Epai ya Bagalatia 5:1-26

  • Bonsomi ya bokristo (1-15)

  • Kotambola na kolanda litambwisi ya elimo (16-26)

5  Mpo na bonsomi ya ndenge wana nde Kristo asikoli biso. Yango wana, bópikama makasi,+ mpe bótika te ete bátya bino lisusu na nkaka ya ekanganeli moko ya boombo.+  Talá! Ngai, Paulo, nazali koyebisa bino ete soki bokatami ngenga, Kristo akozala na ntina te epai na bino.+  Nakundweli lisusu moto nyonso oyo azali kokatama ngenga ete asengeli kotosa Mibeko nyonso.+  Bino baoyo bozali koluka kotángama bato ya sembo* na nzela ya mibeko,+ bokabwani na Kristo; bolongwe na boboto monene na ye.  Nde biso, na nzela ya elimo, tozali kozela na motema mɔtɔ mpenza bosembo* oyo tozali kolikya, oyo euti na kondima.  Mpo na baoyo bazali na bomoko na Kristo Yesu, kokatama ngenga to kokatama ngenga te, ezali na ntina te,+ kasi kondima oyo ezali kosala na nzela ya bolingo nde ezali na ntina.  Bozalaki kopota mbangu malamu.+ Nani apekisi bino kokoba kotosa solo?  Makanisi ya ndenge wana euti te epai ya Moto oyo azali kobenga bino.  Mwa levire moke evimbisaka pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini.+ 10  Nandimi mpenza ete bino baoyo bozali na bomoko na Nkolo+ bokokanisa ndenge mosusu te; kasi moto oyo azali kotya bino na mobulu+ akozwa etumbu, ata soki azali nani. 11  Kasi ngai, bandeko, soki nazali naino kosakola kokatama ngenga, mpo na nini nazali kokoba konyokwama? Kutu, na ndenge yango, nzete ya mpasi*+ ezali lisusu te eloko oyo ezali kobɛtisa libaku. 12  Nakosepela kutu ete bato oyo bazali koluka kobulunganisa bino bámikómisa ata mikube.* 13  Bandeko, bobengamaki mpo na bonsomi; nzokande bósalela bonsomi yango te lokola nzela ya kokokisa bamposa ya nzoto,+ kasi na bolingo bósalelanaka lokola baombo.+ 14  Mpo Mibeko nyonso ekokisami* na etinda kaka moko: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”+ 15  Nzokande, soki bozali kokoba koswana mino mpe kolyana,+ bókeba: bozali na likama ya kosilisana.+ 16  Kasi nazali koloba: Bókoba kotambola na kolanda litambwisi ya elimo+ mpe bokokokisa ata mposa moko te ya nzoto.+ 17  Mpo nzoto, na mposa na yango, etɛmɛlaka elimo, elimo mpe etɛmɛlaka nzoto; mpo yango mibale eyokanaka te, yango wana makambo oyo bozali kolinga kosala bozali kosala yango te.+ 18  Lisusu, soki bozali kotambwisama na elimo, bozali na nse ya mibeko te. 19  Nzokande misala ya nzoto emonanaka polele; ezali pite,*+ mbindo, etamboli ya nsɔni na nko,*+ 20  losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe,*+ koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani, mwa mangomba, 21  likunya, kolangwa masanga,+ bafɛti ya lokoso mpe makambo oyo ekokani na oyo wana.+ Nazali kokebisa bino mpo na makambo wana, kaka ndenge nakebisaki bino liboso, ete baoyo basalaka makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya Bokonzi ya Nzambe te.+ 22  Nzokande, mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu,+ kondima, 23  motema pɛtɛɛ, komipekisa.+ Ezali na mobeko ata moko te oyo ezali kotɛmɛla makambo wana. 24  Lisusu, baoyo bazali bato ya Kristo Yesu babaká na nzete nzoto ná bilulela na yango mpe bamposa na yango.+ 25  Soki tozali na bomoi na elimo, tókoba kotambola mpe na molɔngɔ mpenza na elimo.+ 26  Tólukaka te komimonisa ete toleki bamosusu,+ kobimisa kowelana na kati na biso,+ koyokelana likunya.

Maloba na nse

To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Elingi koloba, “bázala lisusu na likoki te ya kotosa mibeko wana kaka oyo bazalaki kondima.”
To mbala mosusu, “emonisami na mokuse.”
Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
Na Grɛki, asélgéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bondɔki; drɔgɛ.”