Misala 22:1-30
22 “Mibali, bandeko+ mpe batata, bóyoka kosamba+ na ngai liboso na bino sikoyo.”
2 (Bongo, ntango bayokaki ete azali koloba na bango na monɔkɔ ya Ebre,+ bafandaki lisusu nyɛɛ koleka, mpe alobaki ete:)
3 “Nazali Moyuda,+ nabotamá na Tarse ya Silisia,+ kasi natángá kelasi na engumba oyo na makolo ya Gamaliele,+ nalakisamá na kolanda bokasi+ ya Mibeko ya bankɔkɔ, nazalaki moto ya molende+ mpo na Nzambe, ndenge mpe bino nyonso bozali na yango na mokolo ya lelo.
4 Mpe nanyokolaki Nzela oyo tii na liwa,+ nazalaki kokanga mibali ná basi minyɔlɔlɔ mpe kotinda bango na babolɔkɔ,+
5 kutu nganga-nzambe monene mpe liyangani mobimba ya mikóló+ bakoki kotatola mpo na ngai. Nazwaki mpe mikanda+ epai na bango mpo na bandeko oyo bazalaki na Damasi, nakendaki mpe komema baoyo bazalaki kuna bakangami na minyɔlɔlɔ mpe koya na bango na Yerusaleme mpo bázwa etumbu.
6 “Kasi wana nazalaki kokende mpe kopusana pene na Damasi, pene na midi, pole moko makasi engɛngaki na mbala moko zingazinga na ngai,+
7 mpe nakweaki na nse mpe nayokaki mongongo moko elobi na ngai ete: ‘Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai?’+
8 Nayanolaki ete: ‘Yo nani, Nkolo?’ Mpe alobaki na ngai ete: ‘Ngai Yesu Monazarete, oyo yo ozali konyokola.’+
9 Nzokande, ya solo, bato oyo bazalaki elongo na ngai+ bamonaki pole yango kasi bayokaki te mongongo ya moto oyo azalaki kosolola na ngai.+
10 Na yango, nalobaki ete: ‘Nasengeli kosala nini,+ Nkolo?’ Nkolo alobaki na ngai ete: ‘Tɛlɛmá, kende na Damasi, mpe kuna bakoyebisa yo makambo nyonso oyo etindami ete yo osala.’+
11 Kasi lokola nakokaki komona eloko te mpo na nkembo ya pole wana, nakómaki na Damasi, nazalaki kobendama na lobɔkɔ ya baoyo bazalaki elongo na ngai.+
12 “Nzokande Ananiasi, mobali moko oyo abangaka Nzambe na kolanda Mibeko, oyo alobelami malamu+ na Bayuda nyonso oyo bafandaka kuna,
13 ayaki epai na ngai mpe, atɛlɛmaki pembeni na ngai, alobaki na ngai ete: ‘Saulo, ndeko, moná lisusu!’+ Mpe natombolaki miso mpo na kotala ye na ngonga wana kaka.
14 Alobaki ete: ‘Nzambe ya bankɔkɔ na biso+ aponi yo+ mpo oyeba mokano na ye mpe omona+ Moto ya sembo+ mpe oyoka mongongo ya monɔkɔ na ye,+
15 mpo osengeli kozala, epai ya bato nyonso, motatoli na ye ya makambo nyonso oyo omoni mpe oyoki.+
16 Mpe sikoyo, mpo na nini ozali koumela? Tɛlɛmá, zwá batisimo+ mpe belelá nkombo na ye mpo osukola+ masumu na yo.’+
17 “Kasi ntango nazongaki na Yerusaleme+ mpe nazalaki kobondela na tempelo, nasenzwaki+
18 mpe namonaki ye azali koloba na ngai ete: ‘Salá mbangu mpe bimá noki na Yerusaleme, mpo bakondima te+ litatoli na yo mpo na ngai.’
19 Mpe ngai nalobaki ete: ‘Nkolo, bango moko bayebi ete nazalaki kotya na bolɔkɔ+ baoyo bandimelaka yo mpe nazalaki kobɛta bango fimbo na sinagoga mokomoko;+
20 mpe ntango makila ya motatoli na yo Stefano+ ezalaki kosopama, ngai moko mpe natɛlɛmaki wana mpe nazalaki kondima+ mpe kokɛngɛla bilamba ya likoló ya baoyo bazalaki koboma ye.’
21 Atako bongo alobaki na ngai ete: ‘Kende, mpo nakotinda yo na bikólo ya mosika.’”+
22 Nzokande bakobaki koyoka ye tii na liloba wana, mpe batombolaki mingongo na bango, balobi: “Longolá moto ya boye na mabele, mpo abongaki kozala na bomoi te!”+
23 Mpe lokola bazalaki koganga mpe kobwaka bilamba na bango ya likoló epai na epai mpe kobwaka putulu likoló,+
24 komanda ya basoda apesaki mitindo ete bákɔtisa ye na lopango ya basoda mpe alobaki bábɛta ye fimbo mpo aloba, bongo ye akoka koyeba malamumalamu ntina oyo bazali koganga+ ndenge wana mpo na ye.
25 Kasi ntango batandaki ye mpo na kobɛtama fimbo, Paulo alobaki na mokonzi ya basoda oyo atɛlɛmaki wana ete: “Mobeko epesi nde bino nzela ete bóbɛta fimbo na moto oyo azali Moroma+ mpe oyo akweisami likambo te?”
26 Boye, ntango mokonzi yango ya basoda ayokaki bongo, akendaki epai ya komanda ya basoda mpe ayebisaki ye ete: “Olingi kosala nini? Talá, moto wana azali Moroma.”
27 Bongo komanda ya basoda apusanaki pene mpe alobaki na ye ete: “Yebisá ngai: Ozali Moroma?”+ Alobaki: “Ɛɛ.”
28 Komanda ya basoda ayanolaki ete: “Ngai nasombaki ntomo wana ya mwana-mboka na mbongo ebele mpenza.” Paulo alobaki ete: “Kasi ngai nabotamá+ nde na yango.”
29 Bongo, na ntango wana kaka, bato oyo balingaki kobɛta ye fimbo mpo aloba balongwaki pembeni na ye; mpe komanda ya basoda akómaki kobanga ntango ayebaki malamu ete azali Moroma+ mpe na ndenge akangaki ye minyɔlɔlɔ.
30 Bongo, na mokolo oyo elandaki, lokola alingaki koyeba mpenzampenza ntina oyo Bayuda bazalaki kofunda ye, afungolaki ye mpe apesaki mitindo ete banganga-nzambe bakonzi mpe Sanedrina mobimba báyangana. Mpe akitisaki Paulo mpe atɛlɛmisaki ye na kati na bango.+