Misala 24:1-27

24  Mikolo mitano na nsima nganga-nzambe monene Ananiasi+ akitaki elongo na ndambo ya mikóló mpe molobeli moko na nkombo Tertulusi, mpe bafundaki+ Paulo epai ya guvɛrnɛrɛ.+  Ntango abengamaki, Tertulusi abandaki kofunda ye, alobi: “Lokola tozali na kimya monene+ mpo na yo mpe lokola mbongwana ezali kosalema na ekólo oyo mpo na mayele na yo ya kobongisa makambo liboso,  na bantango nyonso mpe lisusu na bisika nyonso, toyambaka yango, Moto ya Lokumu+ Feliksi, na botɔndi oyo eleki monene.  Kasi mpo ete nakoba koumisa yo te, nabondeli yo ete oyoka biso na mokuse na boboto na yo.  Mpo tomoni mobali oyo ete azali likama monene+ mpe azali kobimisa botomboki+ epai ya Bayuda nyonso na mabele mobimba oyo bato bafandi mpe azali mokambi ya mwa lingomba ya Banazarete,+  ye nde moto amekaki mpe kokómisa tempelo eloko mpamba+ mpe tokangaki ye.  —  Ntango yo moko okotuna ye, okoyeba bosolo ya makambo nyonso oyo tozali kofunda ye na yango.”  Na yango, Bayuda mpe bamikɔtisaki na kofunda wana, bazalaki koloba ete makambo yango ezalaki mpenza bongo. 10  Mpe Paulo, ntango guvɛrnɛrɛ aningisaki motó mpo na kopesa ye nzela ete aloba, ayanolaki ete: “Lokola nayebi ete ozali mosambisi ya ekólo oyo banda bambula mingi, nandimi na motema moko kosamba+ makambo na ngai, 11  mpo ozali na esika ebongi mpo na koyeba ete eleki naino mikolo zomi na mibale te banda ngai namataki kosambela+ na Yerusaleme; 12  mpe bakutaki ngai te na tempelo+ nazali kotyana ntembe ná moto to koyanganisa etuluku moko ya bato,+ na basinagoga to na engumba. 13  Bakoki mpe te komonisa yo bosolo+ ya makambo oyo bazali kofunda ngai na yango sikoyo. 14  Kasi nandimi mpenza likambo oyo liboso na yo, ete, na kotalela nzela oyo bazali kobenga ‘mwa lingomba,’ na ndenge wana nde ngai nazali kosalela Nzambe ya bankɔkɔ na ngai mosala mosantu,+ mpo nandimaka makambo nyonso oyo elobelami na Mibeko+ mpe ekomami na Basakoli; 15  mpe nazali na elikya+ epai ya Nzambe, elikya oyo bato oyo mpe bazalaka na yango, ete lisekwa ekozala,+ ya bayengebene+ mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.+ 16  Kutu, na likambo yango, nazali ntango nyonso kosala makasi mpo na kozala na lisosoli+ oyo ezali komonisa ete nasali mabe moko te epai ya Nzambe mpe epai ya bato. 17  Bongo nsima ya bambula mingi, nayaki kotika makabo ya motema mawa na ekólo na ngai, mpe mabonza.+ 18  Wana nazalaki kosala makambo yango bakutaki ngai namipɛtoli na kati ya tempelo na ndenge oyo milulu ezali kosɛnga,+ kasi elongo na ebele ya bato te mpe na yikiyiki te. Kasi Bayuda mosusu ya etúká ya Azia bazalaki wana, 19  oyo esengelaki kutu nde bázala awa liboso na yo mpe báfunda ngai soki mpenza bazwaki ngai na likambo moko ya mabe.+ 20  To mpe, mibali oyo bazali awa báloba bango moko mabe oyo bazwaki ngai na yango ntango natɛlɛmaki liboso ya Sanedrina, 21  longola kaka liloba moko oyo nabelelaki ntango natɛlɛmaki na kati na bango ete: ‘Nazali lelo kosambisama liboso na bino mpo na lisekwa ya bakufi!’”+ 22  Nzokande, Feliksi,+ lokola ayebaki malamu makambo oyo etali Nzela,+ abandaki kozongisazongisa bato wana ete báya nsima mpe alobaki ete: “Ntango Lisiasi+ komanda ya basoda akokita, nakokata makambo na bino.” 23  Mpe apesaki mokonzi ya basoda mitindo ete mobali yango akɛngɛlama kasi bátikela ye mwa bonsomi na bolɔkɔ, mpe apekisa ata moko te ya bato na ye kosalela ye.+ 24  Mwa mikolo na nsima, Feliksi+ ayaki elongo na mwasi na ye Drusila, oyo azalaki Moyuda,+ mpe abengaki Paulo mpe ayokaki ye na likambo etali kondimela Kristo Yesu.+ 25  Kasi wana alobelaki boyengebene+ mpe komipekisa+ mpe lisambisi+ oyo ekoya, Feliksi akómaki kobanga mpe azongisaki ete: “Sikoyo kende na yo, kasi soki ntango moko ya malamu emonani nakobengisa yo lisusu.” 26  Atako bongo, na ntango wana kaka, azalaki mpe kolikya ete Paulo akopesa ye mbongo.+ Yango wana azalaki kobengabenga ye mbala na mbala mpe azalaki kosolola na ye.+ 27  Kasi, ntango mbula mibale elekaki, Porkiusi Festusi akitanaki Feliksi na ebonga; mpe lokola Feliksi alingaki ete Bayuda básepela na ye,+ atikaki Paulo akangami na minyɔlɔlɔ.

Maloba na nse