Misala 5:1-42
5 Nzokande, mobali moko boye, nkombo na ye Ananiasi atɛkaki eloko na ye, elongo na mwasi na ye Safira
2 mpe na nkuku abombaki mwa ndambo ya mbongo, mwasi na ye mpe ayebaki yango, mpe amemaki kaka ndambo mpe atyaki yango na makolo ya bantoma.+
3 Kasi Petro alobaki ete: “Ananiasi, mpo na nini Satana+ apesi yo mpiko mpo na kokosa+ elimo santu+ mpe kobomba na nkuku ndambo ya mbongo ya elanga?
4 Ntango nyonso oyo yango ezalaki epai na yo ezalaki ya yo te, mpe nsima wana etɛkamaki, ezalaki kaka na mabɔkɔ na yo te? Mpo na nini okanaki likambo ya boye na motema na yo? Okosi+ bato te, kasi okosi Nzambe.”+
5 Ntango ayokaki maloba wana, Ananiasi akweaki na nse mpe akataki motema.+ Mpe kobanga makasi+ ekangaki baoyo nyonso bayokaki yango.
6 Kasi bilenge mibali batɛlɛmaki, balíngaki ye na bilamba,+ mpe bamemaki ye libándá mpe bakundaki ye.
7 Nzokande nsima ya bangonga soki misato, mwasi na ye akɔtaki, ayebaki te likambo oyo esalemaki.
8 Petro alobaki na ye ete: “Yebisá ngai, bino mibale botɛkaki elanga na ntalo oyo?” Ye alobaki ete: “Ɛɛ, na ntalo wana.”
9 Bongo Petro alobaki na ye ete: “Mpo na nini boyokanaki bino mibale mpo bómeka+ elimo ya Yehova? Talá! Makolo ya baoyo bakundaki mobali na yo ezali na monɔkɔ ya ndako, mpe bakomema yo libándá.”
10 Na mbala moko akweaki na makolo na ye mpe akataki motema.+ Ntango bilenge mibali yango bakɔtaki, bakutaki ye akufi, mpe bamemaki ye libándá mpe bakundaki ye pembeni ya mobali na ye.
11 Na yango kobanga makasi ekangaki lisangá mobimba mpe baoyo nyonso bayokaki makambo yango.
12 Lisusu, na mabɔkɔ ya bantoma ebele ya bilembo mpe ya makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya ekobaki kosalema na kati ya bato;+ mpe bazalaki bango nyonso na bomoko mpenza na veranda ya Salomo.+
13 Ya solo, ata moko te na kati ya bato mosusu azalaki na mpiko ya kosangana elongo na bango;+ nzokande, bato bazalaki kokumisa bango.+
14 Longola likambo wana, bato oyo bazalaki kondimela Nkolo bakobaki kobakisama, ebele ya mibali mpe ya basi;+
15 bongo babimisaki bato ya maladi ata na babalabala ya minene mpe balalisaki bango kuna na bambeto ya mike mpe na matɔkɔ, mpo, ntango Petro akoleka, ata elili na ye mpamba ekoka kokwela ata moko na bango.+
16 Lisusu, ebele ya bato oyo bautaki na bingumba ya zingazinga ya Yerusaleme bakobaki koyangana, bazalaki komema bato ya maladi mpe baoyo bazalaki kotungisama na bilimo ya mbindo, mpe bango nyonso bazalaki kobikisama.
17 Kasi nganga-nzambe monene mpe baoyo nyonso bazalaki elongo na ye, mwa lingomba ya Basadukai oyo ezalaki na ntango wana, batɛlɛmaki mpe batondaki na zuwa,+
18 mpe batyaki bantoma mabɔkɔ mpe batyaki bango na esika ya bolɔkɔ ya bato nyonso.+
19 Kasi na butu anzelu ya Yehova+ afungolaki baporte ya bolɔkɔ,+ abimisaki bango libándá mpe alobaki ete:
20 “Bókende, mpe, ntango bokotɛlɛma na tempelo, bókoba koloba na bato maloba nyonso etali bomoi oyo.”+
21 Nsima ya koyoka bongo, bakɔtaki na tempelo na ntɔngɔntɔngɔ mpe babandaki koteya.
Nzokande ntango nganga-nzambe monene mpe baoyo bazalaki elongo na ye bayaki, bayanganisaki Sanedrina mpe liyangani mobimba ya mikóló ya bana ya Yisraele,+ mpe batindaki bato bákende kozwa bango na bolɔkɔ.
22 Kasi ntango bapolisi bakómaki kuna bakutaki bango na kati ya bolɔkɔ te. Bongo bazongaki mpe bapesaki nsango,
23 balobi: “Tokuti bolɔkɔ ekangami malamu mpenza mpe bakɛngɛli batɛlɛmi na baporte, kasi ntango tofungoli yango tokuti moto na kati te.”
24 Ɛɛ, ntango kapitɛni ya tempelo mpe banganga-nzambe bakonzi bayokaki maloba wana basilaki mayele mpo na makambo yango, bazalaki komituna soki ekosuka boni.+
25 Kasi moto moko boye ayaki mpe ayebisaki bango ete: “Talá! Mibali oyo botyaki na bolɔkɔ bazali na tempelo, batɛlɛmi mpe bazali koteya bato.”+
26 Na bongo kapitɛni akendaki elongo na bapolisi na ye mpe babandaki koya na bango, kasi na mobulu te, mpo bazalaki kobanga+ bato bábamba bango mabanga.
27 Bongo bayaki na bango mpe batɛlɛmisaki bango na ndako ya Sanedrina. Mpe nganga-nzambe monene atunaki bango
28 mpe alobaki ete: “Topesaki bino mitindo+ polelepolele ete bókoba koteya na nkombo wana te, kasi, talá! botondisi Yerusaleme na mateya na bino,+ mpe bozali na mokano mpenza ya koyeisa makila+ ya moto wana likoló na biso.”
29 Petro ná bantoma mosusu bazongisaki ete: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.+
30 Nzambe ya bankɔkɔ na biso alamwisaki+ Yesu, oyo bino bobomaki na kokakisáká ye na nzete.+
31 Nzambe atombolaki moto yango azala Kapita+ mpe Mobikisi+ na lobɔkɔ na ye ya mobali,+ mpo na kopesa Yisraele libaku ya kobongola motema+ mpe ya kolimbisama masumu.+
32 Mpe tozali batatoli ya makambo yango,+ ndenge moko mpe elimo santu,+ oyo Nzambe apesi na baoyo bazali kotosa ye mpo azali mokonzi.”
33 Ntango bayokaki bongo, bazokaki makasi mpe balingaki koboma bango.+
34 Kasi moto moko atɛlɛmaki na Sanedrina, Mofarisai moko nkombo na ye Gamaliele,+ moteyi ya Mibeko oyo bato nyonso bakumisaka ye mingi, mpe atindaki ete bábimisa bato wana mwa moke.+
35 Mpe alobaki na bango ete: “Mibali ya Yisraele,+ bókeba na bino mpenza na likambo oyo bozali kokana kosala na bato oyo.
36 Na ndakisa, liboso ya mikolo oyo Tedasi atɛlɛmaki, azalaki koloba ete ye mpenza azali moto,+ mpe etuluku ya mibali, soki nkama minei (400), bakɔtaki na lingomba na ye.+ Kasi abomamaki, mpe baoyo nyonso bazalaki kotosa ye bapanzanaki mpe basilá nyɛɛ.
37 Nsima na ye Yudasi Mogalile atɛlɛmaki na mikolo ya bokomisi nkombo,+ mpe abendaki bato na nsima na ye. Kasi moto yango akufaki, mpe baoyo nyonso bazalaki kotosa ye bapalanganaki.
38 Bongo na makambo oyo ezali koleka sikoyo, nazali koloba na bino ete: Bókɔta na makambo ya bato oyo te, kasi bótika bango; (mpamba te, soki mwango wana to mosala wana euti na bato, ekokweisama;+
39 kasi soki euti na Nzambe,+ bokokoka kokweisa bango te;)+ soki te, bokoya mbala mosusu komonana ete bozali bato oyo bazali mpenza kobunda na Nzambe.”+
40 Na yango bayokelaki ye, mpe babengaki bantoma, babɛtaki bango fimbo,+ mpe bapesaki bango mitindo ete bátika koloba na nkombo ya Yesu,+ mpe batikaki bango bákende.
41 Na yango, bango balongwaki liboso ya Sanedrina, bazali kosepela+ mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye.+
42 Mpe mikolo nyonso na tempelo mpe na ndako na ndako,+ kozanga kotika, bakobaki koteya+ mpe kosakola nsango malamu oyo etali Kristo, Yesu.+