Misala 20:1-38

20  Nzokande ntango yikiyiki ekitaki, Paulo abengaki bayekoli, mpe nsima ya kolendisa bango mpe kopesa bango mbote ya bokabwani,+ abimaki mpo na kokende na Masedonia.+  Nsima ya kokatisa bisika wana mpe kolendisa baoyo bazalaki kuna na maloba ebele,+ ayaki na Grɛsi.  Mpe nsima ya kolekisa sanza misato kuna, lokola Bayuda basalelaki ye likita+ ntango azalaki pene ya kokende na masuwa na Siri, azwaki mokano ya kozonga na Masedonia.  Baoyo bazalaki kotambola elongo na ye ezalaki Sopatere+ mwana ya Pirusi ya Beroya, Aristarke+ ná Sekundusi bato ya Tesaloniki, Gayusi ya Derbe, ná Timote,+ mpe Tishike+ ná Trofime+ bato ya etúká ya Azia.  Bango bakobaki mpe bazalaki kozela biso na Troase;+  kasi biso tolongwaki na Filipi, tokamati nzela ya mbu nsima ya mikolo ya bagato ezangá levire,+ mpe toyaki epai na bango na Troase+ mikolo soki mitano na nsima; mpe kuna tolekisaki mikolo nsambo.  Na mokolo ya liboso+ ya pɔsɔ, ntango toyanganaki mpo na kolya, Paulo abandaki kosalela bango lisukulu, mpo alingaki kokende na mokolo oyo elandaki; mpe abendaki lisukulu na ye molai tii na katikati ya butu.  Bongo miinda ebele ezalaki na shambrɛ ya likoló+ epai toyanganaki.  Wana afandaki na lininisa, elenge mobali moko nkombo na ye Etishe azindaki na mpɔngi moko makasi wana Paulo azalaki kokoba lisukulu, mpe, mpɔngi ememaki ye, akweaki banda na etajɛ ya misato mpe balɔkɔtaki ye ebembe. 10  Kasi Paulo akitaki na nse, amibwakaki likoló na ye+ mpe azingaki ye na mabɔkɔ mpe alobaki ete: “Bótika kobimisa makɛlɛlɛ, mpo molimo na ye ezali na kati na ye.”+ 11  Amataki sikoyo na likoló mpe abandaki bolei mpe alyaki, mpe nsima ya kosolola ntango molai, tii na kotana ya ntɔngɔ, nsukansuka akendaki. 12  Bongo bakamataki mwana yango ya mobali na bomoi mpe babɔndisamaki mingi koleka. 13  Tolekaki sikoyo liboso epai masuwa ezalaki mpe tokendaki na masuwa tii na Asose, epai tozalaki kokana kokamata Paulo na masuwa, mpo, nsima ya kopesa malako na likambo yango, ye moko azalaki kokana kokende na makolo. 14  Bongo ntango akutaki biso na Asose, tokamataki ye na masuwa mpe tokendaki na Mitilene; 15  mpe, ntango tolongwaki kuna na mokolo oyo elandaki, tokómaki na ngámbo oyo etalani na Kiosi, kasi lobi na yango totɛlɛmaki mwa moke na Samosi mpe na mokolo ya nsima tokómaki na Milete. 16  Mpo Paulo azwaki mokano ya koleka kozanga kotɛlɛma na Efese,+ mpo akoka kolekisa ntango te na etúká ya Azia; mpo azalaki kosala noki mpo na kokóma na Yerusaleme+ na mokolo ya fɛti ya Pantekote soki akozala na likoki. 17  Nzokande, uta na Milete atindaki bato na Efese mpo na kobenga bankulutu+ ya lisangá. 18  Ntango bakómaki epai na ye, alobaki na bango ete: “Boyebi malamu ndenge, banda mokolo ya liboso oyo nanyataki etúká ya Azia,+ nazalaki elongo na bino ntango nyonso,+ 19  nazalaki kosalela Nkolo lokola moombo+ na elimo ya komikitisa mingi koleka+ mpe na mpisoli mpe na komekama oyo ekómelaki ngai mpo na makita mabe+ ya Bayuda; 20  wana namipekisaki te koyebisa bino makambo nyonso oyo ezalaki na litomba to koteya+ bino na bisika ya bato nyonso mpe na ndako+ na ndako. 21  Kasi natatwelaki+ Bayuda mpe Bagrɛki malamumalamu makambo etali kobongola motema+ epai ya Nzambe mpe kondimela Nkolo na biso Yesu. 22  Mpe sikoyo, talá! nakangami na elimo,+ nazali kokende na Yerusaleme, atako nayebi te makambo nini ekokómela ngai kuna, 23  longola kaka oyo: na engumba na engumba, elimo santu+ ezali mbala na mbala kotatwela ngai wana ezali koloba ete minyɔlɔlɔ mpe malɔzi ezali kozela ngai.+ 24  Atako bongo, nazali kotalela molimo na ngai te ete ezali na ntina mingi mpo na ngai,+ eloko ya ntina nde nasilisa mbangu+ oyo nazali kopota mpe mosala+ oyo nazwaki+ epai ya Nkolo Yesu, ya kopesa litatoli malamumalamu mpo na nsango malamu ya boboto monene ya Nzambe.+ 25  “Mpe sikoyo, talá! nayebi ete bino nyonso baoyo nasakwelaki bokonzi bokomona elongi na ngai lisusu te. 26  Boye nazwi bino batatoli na mokolo ya lelo mpenza ete nazali pɛto na makila+ ya bato nyonso, 27  mpo namipekisaki te koyebisa bino mokano mobimba+ ya Nzambe. 28  Bókeba+ mpo na bino moko+ mpe mpo na etonga mobimba,+ oyo elimo santu etye bino bakɛngɛli+ na kati na yango, mpo na kobatela lisangá ya Nzambe,+ oyo ye asombaki na makila+ ya Mwana na ye moko. 29  Nayebi ete nsima ya kokende na ngai, bambwa mabe ya zamba+ bakokɔta na kati na bino mpe bakosalela etonga makambo na boboto te, 30  mpe na kati na bino mpenza, mibali bakobima mpe bakoloba makambo ya mbilingambilinga+ mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.+ 31  “Yango wana bólala mpɔngi te, mpe bóbosana te ete mbula misato,+ butu moi, natikaki te kokebisa+ moko na moko na mpisoli. 32  Mpe sikoyo nazali kotika bino na mabɔkɔ ya Nzambe+ mpe na liloba ya boboto monene na ye, liloba oyo ekoki kotonga bino+ mpe kopesa bino libula na kati ya baoyo nyonso basantisami.+ 33  Nalulaki palata ya moto te, wolo te, bilamba mpe te.+ 34  Bino moko boyebi ete mabɔkɔ oyo ekokisaki bamposa na ngai+ mpe ya baoyo bazalaki elongo na ngai. 35  Namonisaki bino na makambo nyonso ete na kosaláká mosala makasi+ ndenge wana nde bosengeli kosalisa baoyo bazali bato ya bolɛmbu,+ mpe bosengeli kobosana te maloba ya Nkolo Yesu, ntango ye moko alobaki ete: ‘Esengo ya kopesa+ eleki oyo ya kozwa.’” 36  Mpe nsima ya koloba makambo wana, afukamaki+ elongo na bango nyonso mpe abondelaki. 37  Ɛɛ, mpisoli mingi esopamaki na kati na bango nyonso, mpe bakwelaki Paulo na nkingo+ mpe bapwɛpwaki+ ye na boboto mpenza, 38  mpo bayokaki mpasi mingimingi mpenza na liloba oyo alobaki ete bakomona elongi+ na ye lisusu te. Bongo bakendaki kotika+ ye na masuwa.

Maloba na nse