Misala 21:1-40
21 Bongo ntango tokabwanaki na bango na mpasi mpe tokamataki nzela ya mbu, nokinoki totambolaki alima mpe tokómaki na Kosi, kasi na mokolo ya nsima na Rode, mpe uta kuna na Patara.
2 Mpe ntango tokutaki masuwa moko oyo ezali kokatisa na Fenisia, tomataki mpe tokendaki.
3 Nsima ya komona esanga ya Shipre+ totikaki yango na lobɔkɔ ya mwasi mpe tolandaki Siri,+ mpe tosɛmaki na Tire, mpo kuna nde masuwa esengelaki kokitisa biloko na yango.+
4 Na kolukaluka, tomonaki bayekoli mpe tofandaki wana mikolo nsambo. Kasi na nzela ya elimo+ bazalaki koyebisa Paulo mbala na mbala ete atya lokolo na Yerusaleme te.
5 Bongo nsima ya kolekisa mikolo yango, tobimaki mpe tokendaki; kasi bango nyonso, ná basi mpe bana, bayaki kotika biso tii na libándá ya engumba. Mpe tofukamaki+ na libongo mpe tobondelaki
6 mpe topesanaki mbote,+ mpe biso tomataki na masuwa kasi bango bazongaki epai na bango.
7 Boye tosilisaki kokatisa banda na Tire mpe tokómaki na Potolemaisi, mpe topesaki bandeko mbote mpe tofandaki elongo na bango mokolo moko.
8 Na mokolo oyo elandaki tokendaki mpe tokómaki na Kaisaria,+ mpe tokɔtaki na ndako ya Filipe mopalanganisi ya nsango malamu, oyo azalaki moko ya mibali nsambo ya lokumu malamu,+ mpe tofandaki elongo na ye.
9 Mobali yango azalaki na bana basi minei, bangɔndɔ, oyo bazalaki kosakola.+
10 Kasi ntango tofandaki mikolo mingi, mosakoli moko nkombo na ye Agabusi+ alongwaki na Yudea akiti,
11 mpe ayei epai na biso mpe azwaki mokaba ya Paulo, amikangaki makolo ná mabɔkɔ mpe alobaki ete: “Elimo santu elobi boye: ‘Moto oyo azali nkolo mokaba oyo, Bayuda bakokanga+ ye boye na Yerusaleme mpe bakokaba+ ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo.’”
12 Nzokande ntango toyokaki bongo, biso ná bato ya esika wana tobandaki kobondela ye ete amata na Yerusaleme te.+
13 Na yango, Paulo ayanolaki ete: “Bozali kosala nini na kolela+ mpe na kolɛmbisa ngai motema?+ Bóyeba likambo oyo: Namibongisi kaka mpo na kokangama te, kasi mpe mpo na kokufa+ na Yerusaleme mpo na nkombo ya Nkolo Yesu.”
14 Lokola azalaki kondima kaka te, biso tondimaki yango na maloba oyo: “Mokano+ ya Yehova esalema.”
15 Nzokande nsima ya mikolo yango tomibongisaki mpo na mobembo mpe tobandaki komata na Yerusaleme.+
16 Kasi bamosusu na kati ya bayekoli ya Kaisaria+ bakendaki mpe elongo na biso, mpo na komema biso epai ya moto oyo tosengelaki kofanda epai na ye, Manasona moko boye, moto ya Shipre, moko ya bayekoli ya liboso.
17 Ntango tokómaki na Yerusaleme,+ bandeko bayambaki biso na esengo.+
18 Kasi na mokolo oyo elandaki, Paulo akɔtaki elongo na biso epai ya Yakobo;+ mpe bankulutu nyonso bazalaki wana.
19 Mpe apesaki bango mbote mpe abandaki koyebisa bango eloko moko na moko+ ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki epai ya bikólo na nzela ya mosala na ye.+
20 Nsima ya koyoka bongo, babandaki kopesa Nzambe nkembo, mpe balobaki na ye ete: “Ozali komona, ndeko, ndenge bankóto mingi ya bandimi bazali na kati ya Bayuda; mpe bango nyonso bazali na molende mpo na Mibeko.+
21 Kasi bayokaki nungunungu mpo na yo ete ozali koteya Bayuda nyonso na kati ya bikólo ete bápɛngwa na Moize,+ ozali koyebisa bango ete bákata bana na bango ngenga te+ mpe bátambola te na kolanda mimeseno yango oyo eyebaná.
22 Boye, nini esengeli kosalema mpo na yango? Ata ndenge nini bakoyoka ete oyei.
23 Na yango salá oyo tozali koyebisa yo: Tozali na mibali minei oyo bazali na ndai likoló na bango.
24 Kamatá mibali yango+ mpe kende komipɛtola elongo na bango na ndenge milulu ezali kosɛnga mpe futelá bango makambo nyonso,+ mpo bákokolama motó.+ Mpe na ndenge yango, moto nyonso akoyeba ete nungunungu oyo bayebisaki bango mpo na yo ezali ya mpamba, kasi ete yo ozali kotambola na molɔngɔ, yo moko mpe ozali kobatela Mibeko.+
25 Mpo na bandimi oyo bazali bato ya bikólo, totindi ekateli oyo tozwi ete basengeli koboya biloko oyo epesami mbeka epai ya bikeko+ mpe koboya makila+ mpe biloko oyo ekamolami+ mpe pite.”+
26 Bongo Paulo amemaki mibali yango na mokolo oyo elandaki mpe amipɛtolaki elongo na bango na ndenge milulu ezalaki kosɛnga+ mpe akɔtaki na tempelo, mpo na koyebisa mikolo boni esengelaki koleka+ mpo na kopɛtolama wana na kolanda milulu, tii ntango likabo+ esengelaki kopesama mpo na mokomoko na bango.+
27 Nzokande ntango mikolo yango nsambo+ ekómaki pene ya kosuka, Bayuda ya Azia ntango bamonaki ye na kati ya tempelo, babandaki kokɔtisa ebele nyonso wana ya bato na yikiyiki,+ mpe batyaki ye mabɔkɔ,
28 bazalaki koganga ete: “Mibali ya Yisraele, bóya ee! Talá moto oyo azali koteya bato nyonso bipai na bipai mpo na kotɛmɛla bato na biso+ mpe Mibeko mpe esika oyo mpe, kutu, akɔtisi ata Bagrɛki na kati ya tempelo mpe akómisi esika mosantu oyo mbindo.”+
29 Mpo liboso bamonaki Trofimi+ Moefese na engumba elongo na ye, yango wana bazalaki kokanisa ete Paulo akɔtisaki ye na tempelo.
30 Mpe engumba mobimba ekɔtaki na yikiyiki,+ mpe bato bayanganaki; mpe basimbaki Paulo mpe babendaki ye libándá ya tempelo.+ Mpe na mbala moko baporte ekangamaki.
31 Mpe wana bazalaki koluka koboma ye, nsango ekómelaki komanda ya limpinga ya basoda ete Yerusaleme mobimba ezali na yikiyiki;+
32 mpe na mbala moko azwaki basoda mpe bakonzi ya basoda mpe akitaki na mbangu epai na bango.+ Ntango bamonaki komanda yango ya basoda+ mpe basoda, batikaki kobɛta Paulo.
33 Bongo komanda ya basoda apusanaki pene mpe asimbaki ye mpe apesaki mitindo ete akangama na minyɔlɔlɔ mibale;+ mpe abandaki koluka koyeba soki azali nani mpe likambo nini asali.
34 Kasi bamosusu na ebele wana ya bato babandaki koganga likambo mosusu, mpe bamosusu likambo mosusu.+ Boye, lokola ye moko akokaki te koyeba ata likambo moko ya sikisiki mpo na yikiyiki wana, apesaki mitindo ete bámema ye na lopango ya basoda.+
35 Kasi ntango amataki na baeskalye, makambo ebebaki lisusu, bongo basoda bakómaki komema ye mpo na mobulu ya ebele yango ya bato;
36 mpo ebele wana ya bato bakobaki kolanda, bazalaki koganga ete: “Longolá ye!”+
37 Mpe ntango akómaki pene ya kokɔtisama na lopango ya basoda, Paulo alobaki na komanda wana ya basoda ete: “Nakoki koloba na yo mwa likambo?” Alobaki ete: “Olobaka Grɛki?
38 Ezali mpenza yo te Moezipito oyo, liboso ya mikolo oyo, abimisaki botomboki+ mpe akambaki na esobe mibali nkóto minei (4 000) oyo bazalaki na bambeli?”
39 Na yango, Paulo alobaki ete: “Ya solo, nazali nde Moyuda,+ ya Tarse+ na kati ya Silisia, nazali mwana-mboka ya engumba oyo eyebani malamu. Bongo nabondeli yo, pesá ngai nzela naloba na bato.”
40 Nsima ya kopesa ye nzela, Paulo, atɛlɛmaki na baeskalye, asalaki bato elembo+ na lobɔkɔ na ye. Ntango kimya makasi ekɔtaki, alobaki na bango na monɔkɔ ya Ebre+ ete: