantu ya Yisraele,Mpo akokumisa yo.*+ 10  Bapaya bakotonga bifelo na yo,Mpe bakonzi na bango bakosalela yo,+Mpo na nkanda na ngai nabɛti yo,Kasi na boboto na ngai nakoyokela yo mawa.+ 11  Baporte na yo ekotikala polele ntango nyonso;+Ekokangama te ezala na moi to na butu,Mpo na komemela yo biloko ya bikólo,Mpe bakonzi na bango nde bakokamba.+ 12  Mpo ekólo nyonso to bokonzi nyonso oyo ekosalela yo te ekokufa,Mpe bikólo yango ekobebisama mpenza.+ 13  Nkembo ya Liban ekoya epai na yo,+Nzete ya jenevriye, nzete ya frɛnɛ mpe nzete ya siprɛ, yango nyonso elongo,+Mpo na kokómisa esika na ngai mosantu kitoko;Nakokumisa esika natyaka makolo na ngai.+ 14  Bana ya baoyo banyokolaki yo bakoya mpe bakogumbama liboso na yo;Baoyo nyonso bamemyaki yo te basengeli kofukama na makolo na yo,Mpe bakobenga yo engumba ya Yehova,Siona ya Mosantu ya Yisraele.+ 15  Na esika ete ozala engumba oyo basundolá mpe oyo eyinamá, oyo moto moko te azali koleka kuna,+Nakokómisa yo eloko ya lokumu mpo na seko,Eloko ya esengo mabota na mabota.+ 16  Mpe okomɛla mpenza miliki ya bikólo,+Okomɛla libɛlɛ ya bakonzi;+Mpe okoyeba mpenza ete ngai, Yehova, nazali Mobikisi na yo,Mpe ete Moto ya Nguya ya Yakobo azali Mosikoli na yo.+ 17  Na esika ya kwivrɛ nakotya wolo,Na esika ya ebende nakotya palata,Na esika ya nzete, nakotya kwivrɛ,Mpe na esika ya mabanga, ebende;Mpe nakotya kimya ezala bakɛngɛli na yoMpe bosembo ezala bato oyo bapesaka yo mosala.+ 18  Mobulu ekoyokana lisusu te na mokili na yoLibebi to bitiká mpe te na kati ya bandelo na yo.+ Mpe okobenga bifelo na yo Lobiko+ mpe baporte na yo Lisanzoli. 19  Mpo na yo moi ekozala pole lisusu te na ntango ya moi,Kongɛnga ya sanza ekopesa yo pole te,Mpo Yehova akokóma epai na yo pole ya seko,+Mpe Nzambe na yo akozala kitoko na yo.+ 20  Moi na yo ekolala lisusu te,Sanza na yo mpe ekolimwa te,Mpo Yehova akokóma pole na yo ya seko,+Mpe mikolo ya kolela na yo ekosila.+ 21  Bato na yo nyonso bakozala bato ya sembo;Bakozwa mokili mpo na libela. Bazali mwa nzete oyo nalonaki,Mosala ya mabɔkɔ na ngai,+ mpo namikumisa.+ 22  Oyo ya moke akokóma nkótoMpe oyo azali mpamba akokóma ekólo ya nguya. Ngai Yehova nakokolisa yango mbangu na ntango na yango.”

Maloba na nse

To, “epai ya kongɛnga na yo ya ntɔngɔ.”
Lil., “yo.”
To, “ndako na ngai ya kitoko.”
To, “na minɔkɔ ya ndako ya bibenga.”
To, “akokómisa yo kitoko.”
To, “lokola na ebandeli.”