Misala 27:1-44
27 Nzokande lokola ekateli ezwamaki ete tókende na masuwa na Itali,+ bapesaki Paulo mpe bato mosusu ya bolɔkɔ na mabɔkɔ ya mokonzi moko ya basoda, nkombo na ye Yuliusi, ya etuluku ya Augusto.
2 Ntango tomataki na masuwa moko euti na Adramitiume, oyo elingaki kokende na bisika oyo ezalaki pembenipembeni ya mai na etúká ya Azia, tobandaki kokende, mpe Aristarke+ azalaki elongo na biso, ye moto ya Masedonia ya Tesaloniki.
3 Mpe mokolo oyo elandaki, tosɛmaki na Sidone, mpe Yuliusi azalaki kosalela Paulo makambo na boboto mpenza+ mpe apesaki ye nzela ya kokende epai ya baninga na ye mpe kozwa lisalisi epai na bango.+
4 Mpe ntango tolongwaki kuna, tokamati nzela ya mbu, totamboli nsimansima ya Shipre mpo mipɛpɛ ezalaki kobɛta na liboso;
5 mpe totambolaki na katikati mpenza ya mbu, pembeni ya Silisia mpe Pamfilia mpe tosɛmaki na Mira na Lisia.
6 Kasi kuna mokonzi ya basoda akutaki masuwa moko ya Alezandria+ oyo ezalaki kokende na Itali, mpe amatisaki biso na yango.
7 Bongo, nsima ya kotambola mikolo mingi malɛmbɛmalɛmbɛ mpe kokóma na Kinide na mpasi, lokola mopɛpɛ ezalaki kopesa biso nzela te ya kokende liboso, totambolaki nsimansima ya Krɛtɛ na Salomone,
8 mpe nsima ya kotambola na mpasi pembenipembeni na yango, tokómaki na esika moko oyo ebengami Mabongo Kitoko, oyo engumba Lasea ezalaki pene na yango.
9 Lokola ntango mingi elekaki mpe ekómaki sikoyo likama kotambola na masuwa mpo kokila bilei ya mokolo ya kozipa masumu+ kutu esilaki koleka, Paulo apesaki likanisi,
10 alobi na bango ete: “Mibali, namoni ete mobembo oyo ya masuwa ekobimisa likama mpe libebi moko monene, kaka ya biloko ná masuwa te, kasi mpe ya milimo na biso.”+
11 Nzokande, mokonzi ya basoda ayokelaki nde motambwisi-masuwa ná nkolo-masuwa na esika ya kolanda makambo oyo Paulo alobaki.
12 Nzokande lokola libongo wana ezalaki malamu te mpo na kolekisa eleko ya mpiɔ kuna, mingi bapesaki likanisi ete tólongwa kuna, mpo na kotala soki bakokoka ata kokóma na Feniksi mpo na kolekisa eleko yango, wana nde libongo ya Krɛtɛ oyo efungwamá na nɔrdi-ɛsti mpe na sudi-ɛsti.
13 Lisusu, ntango mopɛpɛ ya sudi ezalaki kopɛpa mokemoke, bakanisaki lokola nde mokano na bango ekokisami, mpe bamatisaki longo mpe masuwa ebandaki kotambola pembenipembeni mpenza ya Krɛtɛ.
14 Nzokande, mwa moke na nsima, mopɛpɛ moko ya makasi+ oyo babengi Erakilo ekitelaki yango.
15 Lokola masuwa ebɛtamaki makasi mpe ekokaki te kotɛlɛmisa motó na mopɛpɛ, tomitikaki mpe tomemamaki.
16 Nzokande, totambolaki nsimansima ya mwa esanga moko oyo babengi Koda, mpe atako bongo ezalaki mpasi mpenza mpo tózwa kano+ ya nsima ya masuwa.
17 Kasi nsima ya komatisa yango na masuwa, babandaki kosalela bansinga ya minene mpo na kokangisa masuwa; mpe lokola bazalaki kobanga kokende kokangama na zɛlo na Sirtisi, bakitisaki biloko oyo etambwisaka masuwa mpe na ndenge yango bamemamaki.
18 Nzokande lokola tozalaki kobɛtama na ndenge ya nsɔmɔ na mopɛpɛ wana ya makasi, na mokolo oyo elandaki babandaki kolongola kilo+ na masuwa;
19 mpe na mokolo ya misato, na mabɔkɔ na bango moko mpenza, babwakaki biloko ya masuwa.
20 Nzokande, nsukansuka, lokola moi mpe minzoto esalaki mikolo ebele emonanaka te, mpe lokola mopɛpɛ oyo ezalaki kobɛta biso ezalaki ya moke te,+ elikya nyonso ya kobika na biso ebandaki kosila.
21 Mpe lokola basalaki ntango molai kozanga kolya biloko, Paulo atɛlɛmaki na katikati na bango+ mpe alobaki ete: “Mibali, bosengelaki mpenza kolanda toli na ngai mpe kokamata te nzela ya mbu uta na Krɛtɛ mpe kozwa te likama oyo mpe libebi ya biloko.+
22 Nzokande, sikoyo nazali kosɛnga na bino bózala na mpiko, mpo ata molimo moko te na kati na bino ekobunga, kaka masuwa yango moko.
23 Mpo na butu ya lelo, anzelu+ moko ya Nzambe oyo ngai nazali moto na ye mpe oyo ngai nazali kosalela mosala mosantu+ atɛlɛmaki pene na ngai,
24 alobi: ‘Kobanga te, Paulo. Osengeli kotɛlɛma liboso ya Kaisala,+ mpe, talá! Nzambe asili kopesa yo na boboto mpenza baoyo nyonso bazali kosala mobembo elongo na yo na masuwa.’
25 Yango wana, mibali, bózala na mpiko; mpo nazali kondimela Nzambe+ ete ekosalema kaka ndenge mpenza bayebisi ngai.
26 Nzokande, tosengeli kokangama na zɛlo na esanga moko boye.”+
27 Nzokande wana butu ya zomi na minei eyindaki mpe biso tozalaki komemama epai na epai likoló ya mbu ya Adria, na katikati ya butu, bamatelo babandaki komona lokola bazali kopusana pene ya mwa mokili boye.
28 Mpe bamekaki mozindo mpe bamonaki ete ezali orgwiya* ntuku mibale (20), bongo bapusanaki mwa moke mpe bamekaki lisusu mpe bamonaki ete ezali orgwiya zomi na mitano.
29 Mpe lokola bazalaki kobanga ete tókangama na mabanga na esika moko boye, babwakaki balongo minei na nsima ya masuwa mpe babandaki kolinga ete ntɔngɔ etana.
30 Kasi ntango bamatelo yango babandaki koluka kokima masuwa mpe bakitisaki kano na mbu, bazalaki kokosa ete balingi nde kokitisa balongo uta na elongi ya masuwa,
31 Paulo alobaki na mokonzi ya basoda ná basoda ete: “Soki bato oyo batikali na masuwa te, bokoki kobika te.”+
32 Na yango, basoda bakataki bansinga ya kano+ mpe batikaki yango ekwea.
33 Nzokande pene mpenza ya kotana ya ntɔngɔ, Paulo abandaki kolendisa bato nyonso bálya mwa biloko, alobi: “Lelo ezali mokolo ya zomi na minei oyo bozali kosɛnzɛla mpe bozali kolya te, botye ata eloko moko na monɔkɔ te.
34 Na yango, nazali kolendisa bino ete bólya mwa biloko, mpo ezali libateli na bino; mpo ata nsuki+ moko te ya motó ya moko na bino ekobeba.”
35 Ntango asilisaki koloba bongo, akamataki mpe limpa, apesaki Nzambe matɔndi+ liboso na bango nyonso mpe abukaki yango mpe abandaki kolya.
36 Na yango bango nyonso basepelaki mpe babandaki bango moko kolya mwa biloko.
37 Nzokande, biso nyonso, biso milimo oyo tozalaki na kati ya masuwa tozalaki nkama mibale na ntuku nsambo na motoba (276).
38 Ntango batondaki biloko, babandaki kolongola kilo+ na masuwa mpe kobwaka blé na mbu.
39 Nsukansuka ntango ntɔngɔ etanaki, bayebaki mokili yango mpenza te kasi bazalaki komona mwa esika mai ekɔtá na mabele ná libongo moko ya zɛlo, mpe bazwaki mokano, soki likoki ezali, ya kokangisa masuwa na libongo yango.+
40 Bongo nsima ya kokata balongo, batikaki yango ekwea na mbu, kaka na ntango wana, bafungolaki bansinga ya bankai ya koyenda mpe, nsima ya komatisa elamba ya liboso ya masuwa na mopɛpɛ, balandaki libongo.
41 Ntango bamatelaki libondo moko ya zɛlo oyo mbu ezalaki kobwakela yango mai bipai nyonso mibale, bakakisaki masuwa wana, mpe elongi ya masuwa ekangamaki makasi mpe ezalaki koningana te, kasi nsima ya masuwa ebandaki kobukana na ndenge ya nsɔmɔ.+
42 Na yango, basoda bazwaki mokano ya koboma bato ya bolɔkɔ, mpo moko te akoka kobɛta mai mpe kokima.
43 Kasi mokonzi ya basoda alingaki kobikisa Paulo mpe apekisaki bango kokokisa mokano na bango. Mpe apesaki baoyo bayebaki kobɛta mai mitindo ete bámibwaka na mbu mpe bábima na mokili liboso,
44 mpe baoyo batikali bálanda, bamosusu likoló ya mabaya mpe bamosusu likoló ya biloko mosusu ya masuwa. Mpe na ndenge yango esalemaki ete bato nyonso bakómaki na mokili kozanga likama.+
Maloba na nse
^ Talá Ap 5.