Ndenge ekomamá na Marko 5:1-43

  • Yesu atindi bademo na kati ya bangulu (1-20)

  • Mwana mwasi ya Yairuse; mwasi moko asimbi nsɔngɛ ya elamba ya Yesu (21-43)

5  Na nsima, bakómaki na ngámbo mosusu ya mbu, na etúká ya Bageraza.+  Ntango Yesu abimaki na masuwa, na mbala moko, moto moko oyo azalaki na elimo moko ya mbindo autaki na malita* mpe ayaki kokutana na ye.  Azalaki kofanda na kati ya malita; mpe tii na ntango wana, ata moto moko te azalaki na likoki ya kokanga ye, ezala ata na monyɔlɔlɔ.  Mbala mingi bazalaki kokanga ye mabɔkɔ na minyɔlɔlɔ mpe makolo na bikangeli, kasi azalaki kaka kokata yango; mpe moto moko te azalaki na makasi ya kokanga ye.  Mpe butu moi, azalaki ntango nyonso koganga na malita mpe na bangomba, mpe azalaki komizokisa na mabanga.  Ntango amonaki Yesu na mosika, ayaki mbangu mpe agumbamelaki ye.+  Bongo agangaki na mongongo makasi ete: “Ngai ná yo likambo nini, Yesu, Mwana ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló? Lapá ndai na nkombo ya Nzambe ete okonyokola ngai te.”+  Mpo Yesu azalaki koloba na ye: “Bimá na nzoto ya moto oyo, yo elimo ya mbindo.”+  Kasi Yesu atunaki ye: “Nkombo na yo nani?” Mpe ye azongisaki: “Nkombo na ngai Limpinga, mpo tozali mingi.” 10  Mpe akobaki kobondela Yesu ete abengana bilimo yango te na mboka yango.+ 11  Nzokande etonga moko monene ya bangulu+ ezalaki kolya kuna na ngomba.+ 12  Bongo bilimo yango ebondelaki ye ete: “Tindá biso na bangulu mpo tókɔta na kati na yango.” 13  Mpe apesaki bango nzela. Na yango, bilimo yango ya mbindo ebimaki mpe ekɔtaki na kati ya bangulu; mpe etonga mobimba, oyo ezalaki na bangulu soki 2 000, emibwakaki banda na likoló ya lobwaku tii na mbu, mpe ezindaki na mbu. 14  Kasi babateli ya etonga yango bakimaki mpe bayebisaki yango bafandi ya engumba mpe ya bamboka ya zamba, mpe bato bayaki kotala likambo oyo esalemaki.+ 15  Bongo bayaki epai ya Yesu, mpe bamonaki moto oyo azalaki na bademo; moto oyo liboso azalaki na limpinga ya bademo, afandi, alati bilamba mpe akómi na makanisi malamu, bongo babangaki. 16  Lisusu, baoyo bamonaki likambo yango bayebisaki bango likambo oyo ekómelaki moto oyo azalaki na bademo mpe oyo ekómelaki bangulu. 17  Na yango, babandaki kobondela Yesu ete alongwa na etúká na bango.+ 18  Ntango Yesu azalaki kokɔta na masuwa, moto oyo azalaki na bademo abondelaki ye ete akende elongo na ye.+ 19  Nzokande apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye: “Kende epai na yo, na libota, mpe yebisá bango makambo nyonso oyo Yehova* asali mpo na yo mpe ndenge ayokeli yo mawa.” 20  Moto yango akendaki mpe abandaki kosakola na Dekapolisi* makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpo na ye, mpe bato nyonso bakamwaki mingi. 21  Yesu azwaki lisusu masuwa mpe akatisaki na ngámbo mosusu ya mbu. Kuna, ebele ya bato bayanganaki pembeni na ye, mpe ye azalaki pembeni ya mbu.+ 22  Moko ya bakambi ya sinagoga ayaki. Nkombo na ye Yairuse. Ntango amonaki Yesu, akweaki na makolo na ye.+ 23  Abondelaki ye mbala ebele, alobi: “Mwana na ngai ya moke ya mwasi azali kobɛla makasi.* Nasɛngi yo, oya mpe otyela ye mabɔkɔ+ mpo ayoka malamu mpe abika.” 24  Bongo Yesu akendaki elongo na ye. Mpe ebele mpenza ya bato bazalaki kolanda ye mpe kokanganakangana na ye. 25  Nzokande, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na maladi ya kotanga makila+ esali mbula 12.+ 26  Amonaki mpasi mingi na mabɔkɔ ya minganga ndenge na ndenge mpe asilisaki mbongo na ye nyonso, kasi ayokaki kaka malamu te. Kutu, maladi na ye ekómaki lisusu makasi. 27  Ntango ayokaki nsango ya Yesu, ayaki nsimansima na ye na kati ya ebele ya bato mpe asimbaki elamba* na ye,+ 28  mpo azalaki koloba: “Soki nasimbi kaka bilamba* na ye, nakobika.”+ 29  Mpe na mbala moko makila na ye etikaki kotanga, mpe ayokaki na nzoto na ye ete abiki na maladi wana ya mpasi. 30  Na mbala moko, Yesu ayebaki ete nguya+ moko ebimi kati na ye, mpe abalukaki na kati ya ebele yango ya bato mpe atunaki: “Nani asimbi bilamba na ngai?”+ 31  Kasi bayekoli na ye bazongiselaki ye ete: “Ozali komona ndenge ebele ya bato bazali kokanganakangana na yo, mpe ozali kotuna: ‘Nani asimbi ngai?’” 32  Atalaki epai na epai mpo na komona nani asalaki bongo. 33  Lokola mwasi yango ayebaki nini ekómelaki ye, na kobanga mpe na kolɛnga, ayaki mpe akweaki liboso na ye mpe ayebisaki ye solo nyonso. 34  Yesu alobaki na ye: “Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo. Kende na kimya,+ mpe biká na maladi na yo ya mpasi.”+ 35  Ntango Yesu azalaki naino koloba, bato mosusu oyo bautaki na ndako ya mokambi ya sinagoga bayaki mpe balobaki: “Mwana na yo ya mwasi akufi! Mpo na nini kotungisa lisusu Moteyi?”+ 36  Kasi Yesu ayokaki makambo oyo bazalaki koloba, mpe alobaki na mokambi ya sinagoga: “Kobanga te,* monisá kaka kondima.”+ 37  Nzokande apekisaki bato mosusu bálanda ye, longola kaka Petro, Yakobo, ná Yoane ndeko ya Yakobo.+ 38  Ntango bakómaki na ndako ya mokambi ya sinagoga, akutaki yikiyiki mpe bato bazalaki kolela mpe koganga makasi.+ 39  Nsima ya kokɔta, Yesu alobaki na bango: “Mpo na nini bozali kolela mpe bozali na yikiyiki? Mwana yango akufi te, kasi alali nde mpɔngi.”+ 40  Na yango babandaki kosɛka ye na lityo. Kasi nsima ya kobimisa bango nyonso libándá, azwaki tata ná mama ya mwana yango mpe baoyo bazalaki elongo na ye, mpe akɔtaki epai mwana yango azalaki. 41  Azwaki lobɔkɔ ya mwana yango, mpe alobaki na ye: “Talita kumi,” oyo, soki babongoli yango, elakisi: “Mwana mwasi, nalobi na yo, ‘tɛlɛmá!’”+ 42  Na mbala moko mwana yango ya mwasi atɛlɛmaki mpe abandaki kotambola. (Azalaki na mbula 12.) Mpe na mbala moko bazalaki bango lisusu te mpo batondaki na esengo makasi. 43  Kasi alobaki na bango mbala na mbala* ete báyebisa moto moko te likambo yango,+ mpe alobaki ete bápesa mwana yango eloko ya kolya.

Maloba na nse

To, “malita ya kokanisama.”
Talá Ap. A5.
To, “Etúká ya bingumba zomi.”
To, “alingi kokufa.”
To, “elamba ya likoló.”
To, “bilamba ya likoló.”
To, “tiká kobanga.”
To, “apekisaki bango makasi.”