Misala 19:1-41
19 Na nsima, wana Apolosi+ azalaki na Korinti, Paulo akatisaki na nzela oyo eleki na kati ya mokili mpe akitaki na Efese,+ mpe akutaki bayekoli mosusu;
2 mpe alobaki na bango ete: “Bozwaki elimo santu+ ntango bokómaki bandimi?” Bango balobaki na ye ete: “Kutu, naino toyoká te ete elimo santu ezalaka.”+
3 Mpe alobaki ete: “Bongo, bobatisamaki na nini?” Balobaki ete: “Na batisimo ya Yoane.”+
4 Paulo alobaki ete: “Yoane abatisaki na batisimo oyo ezali elembo ya kobongola motema,+ azalaki koyebisa bato ete bándimela moto oyo azalaki koya nsima na ye,+ elingi koloba, kondimela Yesu.”
5 Ntango bayokaki bongo, babatisamaki na nkombo ya Nkolo Yesu.+
6 Mpe ntango Paulo atyelaki bango mabɔkɔ,+ elimo santu ekitelaki bango, mpe babandaki koloba na minɔkɔ mosusu mpe kosakola.+
7 Bango nyonso, bazalaki mibali soki zomi na mibale.
8 Ntango akɔtaki na sinagoga,+ alobaki na mpiko na boumeli ya sanza misato, azalaki kosala masukulu mpe kosalela mayele ya kondimisa na oyo etali bokonzi+ ya Nzambe.
9 Kasi lokola bamosusu bazalaki kaka kokómisa mitema na bango makasi mpe bazalaki kondima te,+ na ndenge bazalaki koloba mabe mpo na Nzela+ liboso ya ebele wana ya bato, alongwaki epai na bango+ mpe akabolaki bango na bayekoli,+ azalaki kosala masukulu mokolo na mokolo na ndako ya eteyelo ya Tiranusi.
10 Asalaki bongo mbula mibale,+ mpe baoyo nyonso bazalaki kofanda na etúká ya Azia+ bayokaki liloba ya Nkolo, Bayuda ná Bagrɛki.
11 Mpe Nzambe akobaki kosala misala minene ya nguya na mabɔkɔ ya Paulo,+
12 bongo bazalaki kozwa ata biteni ya bilamba mpe bilamba ya mosala na nzoto na ye mpe bazalaki komemela yango bato oyo bazalaki kobɛla,+ mpe bamaladi na bango ezalaki kosila, mpe bilimo mabe bazalaki kobima.+
13 Kasi bamosusu na Bayuda oyo bazalaki kotambolatambola, oyo bazalaki kosala mosala ya kobimisa bademo,+ bamekaki mpe kotánga nkombo ya Nkolo Yesu+ epai ya baoyo bazalaki na bilimo mabe, balobi: “Nazali mpenza kopesa bino mitindo+ na nzela ya Yesu oyo Paulo azali kosakola.”
14 Nzokande, bana mibali nsambo ya moto moko nkombo na ye Sekeva, nganga-nzambe mokonzi Moyuda, bazalaki kosala bongo.
15 Kasi elimo mabe azongiselaki bango ete: “Nayebi Yesu+ mpe nayebaka Paulo;+ kasi bino banani?”
16 Na yango, moto oyo azalaki na elimo wana ya mabe apumbwelaki bango,+ anyataki mokomoko na bango, mpe alongaki bango, bongo bakimaki na ndako wana, bolumbu mpe bazokizoki bampota.
17 Likambo yango eyebanaki na bato nyonso, Bayuda mpe Bagrɛki oyo bazalaki kofanda na Efese; mpe kobanga+ ekwelaki bango nyonso, mpe nkombo ya Nkolo Yesu ekobaki kokumisama.+
18 Mpe mingi na kati ya baoyo bakómaki bandimi bazalaki koya koyambola+ mpe koyebisa misala na bango polelepolele.
19 Kutu, ebele ya baoyo bazalaki kosala misala ya maji+ basangisaki babuku na bango esika moko mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso. Mpe batángaki ntalo na yango nyonso mpe bamonaki ete ekokanaki na motuya ya mbongo ya bibende ya palata nkóto ntuku mitano (50 000).
20 Na yango, na ndenge moko ya nguya, liloba ya Yehova ekobaki kokola mpe kolonga.+
21 Nzokande ntango makambo wana esukaki, Paulo akanaki na elimo na ye ete: nsima ya kokatisa Masedonia+ mpe Akaya, akokende na Yerusaleme;+ alobaki: “Nsima ya kokóma kuna nasengeli mpe komona Roma.”+
22 Bongo atindaki na Masedonia bato mibale kati na baoyo bazalaki kosalela ye, Timote+ ná Eraste,+ kasi ye moko atikalaki mwa moke na etúká ya Azia.
23 Na ntango wana mpenza, mobulu monene+ ebimaki mpo na Nzela.+
24 Mpo moto moko nkombo na ye Demetriusi, mosali ya biloko ya palata, na mosala na ye ya kosala bandako mike ya losambo ya Artemisi, azalaki kokɔtisela bato ya misala ya mabɔkɔ mosolo mingi;+
25 mpe ayanganisaki bango mpe baoyo bazalaki kosala na biloko ya ndenge wana+ mpe alobaki ete: “Mibali, boyebi malamu ete bomɛngo na biso ezali kouta na mosala oyo.+
26 Lisusu, bozali komona mpe koyoka ndenge Paulo wana, na Efese+ kaka te kasi mpe na bisika pene na nyonso ya etúká ya Azia, andimisi ebele mpenza ya bato mpe atindi bango bándima likanisi mosusu, alobi: banzambe oyo basalemi na mabɔkɔ+ bazali banzambe te.
27 Lisusu, likama esuki kaka te na likambo oyo ete mosala oyo ya biso ekosila lokumu, kasi lisusu ete tempelo ya nzambe-mwasi monene Artemisi+ ekotángama eloko mpamba mpe, ata bonene na ye oyo etúká mobimba ya Azia mpe mabele oyo bato bafandi esambelaka, etikali moke ekóma mpamba.”
28 Ntango bayokaki bongo mpe lokola batondaki na nkanda, bato yango babandaki koganga, balobi: “Artemisi ya Baefese azali Monene!”
29 Bongo engumba etondaki na yikiyiki, mpe bango nyonso basopanaki na esika ya masano, bamemaki na makasi elongo na bango Gayusi mpe Aristarke,+ Bamasedonia, baninga ya Paulo na mobembo.
30 Nde Paulo alingaki kokende na kati epai ya bato wana, kasi bayekoli bapesaki ye nzela te.
31 Ata mpe bakambi mosusu ya bafɛti mpe ya masano, oyo bazalaki kosepela na ye, batindelaki ye bato mpe babandaki kobondela ye ete atya bomoi na ye na likama te na esika ya masano.
32 Ya solo, bamosusu bazalaki koganga likambo mosusu mpe bamosusu likambo mosusu;+ mpo liyangani ezalaki na yikiyiki, mpe mingi na kati na bango bayebaki te ntina nini bayanganaki.
33 Bongo bango nyonso bazwaki Alezandre na kati ya ebele yango ya bato, mpe Bayuda bapusaki ye liboso; mpe Alezandre asalaki elembo na lobɔkɔ na ye mpe azalaki kolinga kosamba mpo na ye moko liboso ya bato yango.
34 Kasi ntango bayaki koyeba ete azali Moyuda, bango nyonso bagangaki mongongo se moko, pene ya ngonga mibale ete: “Artemisi ya Baefese azali Monene!”+
35 Na nsuka, ntango mo-komi-makambo ya engumba afandisaki ebele yango ya bato nyɛɛ,+ alobaki ete: “Mibali ya Efese, nani mpenza na kati ya bato ayebi te ete engumba ya Baefese ezali mokɛngɛli ya tempelo ya Artemisi monene mpe ya ekeko oyo ekweaki longwa na likoló?
36 Na bongo lokola makambo yango ekoki kotyelama ntembe te, ebongi ete bókitisa mitema mpe bósala makambo mbangumbangu te.+
37 Mpo bomemi bato oyo bazali miyibi na batempelo te mpe bazali te bato oyo bazali kofinga nzambe na biso ya mwasi.
38 Na yango soki Demetriusi+ ná bato ya misala ya mabɔkɔ oyo bazali elongo na ye bazali na likambo na moto moko boye, mikolo ya kosambisa+ ezali mpe baprokonsule+ bazali; báya kofundana.
39 Nzokande, soki bozali koluka nde eloko mosusu koleka oyo wana, yango esengeli kokatama na liyangani lokola na momeseno.
40 Mpo tozali mpenza na likama ya kofundama ete tozali batomboki na likambo oyo ya lelo, lokola ezali ata na eloko moko te oyo ekoki kopesa biso nzela ya komonisa ntina ya etuluku oyo ya mobulu.”
41 Mpe ntango asilisaki koloba makambo wana,+ asɛngaki liyangani epanzana.+