Mokanda ya liboso epai ya Timote 5:1-25

  • Ndenge ya kosalela bilenge mpe mibange makambo (1, 2)

  • Kosalisa basi oyo mibali bakufá (3-16)

    • Kokokisa bamposa ya bato ya libota (8)

  • Kopesa lokumu na bankulutu oyo bazali kosala mosala makasi (17-25)

    • “Mwa vinyo moke mpo na estoma na yo” (23)

5  Kopamela mokóló na maloba makasi te.+ Kasi bondelá ye lokola tata, bilenge mibali lokola bandeko mibali,  basi oyo bazali mikóló lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi, na makanisi ya pɛto mpenza.  Tyelá basi oyo mibali bakufá likebi,* oyo bazali mpenza na bosɛnga.*+  Kasi soki mwasi moko oyo mobali akufá azali na bana to bankɔkɔ, bango báyekola libosoliboso kosalela ezaleli ya kokangama na Nzambe na libota na bango moko+ mpe bázongisela baboti na bango ná bankɔkɔ na bango bolamu oyo basengeli kozongisela bango,+ mpo yango esepelisaka Nzambe.+  Nzokande mwasi oyo azali mpenza mwasi oyo mobali akufá, atikalá mabɔkɔ mpamba, atyelaka Nzambe elikya+ mpe atingamaka na malɔmbɔ mpe na mabondeli butu moi.+  Kasi oyo amipesá na bisengo ya nzoto akufá atako azali na bomoi.  Yango wana, kobá kopesa malako* oyo, mpo báfundama na likambo te.  Ya solo, soki moto azali te kopesa bato na ye, mpe mingimingi bato ya libota na ye biloko oyo basengeli na yango, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te.+  Mwasi oyo mobali akufá oyo bakokoma nkombo na ye mpo azwa lisalisi, mbula na ye ezala na nse ya 60 te, soki azalaki mwasi ya mobali kaka moko, 10  soki ayebani mpo na misala na ye ya malamu,+ soki abɔkɔlaki bana,+ soki azalaki koyamba bapaya,+ soki asukolaki makolo ya basantu,+ soki asalisaki baoyo bazalaki na mpasi,+ soki amipesaki mpenza na mosala nyonso ya malamu. 11  Nzokande, bilenge basi oyo mibali bakufá bákomama nkombo te, mpo ntango bamposa na bango ya kosangisa nzoto ekómi eloko oyo ezali kopekisa bango kosalela Kristo, balingaka kobala. 12  Bakomema ngambo mpo bakokisi te elaka na bango ya liboso.* 13  Kaka na ntango yango mpe balingaka lisusu kosala mosala te, batambolaka ndako na ndako; ɛɛ, basalaka mosala te, mpe bazali bato ya bilobaloba mpe bamikɔtisaka na makambo ya bato,+ balobelaka makambo oyo basengeli kolobela te. 14  Yango wana, nalingi ete bilenge basi oyo mibali bakufá bábala,+ bábota bana,+ bábatela mabota na bango, bápesa motɛmɛli ata libaku moko te ya koloba mabe. 15  Kutu, basi mosusu oyo mibali bakufá batiki nzela ya malamu mpe balandi Satana. 16  Soki mwasi moko mondimi azali na bandeko na ye oyo bazali basi oyo mibali bakufá, ye asalisa bango, mpo lisangá emema mokumba wana te. Bongo lisangá esalisa basi oyo mibali bakufá oyo bazali mpenza na bosɛnga.*+ 17  Bankulutu oyo bazali kokamba na ndenge ya malamu mpenza+ bátalelama bato babongi na lokumu mbala mibale,+ mingimingi baoyo bazali kosala mosala makasi na liloba mpe na mateya ya Nzambe.+ 18  Mpo likomami ezali koloba ete: “Ntango ngɔmbɛ ezali kotutatuta mbuma osengeli te kokanga monɔkɔ na yango mpo elya te,”+ lisusu, “Mosali abongi kozwa lifuti na ye.”+ 19  Kondima te likambo oyo bafundi na yango nkulutu, longola kaka soki euti na monɔkɔ ya batatoli mibale to misato.+ 20  Pamelá+ na miso ya bato nyonso baoyo bazali na momeseno ya kosala lisumu,+ mpo ekebisa bamosusu.* 21  Liboso ya Nzambe, ya Kristo Yesu mpe ya baanzelu oyo baponami, nazali kopesa yo mitindo ete olanda malako oyo kozanga kokanisela bato mabe, mpe kopona elongi ya moto te.+ 22  Kotyela moto mabɔkɔ nokinoki te;*+ kosangana mpe na masumu ya bato te; zalá ntango nyonso pɛto. 23  Komɛla lisusu mai te,* kasi mɛlá mwa vinyo moke mpo na estoma na yo mpe bamaladi oyo obɛlabɛlaka. 24  Masumu ya bato mosusu eyebanaka polele, ememaka mbala moko na lisambisi, kasi masumu ya bato mosusu eyaka koyebana na nsima.+ 25  Ndenge moko mpe misala ya malamu eyebanaka polele,+ mpe ata oyo ezali komonana polele te ekobombama te.+

Maloba na nse

To, “Kumisá basi oyo mibali bakufá.”
Elingi koloba, “oyo bazali mpenza na moto ya kosalisa bango te.”
To, “mitindo.”
To, “basundoli liloba na bango ya liboso oyo etali kondima.”
Elingi koloba, “oyo bazali mpenza na moto ya kosalisa bango te.”
Lil., “mpo bamosusu bábanga.”
Elingi koloba, “kopesa moto moko te mokumba nokinoki.”
To, “Kosuka kaka te na komɛla mai.”