Misala 12:1-25

12  Na bantango wana mpenza, mokonzi Erode azwaki mokano ya konyokola+ bamosusu kati na bato ya lisangá.  Abomaki Yakobo ndeko ya Yoane+ na mopanga.+  Lokola amonaki ete yango esepelisi Bayuda,+ akendeki tii kokanga mpe Petro. (Nzokande, ezalaki mikolo ya bagato ezangá levire.)+  Mpe akangaki ye, atye ye na bolɔkɔ,+ apesi ye na mabɔkɔ ya bituluku minei ya basoda mineiminei oyo bazalaki kokɛngɛla ye, etuluku mokomoko na ngala na yango, mpo akanaki kobimisa ye liboso ya bato nsima ya elekeli.+  Na yango Petro akangamaki kaka na bolɔkɔ; kasi lisangá ekobaki kobondela+ Nzambe makasi mpo na ye.  Nzokande ntango Erode alingaki kobimisa ye liboso ya bato, na butu wana Petro alalaki mpɔngi na kati ya basoda mibale akangami na minyɔlɔlɔ mibale, mpe bakɛngɛli liboso ya porte bazalaki kokɛngɛla bolɔkɔ.  Kasi, talá! anzelu ya Yehova atɛlɛmaki+ pembeni wana, mpe pole moko boye engɛngaki na ndako yango ya bolɔkɔ. Abɛtaki Petro na mopanzi, alamwisi ye,+ alobi: “Tɛlɛmá noki!” Mpe minyɔlɔlɔ oyo ekangaki mabɔkɔ na ye ekweaki.+  Anzelu+ yango alobaki na ye ete: “Kangá mokaba mpe kangá bansinga ya sandale na yo.” Asalaki bongo. Na nsuka ayebisaki ye ete: “Latá elamba na yo ya likoló+ mpe landá ngai.”  Mpe abimaki mpe alandi ye, kasi ayebaki te ete oyo ezalaki kosalema na nzela ya anzelu wana ezalaki likambo ya solo. Kutu, akanisaki nde ete azalaki komona emonaneli.+ 10  Nsima ya koleka etuluku ya bakɛngɛli ya liboso mpe ya mibale bakómaki na porte ya ebende ya kobimela na engumba, mpe efungwamaki liboso na bango kaka yango moko.+ Mpe nsima ya kobima, bapusanaki na balabala moko boye, mpe na mbala moko anzelu wana atikaki ye. 11  Mpe Petro, ntango makanisi ezongelaki ye, alobaki ete: “Sikoyo nayebi mpenza ete Yehova atindaki anzelu na ye+ mpe abikisi+ ngai na lobɔkɔ ya Erode mpe na nyonso oyo bato ya ekólo ya Bayuda bazalaki kozela.” 12  Mpe nsima ya kokanisa likambo yango, akendaki na ndako ya Maria mama ya Yoane oyo bapesá nkombo Marko,+ epai bato ebele bayanganaki mpe bazalaki kobondela. 13  Ntango abɛtaki kɔkɔkɔ na porte ya monɔkɔ ya lopango, mwana mwasi moko ya mosala, nkombo na ye Roda, ayaki kotala soki nani, 14  mpe, ntango ayokaki ete ezali mongongo ya Petro, mpo na esengo afungolaki porte te, kasi akɔtaki mbangu na kati mpe apesaki nsango ete Petro atɛlɛmi liboso ya monɔkɔ ya lopango. 15  Balobaki na ye ete: “Ozali na ligboma.” Kasi ye akobaki kondimisa makasi ete ezali mpenza bongo. Babandaki koloba ete: “Ezali anzelu na ye.”+ 16  Kasi Petro atikalaki kaka wana kobɛta kɔkɔkɔ. Ntango bafungolaki, bamonaki ye mpe bakamwaki. 17  Kasi asalaki bango elembo+ na lobɔkɔ na ye ete bázala nyɛɛ mpe ayebisaki bango likambo moko na moko ndenge Yehova abimisaki ye na bolɔkɔ, mpe alobaki ete: “Bóyebisa Yakobo+ mpe bandeko makambo oyo.” Na yango, abimaki mpe akendaki esika mosusu. 18  Bongo ntango ntɔngɔ etanaki,+ ezalaki yikiyiki ya lisɛki te na kati ya basoda mpo na koyeba nini ekómeli Petro. 19  Erode+ alukaki ye bipai nyonso mpe, lokola amonaki ye te, asambisaki bakɛngɛli mpe apesaki mitindo ete bázwa etumbu;+ mpe autaki na Yudea akiti na Kaisaria mpe alekisaki mwa ntango kuna. 20  Nzokande azalaki na nkanda mpo na bato ya Tire mpe ya Sidone. Bongo na bomoko mpenza bayaki epai na ye mpe, nsima ya kondimisa Blasitusi, oyo azalaki na mokumba ya kotalela shambrɛ ya kolala ya mokonzi, babandaki kosɛnga kimya, mpo mokili na bango ezalaki kozwa biloko ya kolya+ na mokili ya mokonzi. 21  Kasi na mokolo oyo etyamaki Erode alataki bilamba ya bokonzi mpe afandaki na kiti ya kosambisa mpe abandaki kosalela bango lisukulu. 22  Bongo bato oyo bayanganaki, babandaki koganga ete: “Mongongo ya nzambe, kasi ya moto te!”+ 23  Na mbala moko anzelu ya Yehova abɛtaki ye,+ mpo apesaki Nzambe nkembo te;+ mpe nkusu elyaki ye mpe akataki motema. 24  Kasi liloba+ ya Yehova ekobaki kokola mpe kopalangana.+ 25  Nzokande Barnabasi+ ná Saulo, nsima ya kokokisa malamumalamu mosala ya kopesa biloko ya lisungi+ na Yerusaleme, bazongaki mpe bakamataki elongo na bango Yoane,+ oyo bapesá nkombo Marko.

Maloba na nse