Misala 25:1-27
25 Na yango Festusi, ntango abandi+ koyangela etúká yango, mikolo misato na nsima autaki na Kaisaria amati na Yerusaleme;+
2 mpe banganga-nzambe bakonzi mpe bato minene ya Bayuda bafundaki+ Paulo epai na ye. Bongo babandaki kobondela ye,
3 bazalaki kosɛnga ye ete asalela bango boboto, mpo na kokweisa mobali yango, atinda bábenga ye na Yerusaleme, nzokande bazalaki kotyela ye motambo+ mpo na koboma ye na nzela.
4 Kasi, Festusi ayanolaki ete Paulo asengeli kokɛngɛlama na Kaisaria mpe ete mwa moke na nsima, ye moko akozonga kuna.
5 Alobaki ete: “Na yango, baoyo bazali na bokonzi na kati na bino bákita elongo na ngai mpe báfunda ye,+ soki ezali na likambo moko ya mabe mpo na mobali yango.”
6 Bongo nsima ya kolekisa mikolo soki mwambe to zomi na kati na bango, akitaki na Kaisaria, mpe na mokolo oyo elandaki, afandaki na kiti ya kosambisa+ mpe apesaki mitindo ete báya na Paulo.
7 Ntango akómaki, Bayuda oyo bakitaki uta na Yerusaleme batɛlɛmaki zingazinga na ye, bazalaki kofunda ye na makambo mingi mpe ya minene+ oyo bakokaki kutu te komonisa bosolo na yango.
8 Kasi Paulo alobaki mpo na kosamba ete: “Nasali lisumu ata moko te+ mpo na Mibeko ya Bayuda to mpo na tempelo+ to mpe mpo na Kaisala.”
9 Festusi, lokola alingaki ete Bayuda básepela na ye,+ azongiselaki Paulo ete: “Olingi komata na Yerusaleme mpe kosambisama kuna liboso na ngai mpo na makambo wana?”+
10 Kasi Paulo alobaki ete: “Natɛlɛmi liboso ya kiti ya kosambisa ya Kaisala,+ epai nasengeli kosambisama. Nasali Bayuda mabe ata moko te,+ ndenge yo moko mpe ozali mpenza komona yango.
11 Nzokande, soki nazali mpenza mosali mabe+ mpe soki nasali likambo moko oyo ebongi na liwa,+ naboyi kokufa te; nde, soki ezali na likambo ata moko te na makambo oyo bato wana bazali kofunda ngai na yango, moto moko te akoki kokaba ngai epai na bango kaka mpo na kosepelisa bango. Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!”+
12 Bongo Festusi, nsima ya kosolola na liyangani ya bapesi-toli, ayanolaki ete: “Lokola osɛngi okende kosamba epai ya Kaisala; okokende epai ya Kaisala.”
13 Nzokande ntango mwa mikolo elekaki, mokonzi Agripa mpe Bernise bayaki na Kaisaria mpo na kotala Festusi.
14 Bongo, wana bazalaki kolekisa ebele ya mikolo kuna, Festusi ayebisaki mokonzi makambo etali Paulo ete:
“Feliksi atikaki mobali moko na bolɔkɔ,
15 mpe ntango nazalaki na Yerusaleme banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló ya Bayuda bayaki koloba makambo+ etali ye, bazalaki kosɛnga ete asambisama mpe azwa etumbu.
16 Kasi nayebisaki bango ete Baroma bazalaka na momeseno te ya kokaba moto mpo na kosalela bato boboto, liboso ete moto yango oyo afundami amonana mpenza na bafundi+ na ye mpe azwa libaku ya kosamba likambo oyo afundami na yango.
17 Yango wana ntango bayaki awa, naumelaki te, kasi na mokolo oyo elandaki, nafandaki na kiti ya kosambisa mpe napesaki mitindo ete báya na mobali yango.
18 Ntango bafundi na ye bayaki, bafundaki ye ata na moko te+ ya makambo ya mabe oyo ngai nazalaki kokanisela ye.
19 Bazalaki kaka kotyana na ye bantembe mpo na lolenge na bango ya kosambela+ nzambe mpe mpo na Yesu moko boye oyo akufá, kasi oyo Paulo akobaki koloba ete azali na bomoi.+
20 Bongo, lokola nabulunganaki mpo na ntembe yango likoló ya makambo wana, nabandaki kotuna soki akolinga kokende na Yerusaleme mpe kosambisama kuna mpo na makambo yango.+
21 Kasi ntango Paulo asɛngaki+ ete akɛngɛlama mpo likambo ekatama na Wa-Lokumu, napesaki mitindo ete bákɛngɛla ye tii ntango nakotinda ye epai ya Kaisala.”
22 Bongo Agripa alobaki na Festusi ete: “Ngai mpe nakosepela koyoka moto yango.”+ Alobaki ete: “Lobi okoyoka ye.”
23 Na yango, na mokolo oyo elandaki, Agripa ná Bernise bayaki na ndenge ya lokumu mpenza+ mpe bakɔtaki na ndako ya kosambisa elongo na bakomanda ya basoda mpe bato minene ya engumba, mpe ntango Festusi apesaki mitindo, bayaki na Paulo.
24 Mpe Festusi alobaki ete: “Mokonzi Agripa mpe bino nyonso oyo bozali elongo na biso awa, bozali komona moto oyo ebele nyonso ya Bayuda basɛngaki ngai na Yerusaleme mpe awa, bazalaki koganga ete asengelaki lisusu te kozala na bomoi.+
25 Kasi nasosolaki ete asalaki eloko ata moko te oyo ebongaki na etumbu ya liwa.+ Boye ntango moto oyo ye moko asɛngaki+ akende kosamba epai ya Wa-Lokumu, nazwaki ekateli ya kotinda ye.
26 Kasi mpo na ye, nazali mpenza na likambo te oyo nakoki kokomela Nkolo na ngai. Yango wana nabimisi ye liboso na bino, mpe mingi mpenza liboso na yo, Mokonzi Agripa, mpo ete, nsima wana lisambisi ekosalema,+ nakoka kozwa mwa likambo ya kokoma.
27 Mpo namoni ete ezali likambo ya bozoba kotinda moto ya bolɔkɔ kozanga komonisa mpe makambo oyo afundami na yango.”