Misala 17:1-34
17 Balekaki sikoyo na kati ya Amifipolisi mpe na Apolonia mpe bakómaki na Tesaloniki,+ epai sinagoga moko ya Bayuda ezalaki.
2 Bongo Paulo akɔtaki kuna, epai na bango, ndenge amesanaki kosala,+ mpe na boumeli ya sabata misato azalaki kosalela Makomami mpo na kosolola na bango,+
3 azalaki kolimbola mpe kopesa bilembeteli na makomi ete esengelaki Kristo anyokwama+ mpe asekwa uta na bakufi,+ mpe azalaki koloba ete: “Ye azali Kristo,+ Yesu oyo ngai nazali kosakwela bino.”
4 Na yango, bamosusu na kati na bango bakómaki bandimi+ mpe basanganaki elongo na Paulo ná Silasi,+ mpe ebele mpenza ya Bagrɛki oyo bazalaki kosambela Nzambe mpe basi mingi ya lokumu basalaki mpe bongo.
5 Kasi Bayuda, lokola bayokaki zuwa,+ bakamataki elongo na bango bato ya mabe na kati ya bawayawaya ya zando mpe basalaki etuluku moko mpe bakɔtisaki engumba na yikiyiki.+ Mpe bayelaki ndako ya Yasona+ mpe babandaki koluka kobimisa bango epai ya etuluku yango.
6 Lokola bazwaki bango te, babendaki Yasona mpe bandeko mosusu epai ya bakonzi ya engumba, bagangaki ete: “Bato oyo babaloli+ mabele oyo bato bafandi, bakómi mpe awa,
7 mpe Yasona ayambi bango malamu. Mpe bato yango nyonso bazali kosala makambo na kotɛmɛla mibeko+ ya Kaisala, balobi ete mokonzi+ mosusu azali, ye Yesu.”
8 Ya solo babulunganisaki ebele wana ya bato mpe bakonzi ya engumba ntango bayokaki makambo yango;
9 mpe kaka nsima ya kozwa ndanga oyo ekoki epai ya Yasona mpe bamosusu nde batikaki bango bákende.
10 Na mbala moko na butu,+ bandeko batindaki Paulo ná Silasi na Beroya, mpe bango, ntango bakómaki kuna, bakɔtaki na sinagoga ya Bayuda.
11 Nzokande Bayuda oyo bazalaki na makanisi ya malamu koleka baoyo ya Tesaloniki, mpo bayambaki liloba na mposa makasi mpenza koleka, bazalaki kotalela+ Makomami+ malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezali bongo.+
12 Na yango, mingi na bango bakómaki bandimi, ndenge moko mpe basi Bagrɛki mingi ya lokumu+ ná mibali mingi.
13 Kasi ntango Bayuda ya Tesaloniki bayokaki ete Paulo asakoli mpe liloba ya Nzambe na Beroya, bayaki mpe kuna mpo na kopusa+ mpe kotombokisa+ ebele ya bato.
14 Bongo na mbala moko bandeko batindaki Paulo akende tii na mbu;+ kasi Silasi ná Timote batikalaki kuna.
15 Nzokande, baoyo bazalaki kokamba Paulo bamemaki ye tii na Atene mpe, nsima ya kozwa mitindo ete soki likoki ezali Silasi ná Timote+ báya nokinoki mpenza epai na ye, bakendaki.
16 Nzokande ntango Paulo azalaki kozela bango na Atene, elimo na ye eyokaki nkanda+ na kati na ye na ndenge amonaki ete engumba yango etondi na bikeko.
17 Na yango, na sinagoga, abandaki kosolola na Bayuda+ mpe na bato mosusu oyo bazalaki kosambela Nzambe, mpe mokolo na mokolo, na zando,+ elongo na baoyo bazalaki wana.
18 Kasi bato mosusu ya filozofi,+ Baepikire ná Basetoa, babandaki kosolola na ye na kotyana ntembe, mpe bamosusu bazalaki koloba ete: “Eloko nini esopa oyo alingi aloba?”+ Bamosusu: “Emonani lokola ete azali mosakoli ya banzambe ya bapaya.” Balobaki bongo mpo azalaki kosakola nsango malamu ya Yesu mpe lisekwa.+
19 Bongo bakangaki ye mpe bamemaki ye na Areopaje, balobi ete: “Tokoki koyeba soki liteya ya sika+ oyo ozali kolobela ezali nini?
20 Mpo ozali kokɔtisa makambo mosusu oyo toyoká naino te na matoi na biso. Na yango, tolingi tóyeba soki makambo yango elingi koloba nini.”+
21 Ya solo, bato nyonso ya Atene mpe bapaya oyo bazalaki kofanda kuna bazalaki kolekisa ntango na bango ya kozwa mopɛpɛ na eloko mosusu te kaka na koyebisa to koyoka mwa likambo moko ya sika.
22 Bongo Paulo atɛlɛmaki na katikati ya Areopaje+ mpe alobaki ete:
“Mibali ya Atene, na ndenge natali, na makambo nyonso bomonani ete bomipesá na kobanga banzambe+ koleka bato mosusu nyonso.
23 Na ndakisa, ntango nazalaki koleka mpe kotala na likebi mpenza biloko na bino ya losambo, namonaki mpe etumbelo moko oyo likoló na yango ekomamá ete: ‘Epai ya Nzambe oyo ayebani te.’ Na yango, ye oyo bino bokangami na ye atako boyebi te, ye nde nazali kosakwela bino.
24 Nzambe oyo asalá mokili mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango, lokola azali—ndenge Ye oyo azali—Nkolo ya likoló mpe ya mabele,+ afandaka te na batempelo oyo esalemi na mabɔkɔ,+
25 mpe asalelamaka mosala na mabɔkɔ ya bato te lokola nde akelelaka na eloko,+ mpo ye moko moto apesaka bato nyonso bomoi+ mpe mpema+ mpe biloko nyonso.
26 Mpe na moto moko+ asalaki bikólo nyonso+ ya bato, mpo na kofanda na etando mobimba ya mabele,+ mpe atyaki bantango oyo etyamá+ mpe bandelo oyo etyamá ya esika oyo bato bafandi,+
27 mpo báluka Nzambe,+ soki esengeli báluka ye na komekameka epai na epai mpe bázwa ye mpenza,+ atako, ya solo, azali mosika te na mokomoko na biso.
28 Mpamba te na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali,+ ndenge bamosusu kati na bapowɛti+ na bino balobá: ‘Mpo tozali mpe libota na ye.’
29 “Na yango, lokola tozali libota ya Nzambe,+ tosengeli kokanisa te ete Nzambe+ azali lokola wolo to palata to libanga, lokola eloko moko oyo eyemami na mayele mpe na makanisi ya moto.+
30 Ya solo, Nzambe akangi miso mpo na bantango wana ya kozanga boyebi,+ nzokande sikoyo azali koyebisa bato na bisika nyonso ete basengeli bango nyonso kobongola motema.+
31 Mpamba te atye mokolo moko oyo akani kosambisa+ na boyengebene mabele oyo bato bafandi na nzela ya moto moko oyo ye aponi, mpe apesi bato nyonso ndanga ndenge asekwisi+ ye uta na bakufi.”
32 Ɛɛ, ntango bayokaki likambo ya lisekwa ya bakufi, bamosusu babandaki kotyola,+ wana bamosusu balobaki ete: “Tokoyoka yo na likambo wana ata mbala mosusu.”
33 Na yango, Paulo abimaki na kati na bango,
34 kasi bato mosusu basanganaki elongo na ye mpe bakómaki bandimi, oyo na kati na bango Dionisiusi, mosambisi moko ya tribinale ya Areopaje,+ ná mwasi moko nkombo na ye Damarise, ná bamosusu elongo na bango.