Misala 13:1-52
13 Nzokande na Antiokia, basakoli+ ná bateyi bazalaki na lisangá ya mboka yango: Barnabasi mpe Simeone oyo bazalaki kobenga Nigere, mpe Lukiusi+ ya Sirene, mpe Manaene oyo atángaki kelasi esika moko ná Erode moyangeli ya etúká, mpe Saulo.
2 Wana bazalaki kosalela+ Yehova liboso ya bato nyonso mpe kokila bilei, elimo santu elobaki ete: “Na bato nyonso bótyela ngai Barnabasi ná Saulo+ pembeni mpo na mosala oyo nabengi bango mpo na yango.”
3 Bongo bakilaki bilei mpe babondelaki mpe batyelaki bango mabɔkɔ+ mpe batikaki bango bákende.
4 Boye bato yango, oyo batindamaki na elimo santu, bakitaki na Selukia, mpe balongwaki kuna bakei na masuwa na Shipre.
5 Mpe ntango bakómaki na Salamisi babandaki kosakola liloba ya Nzambe na basinagoga ya Bayuda. Yoane+ mpe azalaki na bango lokola mosaleli.
6 Ntango basilisaki kokatisa esanga wana mobimba tii na Pafosi, bakutanaki na mobali moko, oyo azalaki nganga-nkisi, mosakoli ya lokuta,+ Moyuda moko na nkombo Bara-Yesu,
7 mpe azalaki elongo na prokonsule Sergiusi Paulusi, mobali moko ya mayele. Lokola abengaki Barnabasi mpe Saulo epai na ye, mobali yango alukaki makasi mpenza koyoka liloba ya Nzambe.
8 Kasi Elimasi nganga-nkisi yango (wana mpenza nde ndenge nkombo na ye ebongolamaka) abandaki kotɛmɛla bango,+ azalaki koluka kopɛngwisa prokonsule na kondima.
9 Saulo, oyo azali mpe Paulo, lokola atondaki na elimo santu, atalaki ye na likebi mpenza
10 mpe alobaki ete: “Ee moto atondi na bokosi ya ndenge nyonso mpe na bizaleli mabe ya ndenge nyonso, yo mwana ya Zabolo,+ yo monguna ya makambo nyonso ya boyengebene, okotika te kotɛngisa banzela ya sembo ya Yehova?
11 Sikoyo talá! lobɔkɔ ya Yehova ezali kokitela yo, mpe okokufa miso, okomona pole ya moi te mpo na mwa ntango.” Na ntango wana kaka, londende moko ya makasi mpe molili ekwelaki ye, mpe akómaki kobalukabaluka mpo na koluka bato bábenda ye na lobɔkɔ.+
12 Boye prokonsule,+ ntango amonaki likambo oyo esalemi, akómaki mondimi, mpo akamwaki na mateya ya Yehova.
13 Bato yango, elongo na Paulo, bakamataki sikoyo nzela ya mbu banda na Pafosi mpe bakómaki na Perga na kati ya Pamfilia.+ Kasi Yoane+ atikaki bango mpe azongaki+ na Yerusaleme.
14 Nzokande, bango balongwaki na Perga mpe bakómaki na Antiokia ya Pisidia mpe, ntango bakɔtaki na sinagoga+ na mokolo ya sabata, bafandaki.
15 Nsima ya kotángama ya Mibeko+ mpe Basakoli liboso ya bato nyonso, bakambi+ ya sinagoga batindelaki bango bato, balobi: “Mibali, bandeko, soki bozali na mwa liloba ya kolendisa bato, bóyebisa yango.”
16 Bongo Paulo atɛlɛmaki, mpe asalaki elembo+ na lobɔkɔ na ye, alobi:
“Mibali, Bayisraele mpe bino bamosusu oyo bobangaka Nzambe, bóyoka.+
17 Nzambe ya bato oyo, Yisraele, aponaki bankɔkɔ na biso, mpe atombolaki bato yango ntango bafandaki bapaya na mokili ya Ezipito mpe abimisaki bango kuna na lobɔkɔ oyo etombwani.+
18 Mpe na eleko ya mbula soki ntuku minei (40)+ akangaki motema na etamboli na bango na esobe.
19 Nsima ya koboma bikólo nsambo na mokili ya Kanana, akabolaki mokili na bango na kobwakáká mbɛsɛ:+
20 nyonso wana na boumeli ya mbula soki nkama minei na ntuku mitano (450).
“Mpe nsima ya makambo yango apesaki bango basambisi tii na mosakoli Samwele.+
21 Kasi banda na ntango wana basɛngaki mokonzi,+ mpe Nzambe apesaki bango Saulo mwana ya Kishe, mobali moko ya libota ya Benyamina,+ mpo na mbula ntuku minei (40).
22 Mpe nsima ya kolongola ye,+ atɛlɛmiselaki bango Davidi lokola mokonzi,+ oyo ye apesaki litatoli mpo na ye mpe alobaki ete: ‘Namoni Davidi mwana ya Yese,+ moto moko oyo azali kosepelisa motema na ngai,+ oyo akosala makambo nyonso oyo nazali na yango mposa.’+
23 Uta na bana+ ya moto yango na kolanda elaka na ye, Nzambe amemeli Yisraele mobikisi,+ Yesu,
24 nsima wana Yoane,+ liboso ya kokɔta ya Moto yango,+ asilaki kosakola polele epai ya bato nyonso ya Yisraele batisimo oyo ezali elembo ya kobongola motema.
25 Kasi wana Yoane akómaki pene na nsuka ya nzela na ye, azalaki koloba ete: ‘Bino bokanisi ete ngai nazali nani? Ngai nazali ye te. Kasi, talá! moto moko azali koya nsima na ngai oyo nabongi te kofungola basandale ya makolo na ye.’+
26 “Mibali, bandeko, bino bana ya libota ya Abrahama mpe baoyo mosusu bazali na kati na bino oyo babangaka Nzambe, liloba ya lobiko oyo batindeli biso.+
27 Mpo bato oyo bafandi na Yerusaleme mpe bankumu na bango bayebaki Moto yango te,+ kasi, wana bazalaki kosala lokola basambisi, bakokisaki makambo oyo elobamaki na Basakoli,+ makambo oyo etángamaka na mongongo makasi Sabata nyonso,
28 mpe, atako bamonaki likambo moko te ya kopesa etumbu ya liwa,+ basɛngaki na Pilate ete abomama.+
29 Nzokande, nsima ya kokokisa makambo nyonso oyo ekomamá mpo na ye,+ bakitisaki ye na nzete+ mpe balalisaki ye na lilita.+
30 Kasi Nzambe alamwisaki ye uta na bakufi;+
31 mpe na boumeli ya mikolo mingi akómaki komonana epai ya baoyo bamataki elongo na ye uta na Galile tii na Yerusaleme, baoyo bazali sikoyo batatoli na ye epai ya bato.+
32 “Na yango, tozali kosakwela bino nsango malamu ya elaka oyo epesamaki epai ya bankɔkɔ na biso:+
33 ete Nzambe akokisi yango na mobimba mpenza epai na biso bana na bango na ndenge asekwisaki Yesu;+ ndenge kaka ekomamá na nzembo ya mibale ete: ‘Yo ozali mwana na ngai, ngai nakómi Tata na yo lelo.’+
34 Mpe likambo wana ete asekwisaki ye uta na bakufi mpo azonga lisusu na kopɔla te, alobeli yango boye: ‘Nakopesa bino makambo ya motema boboto oyo ezali sembo, oyo nalakaki Davidi.’+
35 Yango wana azali mpe koloba na nzembo mosusu ete: ‘Okopesa nzela te ete moto na yo ya sembo apɔla.’+
36 Mpo Davidi,+ ye, asalaki mokano ya Nzambe oyo eyebanaki na eleko na ye mpenza mpe alalaki na kati ya liwa mpe alalisamaki elongo na bankɔkɔ na ye mpe apɔlaki.+
37 Nzokande, moto oyo Nzambe alamwisaki apɔlaki te.+
38 “Yango wana, bandeko, bóyeba ete na nzela ya Moto yango kolimbisama ya masumu ezali kosakolama epai na bino;+
39 mpe ete na makambo nyonso oyo bokokaki te kotángama bato bazangi ngambo na nzela ya mibeko ya Moize,+ moto nyonso oyo azali kondima atángami moto azangi ngambo na nzela ya Moto wana.+
40 Na yango, bókeba ete oyo elobami na Basakoli ekwela bino te:
41 ‘Bótala yango, bino batyoli, mpe bókamwa na yango, mpe bólimwa, mpamba te nazali kosala mosala moko na mikolo na bino, mosala oyo bokondima yango soki moke te ata soki moto ayebisi bino yango moko na moko.’”+
42 Nzokande ntango bazalaki kobima, bato babandaki kobondela bango mpo bálobela bango makambo wana na sabata oyo ekolanda.+
43 Bongo nsima wana liyangani ya sinagoga epanzanaki, mingi na kati ya Bayuda mpe baprozelite oyo bazalaki kosambela Nzambe balandaki Paulo ná Barnabasi,+ oyo ntango balobaki na bango, balendisaki+ bango ete bátikala na kati ya boboto monene ya Nzambe.+
44 Na sabata oyo elandaki, pene na engumba mobimba eyanganaki mpo na koyoka liloba ya Yehova.+
45 Ntango Bayuda bamonaki ebele wana ya bato, batondaki na zuwa+ mpe babandaki kotɛmɛla, na kofinga mpenza, makambo oyo Paulo azalaki koloba.+
46 Mpe na yango, Paulo ná Barnabasi bazalaki koloba na mpiko, balobi: “Esengelaki liloba ya Nzambe esakolama liboso epai na bino.+ Lokola bozali kobwaka yango+ mpe bozali komona ete bobongi te na bomoi ya seko, talá! tobaluki epai ya bikólo.+
47 Kutu, Yehova apesi biso mitindo na maloba oyo: ‘Natye yo lokola pole ya bikólo,+ mpo ozala lobiko tii na nsuka ya mabele.’”+
48 Ntango bato ya bikólo bayokaki yango, babandaki kosepela mpe kokumisa liloba ya Yehova,+ mpe baoyo nyonso bazalaki na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko bakómaki bandimi.+
49 Lisusu, liloba ya Yehova ekobaki kopalangana na mokili wana mobimba.+
50 Kasi Bayuda+ batombokisaki basi ya lokumu oyo bazalaki kosambela Nzambe mpe bato minene ya engumba, mpe babimiselaki Paulo ná Barnabasi monyoko+ mpe babwakaki bango libándá ya bandelo ya mboka na bango.
51 Bango bapupolelaki bango putulu ya makolo na bango+ mpe bakendaki na Ikoniumu.
52 Mpe bayekoli bakobaki kotonda na esengo+ mpe na elimo santu.