Misala 9:1-43

9  Kasi Saulo, lokola azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma+ bayekoli+ ya Nkolo, akendaki epai ya nganga-nzambe monene  mpe asɛngaki ye mikanda mpo na basinagoga oyo ezali na Damasi, mpo amema na Yerusaleme, na minyɔlɔlɔ, moto nyonso oyo ye akokuta, oyo azali moto ya Nzela,+ mibali ná basi.  Nzokande ntango azalaki kosala mobembo, akómaki pene na Damasi, wana na mbalakaka pole moko eutaki na likoló engɛngaki zingazinga na ye,+  mpe akweaki na nse mpe ayokaki mongongo moko elobi na ye ete: “Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai?”+  Ye alobaki ete: “Yo nani, Nkolo?” Alobaki ete: “Ngai Yesu, oyo yo ozali konyokola.+  Nzokande, tɛlɛmá+ mpe kɔtá na engumba, mpe bakoyebisa yo oyo osengeli kosala.”  Nzokande mibali oyo bazalaki kosala mobembo elongo na ye+ batɛlɛmaki wana nyɛɛ,+ bayokaki, ya solo, lokito ya mongongo moko boye,+ kasi bamonaki moto te.  Kasi Saulo atɛlɛmaki, mpe atako miso na ye ezalaki polele azalaki komona eloko te.+ Bongo babendaki ye na lobɔkɔ mpe bamemaki ye na Damasi.  Mpe mikolo misato azalaki komona te,+ mpe azalaki kolya te mpe komɛla te. 10  Na Damasi moyekoli moko azalaki, nkombo na ye Ananiasi,+ mpe Nkolo alobaki na ye na emonaneli ete: “Ananiasi!” Ye alobaki ete: “Ngai oyo, Nkolo.” 11  Nkolo alobaki na ye ete: “Tɛlɛmá, kende na balabala oyo ebengami Alima, mpe na ndako ya Yudasi luká moto moko nkombo na ye Saulo, moto ya Tarse.+ Mpo, talá! azali kobondela, 12  mpe amoni na emonaneli mobali moko nkombo na ye Ananiasi akɔti mpe atyeli ye mabɔkɔ mpo akóma komona.”+ 13  Kasi Ananiasi ayanolaki ete: “Nkolo, nayoki epai ya bato mingi nsango ya mobali wana, ebele ya makambo ya mabe oyo asalaki basantu na yo na Yerusaleme. 14  Mpe awa ye azali na bokonzi oyo banganga-nzambe bakonzi bapesaki ye ya kokanga na minyɔlɔlɔ baoyo nyonso babelelaka nkombo na yo.”+ 15  Kasi Nkolo alobaki na ye ete: “Kende, mpo mobali wana azali mbɛki oyo naponi+ mpo na komema nkombo na ngai epai ya bikólo+ mpe epai ya bakonzi+ mpe epai ya bana ya Yisraele. 16  Mpo nakolakisa ye polele ebele ya makambo oyo asengeli konyokwama na yango mpo na nkombo na ngai.”+ 17  Bongo Ananiasi akendaki mpe akɔtaki na ndako yango, mpe atyelaki ye mabɔkɔ mpe alobaki ete: “Saulo, ndeko, Nkolo, ye Yesu oyo abimelaki yo na nzela oyo ozalaki koya, atindi ngai, mpo yo omona lisusu mpe otonda na elimo santu.”+ 18  Mpe na mbala moko biloko moko lokola mposo ya mbisi eutaki na miso na ye ekweaki, mpe akómaki komona; mpe atɛlɛmaki mpe abatisamaki, 19  mpe alyaki biloko mpe azwaki makasi.+ Alekisaki mwa mikolo elongo na bayekoli oyo bazalaki na Damasi,+ 20  mpe na mbala moko na basinagoga abandaki kosakola Yesu,+ ete Ye azali Mwana ya Nzambe. 21  Kasi baoyo nyonso bazalaki koyoka ye bakamwaki mpe bazalaki koloba ete: “Oyo ezali te mobali oyo azalaki kopanza+ bato oyo babelelaka nkombo wana na Yerusaleme, mpe oyo ayaki awa mpo na ntina oyo mpenza, ete amema bango na minyɔlɔlɔ epai ya banganga-nzambe bakonzi?”+ 22  Kasi Saulo akobaki kozwa nguya mingi lisusu mpe azalaki kosukisa Bayuda oyo bazalaki kofanda na Damasi wana azalaki komonisa makambo na molɔngɔ mpenza ete moto wana azali Kristo.+ 23  Nzokande nsima ya mikolo mwa mingi, Bayuda basalaki likita mpo na koboma ye.+ 24  Nzokande, mwango na bango eyaki koyebana epai ya Saulo. Kasi bazalaki mpe kokɛngɛla baporte na likebi mpenza butu moi mpo na koboma ye.+ 25  Bongo bayekoli na ye bakamataki ye mpe bakitisaki ye na butu na nzela ya lidusu moko oyo ezalaki na efelo, bakitisaki ye na kati ya kitunga.+ 26  Ntango akómaki na Yerusaleme+ asalaki makasi mpo na kosangana esika moko na bayekoli; kasi bango nyonso bazalaki kobanga ye, mpo bandimaki te ete azali moyekoli. 27  Bongo Barnabasi ayaki kosalisa ye+ mpe akambaki ye epai ya bantoma, mpe ayebisaki bango likambo moko na moko ndenge amonaki Nkolo+ na nzela mpe ete ye asololaki na ye,+ mpe ndenge alobaki na mpiko mpenza na nkombo ya Yesu na kati ya Damasi.+ 28  Mpe afandaki elongo na bango, azalaki kokɔta mpe kobima na Yerusaleme, azalaki koloba na mpiko mpenza na nkombo ya Nkolo;+ 29  mpe azalaki kosolola mpe kotyana ntembe ná Bayuda ya monɔkɔ ya Grɛki. Kasi bango bazalaki koluka koboma ye.+ 30  Ntango bandeko bayebaki likambo yango, bakitisaki ye na Kaisaria mpe batindaki ye na Tarse.+ 31  Ya solo mpenza, lisangá+ na Yudea mobimba, na Galile mpe na Samaria ekɔtaki na eleko moko ya kimya, ezalaki kotongama; mpe lokola ezalaki kotambola na kobanga Yehova+ mpe na libɔndisi ya elimo santu+ ekobaki kokola. 32  Nzokande wana Petro azalaki koleka na etúká yango mobimba, akitaki mpe epai ya basantu oyo bazalaki kofanda na Lida.+ 33  Kuna akutaki moto moko nkombo na ye Eneasi, oyo asalaki mbula mwambe atandamaka kaka na litɔkɔ, mpo azalaki mokatatali. 34  Mpe Petro alobaki na ye ete:+ “Eneasi, Yesu Kristo azali kobikisa yo.+ Tɛlɛmá mpe bongisá mbeto na yo.” Mpe atɛlɛmaki na mbala moko. 35  Mpe baoyo nyonso bazalaki kofanda na Lida mpe na mokili patatalu ya Sharone+ bamonaki ye, mpe babalukaki epai ya Nkolo.+ 36  Kasi na Yope+ ezalaki na moyekoli moko nkombo na ye Tabita, oyo, soki babongoli, elakisi Dorkasi. Ye atondaki na misala ya malamu+ mpe na makabo ya motema mawa oyo azalaki kopesa. 37  Kasi na mikolo wana azwaki maladi mpe akufaki. Bongo basukolaki ye mpe balalisaki ye na shambrɛ ya likoló. 38  Nzokande lokola Lida ezalaki pene na Yope,+ ntango bayekoli bayokaki ete Petro azalaki na engumba yango batindelaki ye mibali mibale mpo na kobondela ye ete: “Tolɔmbi yo, kokakatana te koya awa epai na biso.” 39  Na yango, Petro atɛlɛmaki mpe akendaki elongo na bango. Mpe ntango akómaki, bamemaki ye na shambrɛ ya likoló; mpe basi nyonso oyo mibali bakufá bayaki epai na ye bazali kolela mpe kolakisa ebele ya bilamba ya nse mpe ya bilamba ya likoló+ oyo Dorkasi azalaki kosala ntango azalaki elongo na bango.+ 40  Kasi Petro abimisaki moto nyonso libándá+ mpe, agumbaki mabɔlɔngɔ, abondelaki, mpe, abalukaki epai nzoto ezalaki, alobi: “Tabita, tɛlɛmá!” Afungolaki miso mpe, ntango amonaki Petro, afandaki.+ 41  Petro apesaki ye lobɔkɔ, atɛlɛmisaki ye,+ mpe abengaki basantu ná basi wana oyo mibali bakufá, mpe alakisaki bango ye na bomoi.+ 42  Likambo yango eyebanaki na Yope mobimba, mpe mingi bakómaki bandimi ya Nkolo.+ 43  Na boumeli ya mikolo mwa mingi, afandaki na Yope+ elongo na Simo moko boye, mobongisi-mposo ya nyama.+

Maloba na nse