Hosea 3:1-5
3 Na nsima Yehova alobaki na ngai: “Kende kolinga lisusu mwasi oyo mobali mosusu alingi mpe oyo azali kosala ekobo,+ ndenge kaka Yehova alingi bato ya Yisraele+ atako bazali kokende epai ya banzambe mosusu+ mpe balingi bagato ya mbuma ya vinyo.”*
2 Na yango nasombaki ye na bibende 15 ya palata ná homɛrɛ* moko ná ndambo ya ɔrje.
3 Bongo nayebisaki ye: “Okozala kaka ya ngai mikolo mingi. Osengeli te kosala bondumba,* mpe osengeli te kosangisa nzoto na mobali mosusu; ngai mpe nakosangisa nzoto na yo te.”*
4 Ezali mpo, na boumeli ya ntango molai* bato ya Yisraele bakozala na mokonzi te,+ nkumu te, mbeka te, likonzí te, efode te,+ bikeko ya banzambe ya libota*+ mpe te.
5 Na nsima bato ya Yisraele bakozonga mpe bakoluka Yehova Nzambe na bango+ mpe Davidi mokonzi na bango.+ Mpe bakoya na kolɛnga epai ya Yehova mpe bakoluka lipamboli na ye* na eleko ya nsuka ya mikolo.+
Maloba na nse
^ Elingi koloba, bagato oyo bazalaki kosalela na losambo ya lokuta.
^ To, “pite; kosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”
^ To, “ngai mpe nakosangisa na yo nzoto te.”
^ Lil., “baterafime.”
^ Lil., “mikolo mingi.”
^ To, “epai ya Yehova mpe epai ya bolamu na ye.”