LISOLO YA BOYEKOLI 34
LOYEMBO 107 Ndakisa ya bolingo ya Nzambe
Ndenge ya komonisa bolingo mpe motema mawa ntango ndeko moko asali lisumu
“Nzambe, na boboto na ye alingi komema yo obongola motema.”—ROM. 2:4.
NA MOKUSE
Ndenge oyo bankulutu bakoki kosalisa bakristo oyo basali lisumu ya monene.
1. Nini ekoki kosalema ntango moto asali lisumu moko ya monene?
NA LISOLO oyo eleki, tomonaki oyo ntoma Paulo akomelaki lisangá ya Korinti ntango lisumu ya monene esalemaki. Lokola mosumuki yango abongolaki motema te, asengelaki kolongolama na lisangá. Kasi, ndenge vɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo emonisi yango, baoyo basali lisumu moko ya monene bakoki kozwa lisalisi. Bakoki komemama na kobongola motema. (Rom. 2:4) Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa bango bábongola motema?
2-3. Tosengeli kosala nini soki toyebi ete ndeko moko asali lisumu moko ya monene, mpe mpo na nini?
2 Liboso ete bankulutu bápesa lisalisi, basengeli koyeba malamu likambo oyo esalemi. Na yango, tosengeli kosala nini soki toyebi ndeko moko asali lisumu ya monene, oyo ekoki kosala ete alongolama na lisangá? Tosengeli kolendisa ndeko yango akende koluka lisalisi ya bankulutu.—Yis. 1:18; Mis. 20:28; 1 Pe. 5:2.
3 Kasi, tokosala nini soki moto yango aboyi kokende kosolola na bankulutu? Biso moko tokoyebisa bankulutu likambo yango mpo na komindimisa ete moto yango akozwa lisalisi oyo esengeli. Kosala bongo emonisi bolingo mpo tolingi te kobungisa ndeko na biso. Soki mosumuki yango akobi kosala lisumu, akobebisa boyokani na ye na Yehova. Akoki mpe kobebisa lokumu ya lisangá. Na yango, atako ekoki kozala mpasi, tosengeli koyebisa bankulutu mpo tolingaka Yehova mpe ndeko na biso oyo asali lisumu.—Nz. 27:14.
NDENGE OYO BANKULUTU BASALISAKA BAOYO BASALI LISUMU MOKO YA MONENE
4. Mokano ya bankulutu ezali nini ntango bakutani na moto oyo asali lisumu moko ya monene?
4 Ntango ndeko moko na lisangá asali lisumu moko ya monene, lisangani ya bankulutu eponaka bankulutu misato ya makoki kati na bango mpo na kosala komite. a Mibali yango basengeli kozala na bopɔlɔ mpe na komikitisa. Ntango bazali koluka kosalisa ndeko oyo asali lisumu abongola motema, bayebaka ete bakoki te kotinda moto na makasi abongola motema. (Mib. 30:19) Bankulutu bayebi ete basumuki nyonso te nde babongolaka motema, ndenge Mokonzi Davidi asalaki. (2 Sa. 12:13) Basumuki mosusu bakoki kopona koboya toli ya Yehova. (Eba. 4:6-8) Atako bongo, mokano ya bankulutu ezali ya komema mosumuki na kobongola motema soki likoki ezali. Mitinda nini ekoki kotambwisa bango ntango bazali kosolola na moto oyo asali lisumu ya monene?
5. Toli nini bankulutu basengeli kobatela na makanisi ntango bakutani na mosumuki? (2 Timote 2:24-26) (Talá mpe elilingi.)
5 Bankulutu bamonaka mosumuki lokola mpate ya motuya, oyo ebungi. (Luka 15:4, 6) Yango wana, ntango bakutani na mosumuki, balobaka na ye te maloba mabe, na nkanda, to na kozanga boboto; bamonaka mpe te ete bokutani yango ezali kaka mpo na kotuna mituna mpe koluka koyeba makambo oyo esalemaki. Kasi, bakomonisa nde bizaleli oyo ezali na 2 Timote 2:24-26. (Tángá.) Bankulutu basengeli kozala ntango nyonso na boboto mpe na motema pɛtɛɛ ntango bazali koluka kosimba motema ya mosumuki.
6. Ndenge nini bankulutu babongisaka mitema na bango liboso ya kokutana na mosumuki? (Baroma 2:4)
6 Bankulutu babongisaka mitema na bango moko. Basalaka makasi bámekola Yehova na lolenge na bango ya kosalela mosumuki makambo, mpe babosanaka te maloba oyo ya Paulo ete: “Nzambe, na boboto na ye alingi komema yo obongola motema.” (Tángá Baroma 2:4.) Bankulutu basengeli kobosana te ete bazali libosoliboso babateli ya mpate na nse ya litambwisi ya Kristo. (Yis. 11:3, 4; Mat. 18:18-20) Liboso ya kokutana na mosumuki, bankulutu oyo bazali na komite bakobondela mpo na kotalela mokano na bango: komema to kosalisa mosumuki abongola motema. Bakosala bolukiluki na Biblia mpe na mikanda ya moombo ya sembo mpe bakobondela mpo bázala na bososoli. Basengeli kotalela mpe koyeba makambo ya bomoi ya moto yango oyo mbala mosusu esalaki ete akóma na makanisi, na ezaleli, mpe na etamboli ya ndenge wana.—Mas. 20:5.
7-8. Ndenge nini bankulutu bakoki komekola motema molai ya Yehova ntango bakutani na mosumuki?
7 Bankulutu bamekolaka motema molai ya Yehova. Babosanaka te ndenge oyo Yehova alukaki kosalisa basumuki na kala. Na ndakisa, Yehova asololaki na Kaina na motema molai nyonso, akebisaki ye na makama oyo lisumu na ye ekobimisa mpe apesaki ye elikya ete makambo ekoki kobonga mpo na ye. (Eba. 4:6, 7) Lisusu, Yehova apesaki Davidi toli na nzela ya mosakoli Natane, oyo asalelaki ndakisa oyo esimbaki motema ya mokonzi yango. (2 Sa. 12:1-7) Mpe Yehova ‘azalaki kaka kotinda’ basakoli na ye “mbala na mbala” epai ya Bayisraele ntango bazalaki kotosa ye te. (Yir. 7:24, 25) Azalaki kozela te ete bato na ye bábongola motema liboso ete asalisa bango. Kutu, azalaki nde kolendisa bango kaka bábongola motema atako bazalaki kaka kosala masumu.
8 Bankulutu balandaka ndakisa ya Yehova ntango bazali koluka kosalisa baoyo basali lisumu ya monene. Basalelaka bango makambo “na motema molai mpenza” ndenge kaka 2 Timote 4:2 elobi. Yango wana nkulutu asengeli ntango nyonso kobatela kimya mpe kozala na motema molai mpo na kotinda mosumuki alinga kosala oyo ezali malamu. Soki nkulutu asiliki to akómi motema mokuse, mosumuki akoki koboya koyoka toli to mpe koboya kobongola motema.
9-10. Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa mosumuki amona ndenge oyo abebisi boyokani na ye na Yehova?
9 Bankulutu basalaka makasi báyeba makambo oyo ememaki moto na lisumu. Na ndakisa, mokristo yango akómaki mokemoke na bolɛmbu mpo na koyekola ye moko to kosakola mbala na mbala? Azalaki lisusu kobondela mokolo nyonso te to mabondeli na ye ekómaki ya likolólikoló? Atikaki ete bamposa mabe ebanda kotambwisa ye? Azwaki baninga ya mabe mpe aponaki kominanola oyo ebongi te? Ndenge nini bikateli yango ekómaki mbala mosusu kotinda motema na ye na mabe? Andimi ete bikateli oyo azwaki mikolo eleki mpe makambo oyo asali epesi Tata na ye Yehova mpasi?
10 Soki bankulutu bazali kotuna mosumuki mituna oyo ebongi kozanga koluka koyeba makambo ya mikemike oyo ezali mpenza na ntina te, bakobenda ye na boboto nyonso mpe bakosalisa ye amona ndenge oyo abebisi boyokani na ye na Yehova. (Mas. 20:5) Lisusu, bakoki kosalela bandakisa mpo na kosalisa moto akanisa mpe amona mabe ya likambo oyo asali, ndenge Natane asalaki epai ya Davidi. Mbala mosusu, na mbala ya liboso oyo bakutani na ye, mosumuki akobanda koyoka mawa mpenza mpo na nzela oyo alandaki. Akoki ata kobongola motema.
11. Ndenge nini Yesu atalelaki basumuki?
11 Bankulutu basalaka makasi bámekola Yesu. Ntango asololaki na Saulo moto ya Tarse, Yesu oyo asekwaki atunaki ye motuna oyo ebongaki mpenza: “Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai?” Na bongo Yesu asalisaki ye akanisa na misala na ye ya mabe. (Mis. 9:3-6) Mpe na likambo ya “mwasi oyo Yezabele,” Yesu alobaki ete: “Natikelaki ye ntango mpo abongola motema.”—Em. 2:20, 21.
12-13. Ndenge nini bankulutu bakoki kotikela mosumuki ntango ya kobongola motema? (Talá mpe elilingi.)
12 Na ndakisa ya Yesu, bankulutu basengeli te kokata noki ete mosumuki akobongola motema te. Basusu bakoki kobongola motema mbala liboso oyo bakutani na komite, kasi mpo na basusu ekoki kosɛnga ntango mingi. Na yango bankulutu bakoki kokutana na mosumuki mbala moko to koleka. Mbala mosusu, nsima ya kokutana mpo na mbala ya liboso, mokristo oyo asalaki lisumu akobanda kokanisa mpenza na makambo oyo bankulutu bayebisaki ye. Mbala mosusu akobondela Yehova na komikitisa nyonso. (Nz. 32:5; 38:18) Na bongo, mbala ya nsima oyo bankulutu bakokutana na ye, mosumuki akoki kozala na makanisi oyo ekeseni na oyo amonisaki ntango bakutanaki na ye na mbala ya liboso.
13 Mpo na komema mosumuki na kobongola motema, bankulutu basengeli komitya na esika na ye mpe komonisela ye boboto. Babondelaka ete Yehova apambola milende na bango mpe bazalaka na elikya ete mosumuki akoki kozongela makanisi ya malamu mpe kobongola motema.—2 Tim. 2:25, 26.
14. Nani mpenza asalisaka mosumuki abongola motema, mpe mpo na nini?
14 Soki mosumuki abongoli motema, ezalaka likambo ya esengo mpenza! (Luka 15:7, 10) Nani mpenza asalaka ete mosumuki abongola motema? Bankulutu? Tóbosana te oyo Paulo akomaki mpo na basumuki: “Mbala mosusu Nzambe akopesa bango nzela bábongola motema.” (2 Tim. 2:25) Na yango, Yehova nde asalisaka mokristo oyo asali lisumu abongola makanisi mpe misala na ye, kasi moto mosusu te. Paulo alobelaki mpe mbuma mosusu ya malamu oyo emonanaka ntango moto abongoli motema: esalisaka mosumuki akóma na boyebi mingi ya sikisiki ya solo, azongela makanisi malamu, mpe akima mitambo ya Satana.—2 Tim. 2:26.
15. Ndenge nini bankulutu bakoki kokoba kosalisa mosumuki oyo abongoli motema?
15 Ntango mosumuki abongoli motema, komite ekozwa bibongiseli mpo na kokende kotalaka ye mpo akoba kozwa lisalisi oyo esengeli mpo akwea te na mitambo ya Satana mpe asembola banzela ya makolo na ye. (Ebr. 12:12, 13) Nzokande, bankulutu bayebisaka ata moto moko te makambo oyo mosumuki asali. Kasi, mbala mosusu bakoki koyebisa lisangá nini?
“PAMELÁ NA MISO YA BATO NYONSO”
16. Na kotalela 1 Timote 5:20, Paulo azalaki kolobela banani ntango alobaki “na miso ya bato nyonso”?
16 Tángá 1 Timote 5:20. Paulo akomelaki Timote, oyo azalaki nkulutu lokola ye, maloba yango mpo na “baoyo bazali na momeseno ya kosala lisumu.” Alingaki mpenza koloba nini? Alingaki mpenza koloba te ete lisangá mobimba nde “na miso ya bato nyonso.” Kasi, azalaki kolobela nde mwa bato oyo mbala mosusu bayebaki lisumu yango. Ekoki kozala bato oyo bamonaki yango, to bato oyo mosumuki ayebisaki. Bankulutu bakoyebisa kaka bango ete mosumuki yango azwi lisalisi.
17. Soki lisumu moko ya monene eyebani mpenza na lisangá to mbala mosusu ekoyebana na nsima, liyebisi nini ekopesama na lisangá, mpe mpo na nini?
17 Na bantango mosusu, lisumu ekoki koyebana mpenza na lisangá to mbala mosusu ekoyebana na nsima. Na ntango wana, “na miso ya bato nyonso” elakisi mpe lisangá mobimba. Na yango nkulutu moko akopesa liyebisi na lisangá ete ndeko yango azwi mpamela. Mpo na nini? Paulo alobi: “Mpo ekebisa bamosusu” bákwea te na lisumu yango.
18. Bankulutu bakosala nini ntango mwana oyo akokisi naino mbula 18 te asali lisumu moko ya monene? (Talá mpe elilingi.)
18 Bongo bankulutu bakosala nini soki mosakoli oyo azwá batisimo kasi akokisi naino mbula 18 te asali lisumu ya monene? Lisangani ya bankulutu ekozwa bibongiseli mpo bankulutu mibale bákutana na mwana yango elongo na baboti na ye oyo bazwá batisimo. b Bankulutu bakoluka koyeba oyo baboti basili kosala mpo na kosalisa mwana na bango abongola motema. Soki mwana yango oyo akokisi naino mbula 18 te andimi toli ya baboti mpe abongoli makanisi mpe etamboli na ye, bankulutu yango mibale bakoki komona ete ezali na ntina te ya komema likambo yango mosika. Mpo Yehova apesi nde baboti mokumba ya kosembola bana na bango na bolingo. (Mib. 6:6, 7; Mas. 6:20; 22:6; Ef. 6:2-4) Kasi bankulutu bakobanda kosolola na baboti mpo na koyeba soki mwana yango azali kozwa lisalisi oyo esengeli. Bongo bankulutu bakosala nini soki mwana oyo azwá batisimo kasi akokisi naino mbula 18 te aboyi kobongola motema mpe akobi kaka na lisumu? Na ntango yango, komite ya bankulutu ekokutana na ye elongo na baboti na ye oyo bazwá batisimo.
“YEHOVA AZALI NA BOLINGO MINGI YA MOTEMA MPE AMONISAKA MOTEMA MAWA”
19. Ndenge nini bankulutu basalaka makasi bámekola Yehova ntango bazali kosolola na moto oyo asali lisumu?
19 Bankulutu oyo bazali na kati ya komite bazali na mokumba liboso ya Yehova ya kobatela lisangá pɛto. (1 Ko. 5:7) Bazalaka mpe na mposa ya komema to kosalisa mosumuki abongola motema soki likoki ezali. Yango wana, bankulutu basengeli kozala na makanisi ya malamu mpe kobatela elikya ete moto akoki kobongwana. Mpo na nini? Mpo balingaka komekola Yehova, oyo “azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yak. 5:11) Talá ndenge ntoma Yoane oyo akómaki mobange amonisaki elimo yango. Akomaki boye: “Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bósala lisumu te. Nzokande, soki moto asali lisumu, tozali na mosungi moko epai ya Tata, Yesu Kristo, moto ya sembo.”—1 Yoa. 2:1.
20. Tokolobela nini na lisolo ya nsuka ya boyekoli?
20 Likambo ya mawa, ekoki kokóma ete mokristo aboya kobongola motema. Soki esalemi bongo, asengeli kolongolama na lisangá. Bankulutu basengeli kosala nini na ntango yango? Tokolobela yango na lisolo ya nsuka na masolo ya nimero oyo.
LOYEMBO 103 Babateli ya mpate—Makabo oyo ezali bato
a Na kala, tozalaki kobenga etuluku yango ya bankulutu komite ya kosambisa. Kasi lokola kosambisa ezali kaka moko ya makambo oyo basalaka, yango wana tokosalela lisusu te maloba: komite ya kosambisa. Na esika na yango, tokobanda nde kobenga etuluku yango: komite ya bankulutu.
b Oyo elobami mpo na baboti etali mpe baoyo bazali kobɔkɔla mwana oyo akokisi naino mbula 18 te.