Misala 26:1-32

26  Agripa+ alobaki na Paulo ete: “Opesameli nzela ya koloba mpo na yo moko.” Bongo Paulo asembolaki lobɔkɔ na ye+ mpe abandaki koloba mpo na kosamba ete:+  “Mpo na makambo nyonso oyo Bayuda bafundi ngai na yango,+ Mokonzi Agripa, nazali komitánga moto ya esengo lokola ezali liboso na yo nde nasengeli kosamba na mokolo ya lelo,  mingi mpenza mpo oyebi malamu mimeseno+ nyonso mpe bantembe nyonso na kati ya Bayuda. Yango wana nabondeli yo ete oyoka ngai na motema molai mpenza.  “Ya solo, na oyo etali motindo ya bomoi+ na ngai banda bolenge oyo nakoli na yango uta ebandeli na ekólo na ngai mpe na Yerusaleme, Bayuda nyonso  oyo bayebá ngai liboso banda na ebandeli bayebi, soki balingi kotatola, ete na kolanda mwa lingomba oyo eleki makambo makasi+ na losambo na biso, nazalaki Mofarisai.+  Nzokande sikoyo ezali mpo na elikya+ ya elaka+ oyo Nzambe apesaki bankɔkɔ na biso nde nabengami mpo na kosamba;  wana mabota na biso zomi na mibale bazali kolikya kokóma na kokokisama ya elaka yango na kosaleláká ye mosala mosantu na molende butu moi.+ Mpo na elikya oyo nde Bayuda bafundi ngai,+ Ee mokonzi.  “Mpo na nini bondimaka te ete Nzambe alamwisaka bakufi?+  Ngai nazalaki mpenza kokanisa na motema na ngai ete nasengelaki kosala makambo mingi mpo na kotɛmɛla nkombo ya Yesu Monazarete; 10  mpe ya solo, nasalaki yango na Yerusaleme, mpe nakangaki ebele ya basantu na babolɔkɔ,+ mpo nazwaki lotomo yango epai ya banganga-nzambe bakonzi;+ mpe ntango esengelaki bábomama, nazalaki kopona ete bábomama. 11  Mpe nazalaki kopesa bango etumbu mbala na mbala na basinagoga nyonso,+ nazalaki komeka kopusa bango na makasi ete báwangana kondima; mpe lokola nazalaki na nkanda na bango makasi mpenza, nakendaki mosika mpenza tii na konyokola bango ata na bingumba ya libándá. 12  “Na milende yango, ntango nazalaki kokende na Damasi+ na lotomo mpe na etinda ya banganga-nzambe bakonzi, 13  na midi namonaki na nzela, Ee mokonzi, pole moko oyo eleki kongɛnga ya moi ebɛti uta na likoló zingazinga na ngai mpe zingazinga na baoyo bazalaki kokende na ngai elongo.+ 14  Mpe ntango biso nyonso tokweaki na nse, nayokaki mongongo moko elobi na ngai na monɔkɔ ya Ebre ete: ‘Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai? Kobɛtabɛta makolo na nsɔngɛ ya mangenda ezali mpasi mpo na yo.’+ 15  Kasi ngai nalobaki ete: ‘Yo nani, Nkolo?’ Mpe Nkolo alobaki ete: ‘Ngai Yesu, oyo yo ozali konyokola.+ 16  Nzokande, longwá na mabele mpe tɛlɛmá na makolo na yo.+ Mpamba te ezali mpo na ntina oyo nde namimonisi epai na yo, mpo na kopona yo lokola mosaleli mpe motatoli+ ya makambo oyo omoni mpe ya makambo oyo nakolakisa yo na ntina etali ngai; 17  wana nakosikola yo na mabɔkɔ ya bato oyo mpe ya bikólo, oyo nazali kotinda yo epai na bango,+ 18  mpo na kofungola bango miso,+ mpo na kolongola bango na molili+ mpo báya na pole+ mpe kolongola bango na nguya ya Satana+ mpo báya epai ya Nzambe, mpo bázwa bolimbisi ya masumu+ mpe libula+ na kati ya baoyo basantisami+ na nzela ya kondima na bango epai na ngai.’ 19  “Yango wana, Mokonzi Agripa, naboyaki te kotosa emonaneli wana ya likoló,+ 20  kasi epai ya baoyo bazalaki na Damasi+ libosoliboso mpe epai ya baoyo bazalaki na Yerusaleme,+ mpe na mokili mobimba ya Yudea, mpe epai ya bikólo,+ namemaki nsango oyo ete: basengeli kobongola motema mpe kobaluka epai ya Nzambe mpe kosala misala oyo emonisi ete babongoli motema.+ 21  Ezali mpo na makambo yango nde Bayuda bakangaki ngai na tempelo mpe balingaki koboma ngai.+ 22  Nzokande, lokola nazwi lisalisi+ oyo euti epai ya Nzambe nazali kokoba tii na mokolo ya lelo kopesa litatoli epai ya bato mike mpe bato minene, kasi nazalaki koloba likambo mosusu te kaka oyo Basakoli+ mpe Moize+ balobaki ete esengelaki kosalema: 23  ete Kristo asengelaki konyokwama+ mpe, lokola moto ya liboso oyo asekwi+ uta na bakufi, asengelaki kosakola pole+ na bato oyo mpe na bikólo.”+ 24  Nzokande wana azalaki koloba makambo yango na kati ya kosamba na ye, Festusi alobaki na mongongo makasi ete: “Ozwi ligboma,+ Paulo! Koyekola mingi epesi yo ligboma!” 25  Kasi Paulo alobaki ete: “Nazwi ligboma te, Festusi Moto ya Lokumu, nazali nde kobimisa maloba ya solo mpe ya makanisi malamu. 26  Ya solo, mokonzi oyo ngai nazali koloba liboso na ye na elobeli ya polele ayebi makambo yango malamu; mpo ngai nandimi mpenza ete na makambo wana ezali ata na moko te oyo ye azangi koyeba, mpo likambo yango esalemaki na esika ya kobombama te.+ 27  Mokonzi Agripa, ondimaka Basakoli? Nayebi ete ondimaka.”+ 28  Kasi Agripa alobaki na Paulo ete: “Na mwa ntango moke okondimisa ngai nakóma mokristo.” 29  Na yango, Paulo alobaki ete: “Ezala na mwa ntango moke to mpe nsima ya ntango molai, nakosepela mingi liboso ya Nzambe ete yo moko kaka te kasi mpe baoyo nyonso bazali koyoka ngai lelo bókóma ndenge ngai nazali, longola kaka minyɔlɔlɔ oyo.” 30  Mpe mokonzi atɛlɛmaki, ndenge moko mpe guvɛrnɛrɛ mpe Bernise mpe bato oyo bafandaki elongo na bango. 31  Kasi ntango bazalaki kobima babandaki kosolola bango na bango ete: “Moto oyo asali ata likambo moko te oyo ebongi na liwa+ to na minyɔlɔlɔ.” 32  Lisusu, Agripa alobaki na Festusi ete: “Bakokaki kotika moto oyo soki asɛngaka te kokende kosamba+ epai ya Kaisala.”

Maloba na nse