Lingala
Sanza ya 7
/assets/ct/28ada02fb0/images/syn_placeholder_sqr.png
es26 nk. 67-77

Sanza ya 7

Mwamisato, 1 sanza ya 7

Sanza ya 7

Namoná naino te moto ya sembo asundolami.—Nz. 37:25.

Basaleli mosusu ya Yehova bazali na mikakatano mpo bazali kokóma mibange, bazali kobunda na maladi, to bazali bibɔsɔnɔ. Yango ekoki mbala mosusu kotinda bango bámituna soki bazali na motuya na miso ya Yehova. Bakoki komituna: ‘Nazali kaka na ntina mpo na Yehova?’ Mokomi ya Nzembo 71 amitungisaki mpo na likambo ya ndenge wana. Abondelaki boye: “Kosundola ngai mpe te ntango makasi na ngai ezali kosila.” (Nz. 71:​9, 18) Atako bongo, mokomi ya nzembo yango akobaki komindimisa ete soki azali kosalela Nzambe na ye na bosembo, Yehova akokamba ye mpe akosunga ye. Ndenge mokomi ya nzembo amonaki yango, Yehova asepelaka na baoyo basalaka oyo bakoki mpo na kosalela Ye atako bazali na makoki mingi te. (Nz. 37:​23-25) Mibange, bómitalela ndenge Yehova atalelaka bino. Akoki kosalisa bino bózala malamu na elimo ata soki bozali na mikakatano ya nzoto. (Nz. 92:​12-15) Na esika bótya makanisi na makambo oyo bokoki lisusu kosala te, bótalaka nde oyo bokoki kosala. w24.10 28 par. 14-16

Mpo na likambo oyo etali kolya bilei oyo epesami na bikeko: toyebi ete ekeko ezali nzambe ya solo te.—1 Ko. 8:4.

Mbala mingi, bakristo oyo bakɔmɛli te na elimo bayebaka te nini básala ntango bakutani na makambo oyo esɛngi kotalela mitinda ya Biblia mpe kosalela yango. Soki mobeko ya Biblia ezali te na likambo moko, basusu bamonaka ete bakoki kosala nyonso oyo balingi. Basusu bakoki kosɛnga bátyela bango mobeko na esika oyo mobeko esengeli kozala te. Na ndakisa, emonani ete bakristo ya Korinti basɛngaki ntoma Paulo atyela bango mobeko soki bakoki kolya to te bilei oyo epesamaki mbeka na bikeko. Na esika ayebisa bango oyo basengelaki kosala, Paulo amonisaki ntina ya lisosoli ya moto mpe ete moto na moto azali na ‘lotomo ya kopona.’ Abendaki likebi na mitinda oyo ekosalisa moto na moto azala na kimya na lisosoli na ye mpe abɛtisa basusu libaku te. (1 Ko. 8:​7-9) Na ndenge yango, Paulo azalaki kosalisa Bakorinti bákola na elimo mpo báyeba kosalela makoki na bango ya kososola na esika básɛngaka moto mosusu azwela bango bikateli to mpe bálukaka kaka mibeko. w24.04 5 par. 14

Ngai, Yehova, nalukalukaka na kati ya motema . . . mpo na kofuta moto na moto na kolanda etamboli na ye.—Yir. 17:10.

Na mikolo ya Yona, bato ya Ninive bazwaki libaku ya kobongola motema. Kobosana mpe te makambo oyo Yesu alobaki mpo na “lisekwa ya kosambisama.” Na lisekwa yango, ekozala mpe na “baoyo basalaki makambo ya mabe.” (Yoa. 5:29) Na yango, emonani ete mwa elikya ekoki kozala mpe mpo na bato ya Sodoma ná Gomora. Ekoki kozala ete ata mwa bato yango mosusu bakosekwa, mpe tokoki kozwa libaku ya koteya bango makambo ya Yehova mpe ya Yesu Kristo. Yehova ‘alukalukaka na kati ya motema, atalatalaka makanisi oyo ebombaná mpenza.’ Mpo na lisekwa oyo ekosalema na mikolo ezali koya, kaka ndenge asalaka yango ntango nyonso, Yehova ‘akofuta moto na moto na kolanda etamboli na ye.’ Yehova akozwa ekateli ya makasi soki esengeli kasi akomonisa motema mawa soki likoki ezali. Na yango, tosengeli te kolobaka ete moto oyo azali na elikya ya lisekwa te, lobá kaka soki toyebi ete ezali bongo! w24.05 5-6 par. 15-16

Kobanga te. Nakosalisa yo.—Yis. 41:13.

Banda kala, nsango ya Nzambe epesaka basaleli na ye makasi ntango basengeli kokokisa mokumba moko ya mpasi. Tózwa ndakisa ya mosakoli Yirimia. Azalaki kokakatana ntango Yehova apesaki ye mokumba ya kosakola. Yirimia alobaki: “Nayebi koloba te, mpo nazali kaka mwana.” (Yir. 1:6) Nini esalisaki ye atika kobanga? Azwaki makasi na liloba ya Nzambe. Alobaki boye: “Ekómaki lokola mɔtɔ oyo ezali kopela, oyo ekangami na kati ya mikuwa na ngai, mpe nakokaki lisusu te kobomba yango.” (Yir. 20:​8, 9) Atako Yirimia azalaki na teritware moko ya mpasi, nsango oyo batindaki ye asakola epesaki ye makasi oyo asengelaki na yango mpo asala mosala yango. Bakristo bazwaka makasi na nsango oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe. Ntoma Paulo alobaki ete kozwa boyebi ya solosolo ekolendisa bandeko ‘bámitambwisa na ndenge oyo ebongi na Yehova,’ wana bazali kokoba “kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu.”—Kol. 1:​9, 10. w24.04 14-15 par. 2-4

Nganga-nzambe Zadoke. . . atyaki Salomo mafuta.—1 Bak. 1:39.

Zadoke atikalaki sembo epai ya Yehova atako Nganga-nzambe Monene Abiatare aponaki kopesa Adoniya, mwana ya Davidi mabɔkɔ, oyo alukaki kobɔtɔla kiti ya bokonzi. Davidi azalaki kotya motema ntango nyonso na bosembo ya Zadoke. Ntango mayele mabe ya Adoniya eyebanaki, Davidi abengaki Zadoke, Natane, mpe Benaya bátya Salomo mafuta mpo azala mokonzi. (1 Bak. 1:​32-34) Na ntembe te kozala elongo na basaleli ya Yehova ya sembo lokola Natane mpe bato mosusu oyo bapesaki Mokonzi Davidi mabɔkɔ, epesaki Zadoke makasi mpe elendisaki ye. Ntango Salomo akómaki mokonzi, “apesaki nganga-nzambe Zadoke mosala oyo Abiatare azalaki kosala.” (1 Bak. 2:35) Ndenge nini tokoki komekola Zadoke? Soki moto moko oyo olingaka aponi kotika Yehova, yo monisá polele ete otikali sembo. (Yos. 24:15) Yehova akopesa yo makasi mpe mpiko oyo osengeli na yango. Bondeláká ye mpe zalá ntango nyonso moninga ya baoyo bazali sembo epai ya Yehova. Yehova asepelaka mingi na bosembo na yo, mpe akopesa yo mbano mpo na yango.—2 Sa. 22:26. w24.07 6-7 par. 16-17

Tótika te kosala oyo ezali malamu.—Gal. 6:9.

Nzembo 15: 2 emonisi ete moninga ya Nzambe ezali “moto oyo atosaka Nzambe ntango nyonso, oyo asalaka makambo oyo ezali sembo.” Maloba “atosaka” mpe “asalaka” emonisi likambo oyo ezali kokoba. Kasi tokoki mpenza ‘kotosa Nzambe ntango nyonso’? Ɛɛ. Moto moko te azali moto ya kokoka, kasi Yehova akomona ete ‘totosaka ye ntango nyonso’ soki tosalaka makasi mpo na kosala makambo oyo asɛngi biso. Ntango tomipesi na Nzambe mpe tozwi batisimo nde tobandi mobembo elongo na Nzambe. Na ndakisa, na ntango ya kala, soki moto azali moto ya ekólo Yisraele, elakisaki mbala moko te ete azali mopaya ya Yehova. Bato mosusu bazalaki kobelela ye, kasi “na bosolo te mpe na bosembo te.” (Yis. 48:1) Bayisraele oyo balingaki mpenza kozala bapaya ya Yehova basengelaki koyekola masɛngami na ye mpe kokokisa yango. Ndenge moko mpe, mpo na kondimama na Nzambe lelo oyo, tosengeli kosuka kaka te na kozwa batisimo mpe kokɔta na lisangá ya bokristo. Tosengeli kokoba “kosala makambo oyo ezali sembo.” w24.06 9 par. 4; 10 par. 6

Bókóma bamekoli ya Nzambe.—Ef. 5:1.

Ndenge nini Yehova amonisaka ete akabaka? Tótalela mwa bandakisa. Yehova apesaka biso biloko ya mosuni. Mbala mosusu tozali na bozwi te, kasi na lisalisi ya Yehova, mingi kati na biso tozalaka na oyo tosengeli na yango. Na ndakisa, asalaka ete tózala na eloko ya kolya, bilamba, mpe esika ya kolala. (Nz. 4:8; Mat. 6:​31-33; 1 Tim. 6:​6-8) Yehova akokisaka bamposa na biso ya mosuni kaka mpo asengeli kosala yango? Te. Talá maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:​25, 26. Mpo na bandɛkɛ Yesu alobaki: “Elonaka te, ebukaka mbuma te mpe eyanganisaka te na bandako ya kobomba biloko.” Kasi talá makambo oyo alobaki na nsima: “Tata na bino ya likoló aleisaka yango.” Na nsima atunaki: “Bino boleki yango na motuya te?” Liteya ezali nini? Soki Yehova aleisaka banyama, tokoki kotya motema ete akokokisa mpe mposa na biso! Ndenge kaka tata asalaka mpo na bana na ye, Yehova akokisaka bamposa na biso bato ya libota na ye mpo alingaka biso.—Nz. 145:16; Mat. 6:32. w24.09 26-27 par. 4-6

Mibali oyo bazali kosala mosala na ndenge ya malamu mpenza bazali kozwa esika ya lokumu, koloba polele mpe na bosembo mpo na kondima.—1 Tim. 3:13.

Mosaleli na misala azali ndeko mobali oyo azwá batisimo, oyo atyami na nzela ya elimo santu mpo na kosalisa bankulutu na makambo ndenge na ndenge na kati ya lisangá. Basaleli na misala bazali libosoliboso mibali ya elimo; balingaka Yehova mpe batosaka mibeko na ye ya sembo na bomoi na bango. Longola yango, balingaka mpenza bandeko ya lisangá. (Mat. 22:​37-39) Ndenge nini ndeko mobali oyo azwá batisimo akoki koluka kokóma mosaleli na misala? Biblia elobeli masɛngami oyo bandeko oyo balingi kokóma basaleli na misala basengeli kokokisa. (1 Tim. 3:​8-10, 12) Okoki kozwa mokumba yango soki oyekoli masɛngami yango ya Biblia mpe na nsima osali makasi okokisa yango. Kasi, liboso, osengeli koyeba naino ntina oyo ozali koluka mokumba yango. w24.11 15 par. 4-5

Bondimaki yango, lokola liloba ya bato te, kasi, ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe.—1 Tes. 2:13.

Bato mosusu batángá Biblia mobimba mbala ebele. Kasi, bandimaka mpenza makambo oyo ezali na kati? Basalelaka yango to batikaka yango etambwisa bomoi na bango? Likambo ya mawa ezali ete mbala mingi esalaka bango eloko te. Bokeseni ezali makasi na biso basaleli ya Yehova! Tosalaka makasi tómonisa ete esalaka mosala na bomoi na biso. Kasi, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kotánga Liloba ya Nzambe mpe kosalela yango. Ekoki kozala mpasi tózwa ngonga ya kotánga. To tokoki kozala na momeseno ya kotánga kaka mbangumbangu mpe kokanisa mpenza te makambo oyo totángi. Mbala mosusu mpe tokoki komona ete tosengeli kobongisa makambo ebele mpe yango ekoki kolɛmbisa biso nzoto. Ata soki tozali na mokakatano nini na oyo etali kotánga Biblia, tokoki kolonga yango. Yehova akoki kosalisa biso. Tiká ete tózala na ekateli ya kokóma batosi ya Liloba. Kozanga ntembe, soki tozali kotánga Liloba ya Nzambe mingi mpe tozali kosalela yango na bomoi na biso, tokozala na esengo mingi.—Yak. 1:25. w24.09 7 par. 15-16

Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino.—Luka 11:9.

Na nzela ya elimo santu na ye, Yehova abɔndisaka biso ntango makambo ya nsɔmɔ ekómeli biso. Soki ozali kokutana na komekama oyo ezokisi motema na yo, fungolelá Yehova motema na yo na libondeli, mbala nyonso mpe ntango nyonso oyo olingi. (Nz. 86:3; 88:1) Kobá kosɛnga Yehova apesa yo elimo santu na ye. Akozanga te kopesa yo makambo oyo osɛngi ye. Mokakatano oyo okutanaki na yango esilisi yo makasi? Elimo santu ekoki kopesa yo nguya ya kokoba kosalela Yehova na bosembo. (Ef. 3:16) Soki osɛngi Yehova apesa yo elimo santu, ndenge nini okoki kosala na boyokani na libondeli yango? Salá makambo oyo ekosalisa yo ozwa lisusu elimo ya Nzambe mingi. Na ndakisa, osengeli koyanganaka na makita mpe kobimaka mosala ya kosakola. Tángáká Liloba ya Yehova mokolo na mokolo mpo otondisa motema na yo na makanisi ya Nzambe. (Flp. 4:​8, 9) Wana ozali kotánga Biblia, tyá likebi na bato oyo bakutanaki na komekama, mpe manyolá ndenge oyo Yehova asalisaki bango báyika mpiko. w24.10 9 par. 12-14

Nzambe alingaki mokili mingi mpenza.—Yoa. 3:16.

Lokola Yehova ná Mwana na ye, tolingaka bato. (Mas. 8:31) Toyokaka mawa makasi mpo na bato oyo ‘bazali na Nzambe te’ mpe bazali na “elikya te.” (Ef. 2:12) Mikakatano ya bomoi ezali kozindisa bango, mpe biso tozali na eloko oyo basengeli na yango mpo na kobima na libulu: nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bolingo mpe mawa mpo na bato ya ndenge wana ekotinda biso tósala nyonso mpo na koyebisa bango nsango malamu. Nsango yango ya motuya ekoki kopesa bango elikya, kosalisa bango bázala na bomoi oyo eleki malamu banda sikoyo, mpe kopesa bango elikya ya kozwa “bomoi ya solosolo,” bomoi ya seko, na mokili ya sika ya Nzambe. (1 Tim. 6:19) Kolinga bato ekotinda biso mpe tókebisa bango ete nsuka ya mokili oyo mabe ekómi pene. (Ezk. 33:​7, 8) Tolingi báyeba makambo oyo ekosalema na ntango yango ya lisambisi: mangomba ya lokuta ekolongolama mpe nsima na yango mokili oyo mabe mobimba ekobebisama na Armagedone.—Em. 16:​14, 16; 17:​16, 17; 19:​11, 19, 20. w24.05 16-17 par. 8-9

Bandeko ya bolingo, moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te kasi bótikela nde nkanda esika; mpo ekomamá ete: “Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nde nakozongisa mabe,” Yehova alobi bongo.—Rom. 12:19.

Ntango ntoma Paulo alendisaki bakristo ‘bátikela nde nkanda esika,’ azalaki kolobela nkanda ya nani? Lisolo yango emonisi ete ezali nkanda ya Yehova. Tokotikela nkanda ya Yehova esika soki totiki ye akata likambo na ntango oyo amoni malamu mpe na ndenge oyo alingi. Ndeko moko na nkombo John oyo basalaki ye makambo ya kozanga bosembo, alobaki boye: “Nasengelaki kobundisa mposa ya kosembola makambo na ndenge na ngai moko. Baroma 12:19 esalisaki ngai nazela Yehova.” Tokozwa matomba soki tozeli ete Yehova asembola makambo. Soki tosali bongo, tokoboya komema kilo mpe kolɛmba nzoto mpo tolingi kosilisa makambo biso moko. Yehova alingi kosalisa biso. Ezali lokola nde alobi: ‘Tikelá ngai likambo yango ya kozanga bosembo; nakolandela yango.’ Soki tondimi maloba ya Yehova ete “ngai nde nakozongisa mabe,” tokoki kolekisa likambo na biso, na elikya ete Yehova akosilisa yango na ndenge oyo eleki malamu. w24.11 6 par. 14-15

Pesá biso mokolo na mokolo bilei na biso na kolanda bamposa na biso ya mokolo.—Luka 11:3.

Tosengeli kotika biloko ya mosuni na esika na yango. Ntoma Paulo amonisaki yango ntango akomelaki bakristo oyo bazalaki na bomoi mwa moke liboso ebongiseli ya Bayuda ebebisama. Alobelaki ndakisa mabe ya Bayisraele ya kala, kati na yango makambo oyo esalemaki pene na Ngomba Sinai. Akebisaki bakristo ete basengeli te “kosepela na makambo ya mabe, ndenge [Bayisraele] basalaki.” (1 Ko. 10:​6, 7, 11) Bayisraele batikaki mposa na bango ya kolya etinda bango bámona ata bilei oyo Yehova azalaki kopesa bango na ndenge ya likamwisi ete ezali “makambo [to biloko] ya mabe.” (Mit. 11:​4-6, 31-34) Mpe ntango basambelaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo, balyaki, bamɛlaki, mpe basakanaki. (Kob. 32:​4-6) Paulo atángaki ndakisa na bango lokola likebisi mpo na bakristo oyo bazalaki na bomoi liboso ebongiseli ya Bayuda ebebisama na mobu 70 T.B. Sikoyo mpe tozali pene na nsuka ya mokili oyo, yango wana tosengeli kozwa toli ya Paulo na lisɛki te. w24.12 6 par. 13

Sepelá na mwasi ya bolenge na yo.—Mas. 5:18.

Yehova azali “Nzambe ya esengo,” mpe alingi ete biso mpe tózala na esengo. (1 Tim. 1:11) Apesi biso makabo mingi mpo na kosalisa biso tósepela na bomoi. (Yak. 1:17) Moko ya makabo yango ezali libala. Ntango mwasi ná mobali babalani, basalaka elako ete bakolingana, bakomoniselana limemya mpe bakotyelana likebi. Soki mwasi ná mobali bakobi kolingana makasi, bakozala na esengo mpenza. Likambo ya mawa, babalani mingi na mokili ya lelo oyo babosanaka elako oyo basalaki na mokolo ya libala na bango. Na yango, bazalaka na esengo te. Ndenge nini Yehova alingi ete mobali asalelaka mwasi na ye makambo? Yehova asɛngi mibali bápesaka basi na bango lokumu. Kopesa moto lokumu elimboli kosalela ye makambo oyo emonisi ete tomemyaka ye. Mobali oyo apesaka mwasi na ye lokumu asalelaka ye makambo na boboto mpe na bolingo.—1 Pe. 3:7. w25.01 8 par. 1-2; 9 par. 4-5

Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te.—Ebr. 13:6.

Na ntembe te, mokanda ya ntoma Paulo epai ya Baebre esalisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso bámibongisa mpo na bolɔzi oyo ezalaki koya. Paulo asɛngaki bandeko bákolisa boyebi mpe bákanga malamu ntina ya Makomami. Yango elingaki kosalisa bango báyeba mateya oyo ekokaki kobebisa kondima na bango mpe bábwaka yango. Alendisaki bango bákómisa kondima na bango makasi mpo bálanda mbala moko litambwisi ya Yesu mpe ya baoyo bazalaki kokamba lisangá. Asalisaki mpe bakristo yango bákolisa ezaleli ya koyika mpiko; bátalela mikakatano na ndenge oyo ebongi mpe bámona ete ezali libaku oyo Tata na bango ya bolingo akoki kosalela mpo na kopesa bango formasyo. Tiká ete biso mpe tósalela toli yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Soki tosali bongo, tokokoka koyika mpiko na bosembo tii na nsuka.—Ebr. 3:14. w24.09 13 par. 17, 19

Tosantisami na likabo ya nzoto ya Yesu Kristo mbala moko mpo na libela.—Ebr. 10:10.

Na Biblia, lisiko ezali motuya oyo efutami mpo na kozipa masumu mpe kozongisa boyokani. Na miso ya Yehova, lisiko nde esali ete oyo ebungaki ezonga. Na ndenge nini? Tóbosana te ete Adama ná Eva babungisaki bomoi na bango ya kokoka mpe elikya ya kozala na bomoi libela na libela. Na yango, lisiko esengelaki kozala motuya oyo ekokani na eloko oyo ebungaki. (1 Tim. 2:6) Ekokaki kofutama kaka na mobali ya mokóló oyo (1) azali moto ya kokoka; (2) akoki kozala na bomoi libela na libela na mabele; mpe (3) andimi kokaba, to kopesa bomoi yango mbeka mpo na biso. Tótalela makambo misato oyo esalaki ete Yesu akoka mpo na kofuta motuya ya lisiko. (1) Azalaki moto ya kokoka: “asalaki lisumu te.” (1 Pe. 2:22) (2) Na yango, akokaki kozala na bomoi libela na libela na mabele. (3) Andimaki kokufa mpe kokaba bomoi yango mpo na biso.—Ebr. 10:9. w25.02 4-5 par. 11-12

Apesaka elimo mokemoke te.—Yoa. 3:34.

Yehova alingaka yo mpe alingi ete okɔta na libota na ye. Ezali bongo ata soki ozali na makambo oyo ezali kopekisa yo ozwa batisimo. Yesu alobaki na etuluku moko ya bayekoli na ye ya siɛklɛ ya liboso ete: “Soki bozali na kondima monene lokola mbuma ya mutarde, bokoloba na ngomba oyo: ‘Longwá awa kende kuna,’ mpe ekolongwa mpe ekokende. Mpe ekozala na likambo moko te oyo bokokoka kosala te.” (Mat. 17:20) Baoyo bayokaki maloba yango bazalaki elongo na Yesu bambula moke kaka; na yango bakómaki naino na kondima makasi te. Kasi Yesu ayebisaki bango ete soki bakómi na kondima makasi, Yehova akosalisa bango bálonga mikakatano oyo ezali lokola ngomba. Yehova akosalisa yo mpe osala bongo! Soki omoni makambo oyo ezali kopekisa yo ozwa batisimo, koumela te mpo na kosala oyo esengeli mpo na kolongola yango. Omipesa na Yehova mpe ozwa batisimo. Ezali ekateli eleki malamu oyo okoki kozwa! w25.03 7 par. 18-20

Yehova azali pene na ngai; nakobanga te.—Nz. 118:6.

Tokoki kolonga mikakatano na biso soki tozali kobosana te ete Nzambe ya bomoi alingaka kosalisa biso. Tokondima mpenza likambo yango soki tozali kotalela makambo oyo asalá na kala. (Yis. 37:​17, 33-37) Lisusu, talá na site jw.org masolo oyo emonisi ndenge Yehova azali kosalisa bandeko na mikolo na biso. Longola yango, kanisá mabaku oyo Yehova asalisaki yo. Komitungisa te soki omoni te likambo ya kokamwa oyo Yehova asalelá yo. Mpo na nini omitungisa te? Mpo likambo ya solo ezali ete Yehova asali makambo mingi na bomoi na yo! Abendi yo okóma moninga na ye. (Yoa. 6:44) Mpo na nini te osɛnga ye asalisa yo omikundwela mabaku oyo ayanolaki na mabondeli na yo, ndenge asalisaki yo ntango ozalaki mpenza na bosɛnga, to atyelaki yo likebi na likambo moko ya mpasi oyo okutanaki na yango? Kokanisa makambo wana ekosalisa yo otya lisusu motema mingi ete Yehova akokoba kosalisa yo. w24.06 21 par. 8

Bato nyonso . . . basalaki lisumu.—Rom. 5:12.

Tokoki kozala na ekateli ya kotika eloko te ekabola biso na Yehova. Kasi, toyebi mpe ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe tokoki kokwea na komekama. (Rom. 7:​21-23) Kozanga kokana, tokoki kokutana na makambo oyo ekoki kosala ete tómona lokola ete nzela moko ya mabe ezali kutu malamu. Mpo na kotikala sembo epai ya Yehova ná Mwana na ye, tosengeli kolanda toli ya Yesu ya kokoba kosɛnzɛla mpo tótɛmɛla komekama ya kosala lisumu. Biso nyonso tokutanaka na komekama ya kosala lisumu. Kasi, mokomoko na biso azali na bolɛmbu na ye, likambo oyo ekoki kotya ye na komekama ya kosala lisumu ya monene, kosala makambo ya mbindo, to mpe kolanda makanisi ya mokili. Na ndakisa, moto mosusu akoki kozala na etumba mpo akwea te na komekama ya kosala pite. Mosusu akoki kozala na bolɛmbu ya kosala makambo ya mbindo, lokola kosimbasimba binama na ye ya kobotela mpo na koyoka elɛngi to mpe kotala pornografi. Ekoki kozala ete moto mosusu mpe azali kobundisa ezaleli ya kobanga bato, elimo ya lipanda, ezaleli ya kosilika mpambampamba, to likambo mosusu. w24.07 14 par. 3; 15 par. 5

Bosengeli nde kolimbisa ye na boboto mpe kobɔndisa ye, mpo azinda te na mawa na ye oyo eleki ndelo.—2 Ko. 2:7.

Kanisá oyo ekokaki kosalema soki bankulutu báboyaka kozongisa na lisangá mobali yango oyo abongolaki mpenza motema, to soki nsima ya kozonga na lisangá, bandeko báboyaka komonisela ye bolingo. Akokaki kozinda na “mawa na ye oyo eleki ndelo.” Akokaki komona ete elikya ezali lisusu te mpo na ye. Akokaki kotika kosala milende ya kobongisa boyokani na ye na Nzambe. Ya mabe koleka, soki bandeko na lisangá báboyaka kolimbisa mosumuki yango oyo abongolaki motema, balingaki mpe kobebisa boyokani na bango na Yehova. Mpo na nini? Mpo balingaki komekola te Yehova, Nzambe oyo alimbisaka basumuki oyo babongoli motema, kasi nde Satana, moto ya motema makasi mpe oyo azangá mawa. Balingaki kokóma bisaleli oyo Zabolo akokaki kosalela mpo na koboma mobali yango na elimo.—2 Ko. 2:​10, 11; Ef. 4:27. w24.08 17 par. 7, 10-11

Ntango amataki na likoló . . . , apesaki makabo oyo ezali bato.—Ef. 4:8.

Yesu Kristo apesá “makabo oyo ezali bato,” oyo basalelaka lisangá na ndenge mosusu. Na litambwisi na ye, bankulutu na Yerusaleme batindaki Paulo, Barnabasi, mpe basusu lokola bakɛngɛli ya zongazonga. (Mis. 11:22) Mpo na nini? Mpo na ntina moko kaka oyo basaleli na misala mpe bankulutu batyamaka: mpo na kolendisa masangá. (Mis. 15:​40, 41) Lelo oyo, bakɛngɛli ya zongazonga bafandaka esika moko te. Basusu basalaka mibembo ya bakilomɛtrɛ mingi mpo na kotala masangá. Pɔsɔ na pɔsɔ, mokɛngɛli ya zongazonga asalaka badiskur ebele, akendaka kotala bandeko, mpe atambwisaka likita ya babongisi-nzela, ya bankulutu, mpe makita mpo na mosala ya kosakola. Abongisaka badiskur mpe programɛ mpo na mayangani ya zongazonga ná mayangani ya etúká. Ateyaka na eteyelo ya babongisi-nzela, abongisaka likita moko ya ntina elongo na babongisi-nzela ya zongazonga na ye, mpe asalaka makambo mosusu, na bantango mosusu mikumba mosusu ya lombangu, oyo Betele epesi ye. w24.10 21 par. 12-13

Nakolimbisa libunga na bango, mpe nakokanisa lisumu na bango lisusu te.—Yir. 31:34.

Yehova ayebisaki mosakoli Yirimia maloba oyo ezali na mokapo ya lelo. Ntoma Paulo mpe azongelaki maloba yango, ete: “Nakokanisa lisusu te masumu na bango.” (Ebr. 8:12) Kasi yango elimboli mpenza nini? Na Biblia, maloba “kokanisa lisusu” elimbolaka kaka te kozongisa na makanisi to komikundwela likambo. Kasi, ekoki mpe kopesa likanisi ya kosala likambo. Mosali-mabe oyo babakaki na nzete pembeni ya Yesu alobaki na ye: “Yesu, kanisá ngai ntango okokóma na Bokonzi na yo.” (Luka 23:​42, 43) Moto yango azalaki kosɛnga kaka te ete Yesu akanisa ye na ntango wana. Eyano ya Yesu emonisaki ete akosala likambo mpo na mosali-mabe yango, akosekwisa ye. Na yango, ntango Yehova alobi ete akanisaka lisusu masumu na biso te, alingi koloba ete akosala biso eloko te mpo na yango. Akopesa biso etumbu te na nsima mpo na masumu oyo asilaki kolimbisa. w25.02 10-11 par. 14-15

Koyeba Oyo Aleki Mosantu, yango nde mayele.—Mas. 9:10.

Tokozwa mayele ya solosolo soki toyebi bizaleli ya Yehova, mokano na ye, mpe makambo oyo alingaka to ayinaka. Omituna boye: ‘Na kotalela makambo oyo nayebi mpo na Yehova, ekateli nini nakoki kozwa mpo na kosepelisa ye?’ (Ef. 5:17) Mpo na kosepelisa Yehova, na bantango mosusu tosengeli kosala likambo oyo ekopesa bato oyo tolingaka mawa. Na ndakisa, baboti mosusu oyo bamoni ete bazali koluka bolamu ya mwana na bango ya mwasi bakoki kotya ye mbamba ete abala mobali moko oyo azali na mbongo mingi—to oyo akopesa bango mbongo ebele ya libala—atako moto yango azali mpenza makasi te na elimo. Ya solo, balingi ete mwana na bango ya mwasi azala malamu na mosuni, kasi nani akosalisa ye azala moto ya elimo, akóma na boyokani makasi na Yehova? Makanisi ya Yehova na likambo yango ezali nini? Eyano ezali na Matai 6:33. Vɛrsɛ yango elendisi bakristo bákoba “koluka liboso Bokonzi.” Ya solo tolingaka kokumisa baboti na biso mpe komemya bato oyo tofandi na bango, kasi likambo oyo eleki ntina mpo na biso ezali ya kosepelisa Yehova. w25.01 17 par. 9-10

Nkolo atɛlɛmaki pene na ngai mpe atondisaki ngai na nguya.—2 Tim. 4:17.

Tosengeli na lisalisi ya Yehova mpo tókoba kosakola na molende ntango tokutani na botɛmɛli lelo oyo. (Em. 12:17) Mpo na nini okoki kondima ete Yehova akosalisa yo? Tótalela libondeli ya Yesu oyo ezali na Yoane mokapo 17. Yesu asɛngaki Yehova akɛngɛla bantoma na ye mpe Yehova ayanolaki na libondeli yango. Mokanda ya Misala emonisi ndenge asalisaki bantoma básakola na molende atako minyoko. Na libondeli na ye, Yesu asɛngaki mpe Yehova akɛngɛla baoyo bakondimela nsango ya bantoma. Yo mpe ozali na kati ya bato yango. Tii lelo oyo, Yehova ayanolaka na libondeli ya Yesu; akosalisa yo ndenge kaka asalisaki bantoma. (Yoa. 17:​11, 15, 20) Ata soki ekómi lisusu mpasi mingi kosakola nsango malamu na molende lokola nsuka ezali kokóma pene, tokozwa lisalisi nyonso oyo tosengeli na yango.—Luka 21:​12-15. w25.03 18 par. 13-14

Basaleli na ngai bakoganga na esengo.—Yis. 65:14.

Basaleli ya Nzambe bakoki ‘koganga na esengo’ mpo motema na bango etondi na botɔndi. Solo oyo ekómisaka kondima makasi, bilaka ya kobɔndisa oyo ezali na Liloba ya Nzambe, mpe elikya oyo tozwi mpo na mbeka ya lisiko ya Kristo esalaka ete ‘tóyoka malamu na motema.’ Kolobela makambo yango epesaka biso esengo mpenza! (Nz. 34:8; 133:​1-3) Bolingo mpe bomoko oyo ezali na kati ya basaleli ya Yehova ezali makambo mibale ya minene oyo emonanaka na paradiso ya elimo. ‘Ekanganeli yango mpo na bomoko’ esalisaka biso tómona na makanisi ndenge bomoi ekozala na mokili ya sika, epai basaleli ya Yehova bakozala kutu na bolingo mpe bomoko makasi koleka oyo bazali na yango lelo. (Kol. 3:14) Moto nyonso oyo alingi kozala mpenza na esengo mpe na nsai asengeli kozala na kati ya paradiso na biso ya elimo. Ata soki bato ya mokili oyo balobi nini mpo na basaleli ya Yehova, toyebani ete tozali na bomoko elongo na Yehova mpe baoyo nyonso basambelaka ye.—Yis. 65:15. w24.04 21 par. 7-8

Bókoba . . . kolendisana.—1 Tes. 5:11.

Ndenge nini biso nyonso tokoki kosunga bakristo oyo bazali na mposa ya kobala? Lolenge moko ya kosala ezali ya kokeba na makambo oyo tozali koloba. (Ef. 4:29) Tokoki komituna boye: ‘Natumolaka baoyo bazalaka na mposa ya kobala? Ntango namoni ndeko mobali moko ya monzemba ná ndeko mwasi ya monzemba bazali kosolola, nakanisaka mbala moko ete balingani?’ (1 Tim. 5:13) Longola yango, tosengeli ata moke te kotinda bakristo oyo bazali minzemba bámiyoka lokola nde bazangi eloko moko mpo babali te. Ekoleka malamu tólukaka mabaku ya kopesa bakristo oyo bazali minzemba longonya! Bongo soki ozali komona ete ekosimba soki ndeko songolo abalani na ndeko mpakala? Biblia eyebisi biso ete tótalelaka mayoki ya basusu. (Rom. 15:2) Bandeko mingi ya minzemba balingaka te moto alakisa bango moto oyo bakoki kobalana na ye, mpe tosengeli komemya makanisi na bango. (2 Tes. 3:11) Basusu bakoki kondima lisalisi ya bongo, kasi tosengeli kosala yango kaka soki basɛngi biso.—Mas. 3:27. w24.05 24-25 par. 14-15

Libanga na bango ezali lokola Libanga na biso te.—Mib. 32:31.

Tozali na mokili oyo makambo ya mbalakaka ekoki kobimela biso, to kutu kobongola mpenza bomoi na biso. Ezali esengo mingi ndenge tokoki kozwa lisalisi epai ya Yehova Nzambe! Ntango tozwi lisungi na ye, yango endimisaka biso ete “Yehova azali na bomoi!” (Nz. 18:46) Kasi, kaka nsima ya koloba ete Yehova azali na bomoi, Davidi abengaki Nzambe “Libanga na ngai.” Mpo na nini akokanisaki Yehova na libanga, eloko oyo eninganaka te? Biblia esaleli liloba “libanga” na ndenge ya elilingi mpo na kosalisa biso tókanga ntina ya bizaleli mosusu ya Yehova. Liloba yango emonani mbala mingi na bisika oyo bazali kosanzola Yehova mpo na komonisa ete azali Nzambe oyo akokani na mosusu te. Esika ya liboso oyo babengi Yehova “Libanga” ezali Kolimbola Mibeko 32:4. Na libondeli oyo Hana asalaki, alobaki ete “libanga moko te epikami makasi lokola Nzambe na biso.” (1 Sa. 2:2) Habakuku abengaki Yehova “Libanga na ngai.” (Hab. 1:12) Mokomi ya Nzembo 73 abengaki Nzambe “libanga ya motema na ngai.” (Nz. 73:26) Mpe ata Yehova ye moko amibengaki libanga.—Yis. 44:8. w24.06 26 par. 1, 3

Yehoshafate . . . alukaki Yehova na motema na ye mobimba.—2 Nt. 22:9.

Bakonzi ya Yisraele oyo basepelisaki Yehova ezali baoyo basalelaki ye na motema mobimba. Biblia elobi mpo na Yosiya ete: “Na bakonzi nyonso oyo bayangelaki liboso ya Yosiya, ata moko te azalaki lokola ye, oyo azongelaki Yehova na motema na ye mobimba.” (2 Bak. 23:25) Bongo Salomo, oyo asalaki makambo ya mabe ntango akómaki mobange? Biblia elobi: “Motema na ye ezalaki mobimba te.” (1 Bak. 11:4) Mokonzi mosusu oyo azalaki sembo te ezalaki Abiyame; Biblia elobi mpo na ye ete: “Motema na ye ezalaki mobimba te epai ya Yehova.” (1 Bak. 15:3) Na Biblia, liloba “motema” emonisaka mbala mingi bomoto mobimba ya kati; yango esangisi makambo oyo moto alingaka, makanisi na ye, bizaleli na ye, ndenge na ye ya kotalela makambo, makoki na ye, ntina oyo asalaka makambo, mpe mikano na ye. Boye, kosalela Yehova na motema mobimba elimboli nini? Moto oyo azali na motema mobimba asalaka makambo ya losambo te kaka tiká asala. Kasi, asalelaka Yehova mpo alingi ye makasi mpe akangami na ye bomoi na ye mobimba. w24.07 21 par. 4-5

Bomá mabunga na ngai nyonso.—Nz. 51:9.

Yehova asaleli maloba ya elilingi mpo na komonisa ndenge abomaka masumu. Alobi boye: “Nakozipa misala na yo ya kobuka mibeko lokola nde ezipami na lipata mpe masumu na yo lokola nde na lipata moko monene.” (Yis. 44:22) Ntango Yehova alimbisi, ezalaka lokola nde asaleli lipata moko monene mpo na kozipa masumu na biso mpo emonana lisusu te. Bandakisa yango ezali koteya biso nini? Ntango Yehova alimbisi masumu na biso, tosengeli te kotikala na ngambo mpo na masumu yango bomoi na biso mobimba. Na nzela ya makila ya Yesu Kristo, banyongo na biso nyonso elongwaka. Ata soki tokokaki kotala na esika oyo ekomamaki, ekomonana lisusu te. Soki tobongoli motema na masumu na biso mpe Yehova alimbisi biso, ezalaka lokola nde tosalaki masumu yango te; yango nde matomba ya kolimbisa ya solo oyo eutaka epai ya Yehova. Epesaka biso nzela ya kozala na boyokani malamu ná ye mpe esalisaka biso tóboya komiyoka ntango nyonso ete tomemi ngambo. w25.02 10 par. 11-14

Nzambe, na boboto na ye alingi komema yo obongola motema.—Rom. 2:4.

Bankulutu oyo bazali na kati ya komite bazali na mokumba liboso ya Yehova ya kobatela lisangá pɛto. (1 Ko. 5:7) Bazalaka mpe na mposa ya komema to kosalisa mosumuki abongola motema soki likoki ezali. Yango wana, bankulutu basengeli kozala na makanisi ya malamu mpe kobatela elikya ete moto akoki kobongwana. Mpo na nini? Mpo balingaka komekola Yehova, oyo “azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yak. 5:11) Talá ndenge ntoma Yoane oyo akómaki mobange amonisaki elimo yango. Akomaki boye: “Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bósala lisumu te. Nzokande, soki moto asali lisumu, tozali na mosungi moko epai ya Tata, Yesu Kristo, moto ya sembo.” (1 Yoa. 2:1) Likambo ya mawa, ekoki kokóma ete mokristo aboya kobongola motema. Soki esalemi bongo, asengeli kolongolama na lisangá. w24.08 25 par. 19-20

Bótɛlɛma ngwi na kondima.—1 Ko. 16:13.

Mbala mosusu oyokaka mposa ya kokokanisa oyo osalaka ná oyo basusu bazali kosala. Otɛmɛla mposa yango! Mpo na nini? Mpo Yehova akokanisaka biso na basusu te. (Gal. 6:4) Na ndakisa, Maria apesaki Yesu likabo ya mafuta ya nsolo kitoko ya ntalo mingi mpenza. (Yoa. 12:​3-5) Kasi, mwasi mobola oyo mobali akufá atyaki likabo na tempelo kaka ya mbongo ya bibende mibale ya motuya moke mpenza. (Luka 21:​1-4) Atako bongo, Yesu amonaki ete makabo yango mibale emonisaki kondima ya mwasi mokomoko. Tata na ye Yehova azwaka mpenza na motuya eloko nyonso oyo ozali kosala mpo na komonisa ete okangami na ye mpe olingaka ye, ata soki yo moko omoni yango moke. Biso nyonso tozalaka na bantembe na bantango mosusu. Kasi, Liloba ya Nzambe, Biblia, oyo ebongi kotyelama motema mpo elobaka solo, ekoki kosalisa biso tósilisa bantembe yango. Yekolá kozala na elikya. Yehova atyelaka yo mpenza likebi. Asepelaka na milende oyo ozali kosala mpe alaki ete akopesa yo mbano. Yehova azwaka basaleli na ye nyonso ya sembo na motuya, alingaka bango, mpe atyelaka bango likebi. w24.10 25 par. 3; 29 par. 17-18