Misala 16:1-40
16 Bongo akómaki na Derbe mpe lisusu na Listra.+ Mpe, talá! moyekoli moko boye azalaki kuna nkombo na ye Timote,+ mwana ya mwasi moko Moyuda oyo azalaki mondimi kasi tata na ye Mogrɛki,
2 mpe bandeko na Listra mpe na Ikoniumu bazalaki koloba malamu mpo na ye.
3 Paulo amonisaki mposa ete moto yango akende elongo na ye, mpe akamataki ye mpe akataki ye ngenga+ mpo na Bayuda oyo bazalaki na bisika wana, mpo bango nyonso bayebaki ete tata na ye azalaki Mogrɛki.
4 Nzokande wana bazalaki koleka na bingumba, bazalaki kopesa baoyo bazalaki kuna mitindo oyo bantoma ná bankulutu oyo bazalaki na Yerusaleme bakamataki mpo bátosa yango.+
5 Na yango, masangá ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima+ mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.
6 Lisusu, bakatisaki Frigia mpe mokili ya Galatia,+ mpo elimo santu epekisaki bango báloba liloba na etúká ya Azia.
7 Lisusu, ntango bakómaki na Misia basalaki makasi mpo na kokɔta na Bitinia,+ kasi elimo ya Yesu epesaki bango nzela te.
8 Bongo balekaki pene na Misia mpe bakitaki na Troase.+
9 Mpe na butu, Paulo amonaki emonaneli+ moko: moto moko ya Masedonia atɛlɛmaki mpe azalaki kobondela ye mpe koloba ete: “Leká na Masedonia kosalisa biso.”
10 Nzokande, ntango kaka amonaki emonaneli wana, tolukaki nzela ya kokende na Masedonia,+ tokómaki na bosukisi ete Nzambe abengi biso mpo na kosakwela bango nsango malamu.
11 Na yango, uta na Troase tokamataki nzela ya mbu, mpe totamboli alima tii tokómi na Samotrase, kasi na mokolo oyo elandaki, tokómaki na Neapolisi,
12 mpe tolongwi kuna, tokómi na Filipi,+ engumba moko oyo eyangelamaki na Roma, oyo eleki ntina na etúká ya Masedonia.+ Toumelaki na engumba yango, tolekisaki mwa mikolo.
13 Mpe na mokolo ya sabata, tobimaki na libándá ya porte pembeni ya ebale, esika oyo tokanisaki ete ezali esika ya mabondeli; mpe tofandaki mpe tobandaki koloba na basi oyo bayanganaki.
14 Mpe mwasi moko nkombo na ye Lidia, motɛkisi ya bilamba ya motane-bulé, moto ya engumba Tyatire+ mpe mosambeli ya Nzambe, azalaki koyoka, mpe Yehova afungolaki motema na ye+ mpo atya likebi na makambo oyo Paulo azalaki koloba.
15 Nzokande ntango ye ná bato ya ndako na ye babatisamaki,+ abondelaki bango alobi ete: “Soki bomoni mpenza ete nazali moto ya sembo na miso ya Yehova, bókɔta na ndako na ngai mpe bófanda.”+ Mpe atyaki biso mbamba tóndima kaka.+
16 Mpe esalemaki ete ntango tozalaki kokende na esika ya mabondeli, mwana mwasi moko ya mosala oyo azalaki na elimo moko,+ demo moko ya kosakola makambo oyo ebombaná,+ akutanaki na biso. Azalaki kokɔtisela bankolo na ye mosolo mingi+ na mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.
17 Mwana mwasi yango akobaki kolanda Paulo mpe biso mpe koganga+ na maloba oyo: “Bato oyo bazali baombo ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, baoyo bazali kosakwela bino nzela ya lobiko.”
18 Akobaki kosala likambo yango na boumeli ya mikolo mingi. Nsukansuka Paulo alɛmbaki na yango+ mpe abalukaki mpe alobaki na elimo yango ete: “Napesi yo mitindo na nkombo ya Yesu Kristo ete obima na nzoto na ye.”+ Mpe abimaki kaka na ngonga wana.+
19 Ɛɛ, ntango bankolo na ye bamonaki ete elikya na bango ya kozwa mosolo ekei,+ bakangaki Paulo ná Silasi mpe babendaki bango na zando epai ya bakonzi,+
20 mpe, bakendaki na bango epai ya bakambi-mboka, balobi: “Bato oyo bazali kokɔtisa mobulu+ makasi na engumba na biso, bazali Bayuda,
21 mpe bazali kosakola mimeseno+ oyo epekisami tóndima to tósalela yango, biso Baroma.”
22 Mpe ebele wana ya bato batombokelaki bango; mpe bakambi-mboka, nsima ya kopasola bango bilamba ya likoló, bapesaki mitindo ete bábɛta bango na mangenda.+
23 Nsima ya kobɛta bango mangenda mingi,+ babwakaki bango na bolɔkɔ, bapesaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ mitindo ete akɛngɛla bango malamumalamu.+
24 Lokola azwaki mitindo ndenge wana, abwakaki bango na bolɔkɔ+ ya kati mpenza mpe akangaki makolo na bango na bikanga-makolo.+
25 Kasi pene na katikati ya butu,+ Paulo ná Silasi bazalaki kobondela mpe kosanzola Nzambe na nzembo;+ ɛɛ, bato ya bolɔkɔ bazalaki koyoka bango.
26 Na mbala moko koningana monene ya mabele esalemaki, mpe miboko ya bolɔkɔ eninganaki. Lisusu, baporte nyonso efungwamaki na ntango wana kaka, mpe minyɔlɔlɔ ya bato nyonso efungwamaki.+
27 Mokɛngɛli ya bolɔkɔ, ntango alamukaki na mpɔngi mpe amonaki ete baporte ya bolɔkɔ efungwami, abendaki mopanga na ye mpe alingaki amiboma,+ mpo akanisaki ete bato ya bolɔkɔ bakimi.+
28 Kasi Paulo abelelaki na mongongo makasi ete: “Komisala mabe te,+ mpo biso nyonso tozali awa!”
29 Bongo asɛngaki miinda mpe apumbwaki na kati mpe, lokola kolɛnga ekangaki ye, akweaki+ liboso ya Paulo ná Silasi.
30 Mpe abimisaki bango libándá mpe alobaki ete: “Batata, nasala nini+ mpo nabika?”
31 Balobaki ete: “Ndimelá Nkolo Yesu mpe okobika,+ yo ná bato ya ndako na yo.”+
32 Mpe balobelaki ye ná bato nyonso ya ndako na ye liloba ya Yehova.+
33 Mpe amemaki bango na ngonga wana ya butu mpe asukolaki bampota na bango; mpe, bango nyonso, ye ná bato na ye babatisamaki+ kozanga koumela.
34 Mpe akɔtisaki bango na ndako na ye mpe atandaki mesa liboso na bango, mpe asepelaki mingi ye ná bato ya ndako na ye mpo sikoyo andimeli Nzambe.
35 Ntango ntɔngɔ etanaki, bakambi-mboka+ batindaki bapolisi bákende koloba ete: “Bimisá bato wana.”
36 Bongo mokɛngɛli ya bolɔkɔ ayebisaki Paulo maloba na bango ete: “Bakambi-mboka batindi bato mpo bino mibale bókoka kobimisama. Boye sikoyo bóbima mpe bókende na kimya.”
37 Kasi Paulo alobaki na bango ete: “Babɛti biso fimbo na miso ya bato nyonso kozanga ete tókweisama likambo, biso Baroma,+ mpe babwaki biso na bolɔkɔ; mpe bazali sikoyo kobwaka biso libándá na kobombana? Te, soki moke te! bango moko báya kobimisa biso.”
38 Bongo bapolisi bayebisaki bakambi-mboka maloba yango. Bango babangaki makasi ntango bayokaki ete bato yango bazali Baroma.+
39 Na yango, bayaki mpe babondelaki bango mpe, nsima ya kobimisa bango, basɛngaki bango bálongwa na engumba wana.
40 Kasi babimaki na bolɔkɔ mpe bakendaki na ndako ya Lidia, mpe ntango bamonaki bandeko, balendisaki+ bango mpe bakendaki.