Misala 2:1-47
2 Nzokande wana mokolo ya fɛti ya Pantekote+ ezalaki koleka, bazalaki bango nyonso elongo na esika moko,
2 mpe na mbala moko makɛlɛlɛ ebimaki na likoló lokola oyo ya mopɛpɛ oyo ezali kopɛpa makasi, mpe etondaki na ndako mobimba epai bafandaki.+
3 Mpe ndemo lokola nde ya mɔtɔ+ emonanaki epai na bango mpe ekabwanaki, mpe mokomoko efandaki likoló ya moto na moto na kati na bango,
4 mpe bango nyonso batondaki na elimo santu+ mpe babandaki koloba na minɔkɔ mosusu,+ ndenge kaka elimo ezalaki kopesa bango nzela ya koloba.
5 Nzokande, Bayuda mosusu,+ mibali oyo babangaka Nzambe,+ bazalaki kofanda na Yerusaleme, bauti na bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.
6 Bongo, ntango lokito yango ebimaki, ebele wana ya bato bayanganaki mpe bakamwaki makasi, mpamba te moto na moto azalaki koyoka bango bazali koloba na monɔkɔ na ye mpenza.
7 Ya solo, batikalaki minɔkɔ polele mpe babandaki kokamwa mpe koloba ete: “Talá naino, baoyo nyonso bazali koloba bazali bato ya Galile,+ boye te?
8 Kasi ndenge nini tozali koyoka, moto na moto na kati na biso, monɔkɔ na ye mpenza oyo tobotamá na yango?
9 Baparte ná Bamede+ ná Baelame,+ ná bato oyo bafandaka na Mezopotamia, ná Yudea+ ná Kapadosi,+ Ponti+ ná etúká ya Azia,+
10 ná Frigia+ ná Pamfilia,+ Ezipito ná biteni ya Libi oyo ezali na ngámbo ya Sirene, ná bato oyo bazali awa, oyo bautaki na Roma, Bayuda ná baprozelite,+
11 bato ya Krɛtɛ+ ná Baarabe,+ tozali koyoka bango bazali koloba makambo minene ya Nzambe na minɔkɔ na biso.”
12 Ɛɛ, bango nyonso bakamwaki mpe babulunganaki, bazalaki koloba bango na bango ete: “Likambo oyo elingi koloba nini?”
13 Nzokande, bamosusu bazalaki kosɛka bango mpe babandaki koloba ete: “Batondi na vinyo ya elɛngi.”+
14 Kasi Petro atɛlɛmaki elongo na bantoma zomi na moko+ mpe atombolaki mongongo na ye mpe alobaki na bato yango boye: “Mibali ya Yudea mpe bino nyonso bato oyo bofandi na Yerusaleme,+ bóyeba likambo oyo mpe bótya litoi na maloba na ngai.
15 Ya solo, bato oyo balangwe masanga te,+ ndenge bozali kokanisa, mpo oyo ezali ngonga ya misato ya moi.
16 Kasi oyo ezali nde makambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli Yoele ete:
17 Nzambe alobi boye: ‘“Mpe na mikolo ya nsuka, nakosopela bato ya ndenge nyonso ndambo ya elimo na ngai,+ mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi bakosakola mpe bilenge na bino bakomona bimonaneli mpe mibange na bino bakolɔta bandɔtɔ;+
18 ata mpe baombo na ngai ya mibali mpe baombo na ngai ya basi nakosopela bango ndambo ya elimo na ngai na mikolo wana, mpe bakosakola.+
19 Mpe nakopesa makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya kuna na likoló mpe bilembo na mabele awa na nse, makila mpe mɔtɔ mpe londende ya milinga;+
20 moi+ ekobongwana molili mpe sanza ekobongwana makila liboso ete mokolo monene mpe ya nkembo ya Yehova eya.+
21 Mpe moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.”’+
22 “Mibali ya Yisraele, bóyoka maloba oyo: Yesu Monazarete,+ mobali oyo Nzambe amonisaki bino polele na nzela ya misala ya nguya+ mpe na makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya mpe na bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na ye katikati na bino,+ ndenge bino moko boyebi,
23 mobali yango, lokola moto oyo akabami na kolanda mokano oyo ekanamá mpe boyebi oyo Nzambe azali na yango ya koyeba makambo liboso,+ bino bobakaki ye na nzete na lobɔkɔ ya bato oyo babukaka mibeko mpe bobomaki ye.+
24 Kasi Nzambe asekwisaki+ ye na ndenge alongolaki bampasi ya liwa,+ mpo ekokaki kosalema te ete akoba kokangama na yango.+
25 Mpo Davidi alobi na ntina na ye ete: ‘Nazalaki komona Yehova ntango nyonso liboso ya miso na ngai; mpo azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpo naningana ata moke te.+
26 Yango wana motema na ngai ekómaki na nsai mpe lolemo na ngai esepelaki mingi. Lisusu, ata nzoto na ngai mpe ekofanda na elikya;+
27 mpo okotika molimo na ngai na kati ya Nkunda* te, okopesa mpe nzela te ete moto na yo ya sembo apɔla.+
28 Oyebisi ngai banzela ya bomoi, okotondisa ngai na nsai ya elongi na yo.’+
29 “Mibali, bandeko, epesami nzela kolobela bino polele mpe na bosembo na ntina na Davidi mokonzi ya libota: ete akufaki+ mpe akundamaki mpe lilita na ye ezali na kati na biso tii na mokolo ya lelo.
30 Na yango, lokola azalaki mosakoli mpe ayebaki ete Nzambe alapelaki ye ndai ete akofandisa moto moko oyo auti na mbuma ya bangei na ye na kiti na ye ya bokonzi,+
31 amonaki liboso mpe alobaki mpo na lisekwa ya Kristo, ete asundolamaki na kati ya Nkunda* te mpe nzoto na ye epɔlaki te.+
32 Yesu yango Nzambe asekwisaki ye, likambo oyo biso nyonso tozali batatoli+ na yango.
33 Na yango, lokola atombwamaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe+ mpe azwaki, epai ya Tata, elimo santu oyo elakamaki,+ asopi oyo bino bozali komona mpe koyoka.
34 Ya solo Davidi amataki na likoló te,+ kasi ye moko azali koloba ete: ‘Yehova alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali,+
35 tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo.”’+
36 Na yango, tiká ndako mobimba ya Yisraele eyeba malamumalamu ete Nzambe akómisi ye Nkolo+ mpe Kristo, Yesu yango oyo bino bobakaki na nzete.”+
37 Nzokande ntango bayokaki bongo, mitema na bango ezokaki,+ mpe balobaki na Petro mpe na bantoma mosusu ete: “Mibali, bandeko, tosengeli kosala nini?”+
38 Petro alobaki na bango ete: “Bóbongola mitema,+ mpe mokomoko na bino abatisama+ na nkombo+ ya Yesu Kristo mpo masumu na bino elimbisama,+ mpe bokozwa likabo ya ofele+ ya elimo santu.
39 Mpo elaka+ ezali mpo na bino mpe mpo na bana na bino mpe mpo na baoyo nyonso bazali mosika,+ nyonso oyo Yehova Nzambe na biso akobenga epai na ye.”+
40 Mpe na maloba mosusu mingi apesaki litatoli malamumalamu mpe akobaki kolendisa bango, alobi ete: “Bómibikisa na libota oyo etɛngamá.”+
41 Na yango, baoyo bayambaki liloba na ye na motema mobimba babatisamaki,+ mpe na mokolo wana milimo soki nkóto misato (3 000) ebakisamaki.+
42 Mpe bakobaki komipesa na mateya ya bantoma mpe kosangana bango na bango,+ kolya+ mpe na mabondeli.+
43 Ɛɛ, kobanga ebandaki kokwela molimo nyonso, mpe makamwisi mingi ya komonisa makambo oyo ekoya mpe bilembo ebandaki kosalema na nzela ya bantoma.+
44 Baoyo nyonso bakómaki bandimi bazalaki elongo, bazalaki kotya biloko nyonso lisangá,+
45 mpe bazalaki kotɛka biloko na bango+ mpe bozwi na bango mpe kokabola na moto nyonso mosolo bazwaki, ndenge moto na moto azalaki na bosɛnga.+
46 Mpe mokolo na mokolo bazalaki ntango nyonso kosangana na tempelo na bomoko mpenza,+ mpe bazalaki kolya bilei na bango na bandako ya bato mpe bazalaki kozwa bilei na esengo monene+ mpe na bosembo ya motema,
47 bazalaki kosanzola Nzambe mpe bato nyonso bazalaki komonisela bango boboto.+ Na ntango yango, Yehova akobaki kobakisela+ bango mokolo na mokolo baoyo bazalaki kobikisama.+