Mokanda ya liboso epai ya Timote 2:1-15
2 Yango wana, libosoliboso nazali kolendisa ete malɔmbɔ, mabondeli, kosɛngɛla bamosusu, kopesa matɔndi, esalemaka mpo na bato ya ndenge nyonso,
2 mpo na bakonzi mpe baoyo nyonso bazali na bibonga minene,*+ mpo tókoba kozala na bomoi ya kimya mpe ya mobulu te na ezaleli ya kokangama mobimba na Nzambe mpe na lisɛki te.+
3 Yango ezali malamu mpe endimami na miso ya Mobikisi na biso, Nzambe,+
4 oyo mposa na ye ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika+ mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.
5 Mpo ezali na Nzambe kaka moko,+ mpe moyokanisi kaka moko+ na kati ya Nzambe ná bato,+ moto moko, Kristo Yesu,+
6 oyo amipesaki ye moko lisiko oyo ekokani mpo na bato nyonso;*+ wana nde likambo oyo esengeli kotatolama na ntango oyo ebongi.
7 Ezali mpo na litatoli+ yango nde batyaki ngai mosakoli mpe ntoma+—nazali koloba solo, nazali kokosa te—mpo na koteya bikólo+ kondima mpe solo.
8 Yango wana, nalingi ete na esika nyonso mibali bábondelaka, bátombolaka mabɔkɔ ya sembo,+ kozanga nkanda+ mpe ntembe.+
9 Ndenge moko mpe basi basengeli kobongisa nzoto na bango na molato oyo ebongi,* bálekisaka ndelo te mpe bázala na makanisi malamu,* kasi te na midɛlɛ ya kokanga nsuki mpe na wolo, na mayaka to na bilamba ya ntalo makasi,+
10 kasi na ndenge oyo ebongi na basi oyo balobaka ete bakangamaka na Nzambe,+ elingi koloba, na misala ya malamu.
11 Mwasi afanda nyɛɛ* mpe ayekola na komikitisa nyonso.+
12 Nazali kopesa mwasi nzela te ya koteya to ya kozala na bokonzi likoló ya mobali, kasi asengeli nde kofanda nyɛɛ.*+
13 Mpo Adama asalemaki liboso, Eva na nsima.+
14 Lisusu, Adama akosamaki te, kasi mwasi akosamaki mpenza+ mpe abukaki mobeko.
15 Nzokande, basi bakobatelama na lisalisi ya kobota bana,+ soki bakangami na kondima mpe na bolingo mpe na kosantisama, elongo na makanisi malamu.*+
Maloba na nse
^ To, “na bisika ya bokonzi.”
^ To, “bato ya ndenge nyonso.”
^ To, “molato ya malamu.”
^ To, “na lisosoli ya malamu.”
^ To, “kimya.”
^ To, “kimya.”
^ To, “lisosoli malamu.”