Yisaya 41:1-29
41 “Bófanda nyɛɛ liboso na ngai, mpe bóyoka bino bisanga;Tiká bato ya bikólo bázwa lisusu makasi na bango.
Bápusana, mpe na nsima báloba.+
Biso nyonso tópusana mpo na lisambisi.
2 Nani abimisaki moto moko epai moi ebimaka?*+Abengaki ye na bosembo mpo asalela Ye,*Mpo na kokaba bikólo epai na yeMpe mpo na kotya bakonzi na nse na ye?+
Oyo akómisi bango putulu liboso ya mopanga na ye,Na litimbo na ye apanzi bango epai na epai lokola matiti ya blé?
3 Azali kolanda bango, kokoba koleka na kimyaNa makolo na nzela oyo ayaki te?
4 Nani asali mpe akokisi yango,Abengi mabota uta na ebandeli?
Ngai, Yehova, nazali Moto ya Liboso;+Mpe epai ya bato oyo bakoya nsima, nakozala kaka ndenge nazalaka.”+
5 Bisanga emonaki mpe ebangaki.
Bansuka ya mabele ebandaki kolɛnga.
Epusanaki pene mpe ezalaki se koya.
6 Moto na moto azali kosalisa moninga na yeMpe koloba na ndeko na ye ete: “Zalá makasi.”
7 Bongo moto oyo ayebi misala ya mabɔkɔ azali kolendisa mosali bibende;+Moto oyo ayeisaka biloko sɛlisɛli na marto ya kotulelaAzali kolendisa moto oyo azali kobɛta marto na elondo*
Alobi mpo na sudire ete: “Ezali malamu.”
Na nsima bakangisaki yango makasi na nsɛtɛ mpo eningana te.
8 “Kasi yo, Ee Yisraele, ozali mosaleli na ngai,+Yo, Ee Yakobo, oyo naponá,+Libota* ya Abrahama moninga na ngai,+
9 Yo oyo nazwá uta na bansuka ya mabele,+Mpe yo oyo nabengá uta na bisika na yango oyo eleki mosika.
Nalobaki na yo: ‘Ozali mosaleli na ngai;+Naponá yo, nabwaki yo te.+
10 Kobanga te, mpo nazali na yo.+
Komitungisa te, mpo nazali Nzambe na yo.+
Nakopesa yo makasi, ɛɛ nakosalisa yo,+Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali, lobɔkɔ oyo esalaka oyo ezali sembo.’
11 Talá! Baoyo nyonso bazali kosilikela yo bakoyoka nsɔni mpe bakosambwa.+
Baoyo bazali kobundisa yo bakokóma eloko mpamba mpe bakokufa.+
12 Okoluka bato oyo bazali kobunda na yo, kasi okomona bango te;Bato oyo bazali kobunda na yo etumba bakokóma lokola eloko oyo ezali te, lokola eloko mpamba.+
13 Mpo ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali,Ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Nakosalisa yo.’+
14 Kobanga te, yo Yakobo mosɔpi,*+Bino bato ya Yisraele, nakosalisa yo,” Yehova alobi bongo, Mosikoli+ na yo, Mosantu ya Yisraele.
15 “Talá! Nakómisi yo likalo ya kotutela,+Eloko ya kotutela ya sika, ya minomino.
Okonyatanyata bangomba mpe okobuka yangoMpe okokómisa bangomba mike lokola mposo ya blé.
16 Okopupola yango,Mpe mopɛpɛ ekomema yango;Mopɛpɛ makasi ekopanza yango.
Okosepela na Yehova,+Mpe okomikumisa na Mosantu ya Yisraele.”+
17 “Bato oyo bazangá mpe babola bazali koluka mai, kasi ezali te.
Lolemo na bango ekauki mpo na mposa ya mai.+
Ngai Yehova nakoyanola bango.+
Ngai Nzambe ya Yisraele nakosundola bango te.+
18 Nakosala ete bibale esopana likoló ya bangomba mikemike oyo ezali polele+Mpe maziba na mabwaku ya patatalu.+
Nakokómisa esobe etima oyo etondi na matitiMpe mokili oyo ezangá mai maziba ya mai.+
19 Na mokili ekauká nakolona nzete ya sɛdrɛ,Ya akasia, ya mirte ná nzete ya mafuta.+
Na mokili patatalu oyo ekauká nakolona nzete ya jenevriye,Elongo na nzete ya frɛnɛ mpe ya siprɛ,+
20 Mpo bato nyonso bámona mpe báyebaBátya likebi mpe bákanga ntinaEte lobɔkɔ ya Yehova nde esali yango,Mpe Mosantu ya Yisraele azalisi yango.”+
21 Yehova alobi ete: “Bóya na likambo na bino.”
Mokonzi ya Yakobo alobi: “Bóbimisa makanisi na bino.”
22 “Bóbimisa mpe bóyebisa biso makambo oyo ekosalema.
Bóyebisa biso makambo ya kala,*Mpo tókanisa* yango mpe tóyeba ndenge yango ekosuka na mikolo ezali koya.
Mpo bóyebisa biso makambo oyo ezali koya.+
23 Bóyebisa biso makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya,Mpo tóyeba ete bozali banzambe.+
Ɛɛ, bósala eloko moko ya malamu to ya mabe,Oyo ekokamwisa biso ntango tokomona yango.+
24 Talá! Bozali lokola eloko oyo ezali te,Mpe mosala na bino ezali mpamba.+
Moto nyonso oyo azali kopona bino azali eloko oyo eyinamá.+
25 Nabimisi moto moko uta na nɔrdi, mpe akoya,+Moto oyo auti epai moi ebimaka,*+ oyo akobelela nkombo na ngai.
Akonyata bayangeli* lokola nde bazalaki mabele,+Lokola moyemi-mbɛki oyo azali konyatanyata mabele ya pɔtɔpɔtɔ.
26 Nani alobá likambo yango uta na ebandeli, mpo tóyeba,To banda na bantango ya kala, mpo tóloba: ‘Alobi solo’?+
Ya solo, moto moko te asakolá yango!
Moto moko te alobá yango!
Moto moko te ayoká likambo yango epai na bino!”+
27 Nazalaki moto ya liboso, oyo nalobaki na Siona ete: “Talá! Bango oyo!”+
Mpe na Yerusaleme nakotinda momemi-nsango malamu.+
28 Kasi nakobaki kotala, mpe moto azalaki te;Moto azalaki te na kati na bango mpo na kopesa toli.
Mpe nakobaki kotuna bango, mpo bápesa eyano.
29 Talá! Bango nyonso bazali lokola eloko oyo ezali te.
Misala na bango ezali mpamba.
Bikeko* na bango ezali mopɛpɛ mpe eloko moko ya solo te.+
Maloba na nse
^ To, “uta na ɛsti.”
^ Lil., “na makolo na Ye.”
^ Eloko moko ya ebende esika bazalaki kotutatuta ebende mpe kobongisa yango.
^ Lil., “momboto.”
^ Elingi koloba, “moto oyo azangi libateli mpe moto mpamba.”
^ Lil., “ya liboso.”
^ To, “mpo tótya motema.”
^ To, “uta na ɛsti.”
^ To, “bayangeli-basungi.”
^ To, “ya konyangwa.”

