Ndenge ekomamá na Marko 16:1-8
-
Yesu asekwi (1-8)
16 Ntango Sabata+ elekaki, Maria Magadalene, Maria+ mama ya Yakobo, mpe Salome basombaki malasi basalá na matiti mpo na koya kopakola yango na nzoto ya Yesu.+
2 Mpe na ntɔngɔntɔngɔ mpenza ya mokolo ya liboso ya pɔsɔ, ntango moi ebandaki kobima, bayaki na lilita.*+
3 Bazalaki kolobana bango na bango boye: “Nani akobalolela biso libanga mpo elongwa na monɔkɔ ya lilita?”
4 Kasi ntango batombolaki miso, bamonaki ete libanga esilaki kobalolama, atako ezalaki monene mingi.+
5 Ntango bakɔtaki na lilita, bamonaki elenge mobali moko afandi na lobɔkɔ ya mobali, alati zambala moko ya mpɛmbɛ, mpe bayokaki nsɔmɔ.
6 Alobaki na bango: “Bóyoka nsɔmɔ te.+ Bozali koluka Yesu moto ya Nazarete, oyo babakaki na nzete. Alamuki.+ Azali awa te. Bótala, esika balalisaki ye yango oyo.+
7 Kasi bókende koyebisa bayekoli na ye mpe Petro ete: ‘Akei liboso na bino na Galile.+ Kuna nde bokomona ye, kaka ndenge ayebisaki bino.’”+
8 Bongo ntango babimaki na lilita, babandaki mbala moko kokima, bazali kolɛnga mpe nsɔmɔ makasi ekangaki bango. Bayebisaki moto moko likambo te, mpo bazalaki kobanga mingi.*+
Maloba na nse
^ To, “lilita ya kokanisama.”